< Ezayi 44 >

1 Kasi sik’oyo yoka, oh Jakobi, mowumbu na Ngai, Isalaele oyo naponaki!
Yet listen now, Jacob my servant, and Israel, whom I have chosen.
2 Tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo asalaki yo, abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo mpe asungaka yo: Oh Jakobi, mowumbu na Ngai, kobanga te; yo, Yeshuruni, oyo naponaki.
This is what Jehovah who made you, and formed you from the womb, who will help you says: "Do not be afraid, Jacob my servant; and you, Jeshurun, whom I have chosen.
3 Pamba te nakosopa mayi na mokili ya kokawuka, mpe bibale, na mabele ya kokawuka; nakosopa Molimo na Ngai na likolo ya bana na yo mpe mapamboli na Ngai na likolo ya bakitani na yo.
For I will pour water upon the thirsty, and streams on the dry ground. I will pour my Spirit on your offspring, and my blessing on your descendants:
4 Bakokola malamu kati na matiti ya mobesu lokola banzete ya pepiliye pene ya ebale.
and they will spring up among the grass, as willows by the watercourses.
5 Moto moko akoloba: ‹ Nazali ya Yawe, › mpe moto mosusu akomibenga na kombo ya Jakobi, kino mosusu akokoma na loboko na ye: ‹ Nazali ya Yawe, › mpe akozwa kombo ya Isalaele.
One will say, 'I am Jehovah's;' and another will be called by the name of Jacob; and another will write with his hand 'to Jehovah,' and honor the name of Israel."
6 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi mpe Mosikoli ya Isalaele, Mokonzi ya mampinga, alobi: Nazali ebandeli mpe nazali suka; Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te.
This is what Jehovah, the King of Israel, and his Redeemer, Jehovah of hosts, says: "I am the first, and I am the last; and besides me there is no God.
7 Nani azali lokola Ngai? Tika ete atatola yango; tika ete aloba mpe abimisa liboso na Ngai makambo oyo esalema wuta kala, wuta tango nasala bato oyo, mpe makambo oyo ekoya! Solo, tika ete basakola makambo oyo ekoya!
Who is like me? Who will call, and will declare it, and set it in order for me, since I established the ancient people? Let them declare the things that are coming, and that will happen.
8 Bolenga te, bobanga mpe te. Boni, natatolaki yango te? Nasakolaki yango te wuta kala? Bozali batatoli na Ngai. Boni, ezali na nzambe mosusu pembeni na Ngai? Te, ezali na Libanga mosusu te, nayebi ata moko te. »
Do not fear, neither be afraid. Haven't I declared it to you long ago, and shown it? You are my witnesses. Is there a God besides me? Indeed, there is not. I do not know any other Rock."
9 Basali bikeko, bango nyonso, bazali pamba, mpe biloko oyo bango balingaka ezali ata na litomba te; esengelaki kotatola mpo na bango, kasi emonaka te mpe eyebaka ata eloko moko te; boye, bayokisama soni.
Everyone who makes an engraved image is vain. The things that they delight in will not profit. Their own witnesses do not see, nor know, that they may be disappointed.
10 Nani asala nzambe to ekeko ya ebende mpo ete ezala ata na litomba moko te mpo na ye?
Who has fashioned a god, or molds an image that is profitable for nothing?
11 Tala, ye elongo na baninga na ye bakozala na soni; basali bikeko bazali na bango kaka bato lokola bato nyonso! Tika ete bango nyonso baya elongo mpe batelema wana; bakokweya na somo mpe na soni.
Look, all his fellows will be disappointed; and the workmen are mere men. Let them all be gathered together. Let them stand up. They will fear. They will be put to shame together.
12 Monyangwisi bibende na moto azwaka sizo, asalelaka yango mpe asalaka na makala ya moto; asalaka ekeko na marto mpe abongisaka yango na makasi ya loboko na ye; nzokande soki akomi na nzala, makasi esili ye; soki mpe ameli mayi te, nzoto elembi ye!
The blacksmith takes an axe, works in the coals, fashions it with hammers, and works it with his strong arm. He is hungry, and his strength fails; he drinks no water, and is faint.
13 Mosali bikeko afungolaka singa oyo bamekelaka molayi, akomaka elilingi na ekomeli ya motane, asalaka yango na nzela ya mbeli ya minu makasi, abongisaka mondelo na yango na lime mpe apesaka yango lolenge ya moto, ndenge kaka moto azalaka kitoko, mpo ete ekoka kowumela na Esika ya bule.
The carpenter stretches out a line. He marks it out with a pencil. He shapes it with planes. He marks it out with compasses, and shapes it like the figure of a man, with the beauty of a man, to reside in a house.
14 Akataka banzete ya sedele; mpe tango mosusu, banzete ya sipele to ya sheni; atikaka yango ekola kati na banzete ya zamba mpe alonaka nzete ya pen oyo mvula ekokolisa.
He cuts down cedars for himself, and takes the cypress and the oak, and strengthens for himself one among the trees of the forest. He plants a fir tree, and the rain nourishes it.
15 Moto azwaka yango mpo na kopelisa moto, akataka yango mpo na koyetola moto to mpo na kobelisa mapa; kasi asalaka na yango lisusu nzambe oyo afukamelaka; asalaka na yango nzambe ya ekeko oyo agumbamelaka.
Then it will be for a man to burn; and he takes some of it, and warms himself. Yes, he burns it, and bakes bread. Yes, he makes a god, and worships it; he makes it an engraved image, and falls down to it.
16 Akotia ndambo ya nzete yango na moto, bongo akolamba na yango mosuni, akotumba mosuni na ye mpe akolia yango kino akotonda; akokoma lisusu koyoka molunge mpe akoloba: « Ah, nayoki molunge, namoni moto epeli makasi! »
He burns part of it in the fire. With part of it, he eats meat. He roasts a roast, and is satisfied. Yes, he warms himself, and says, "Aha. I am warm. I have seen the fire."
17 Mpe na ndambo oyo etikali, oyo asalaki na yango nzambe, nzambe na ye ya ekeko, akofukamela yango mpe akosambela yango; akosambela yango mpe akoloba: « Bikisa ngai, ozali nzambe na ngai! »
The rest of it he makes into a god, even his engraved image. He bows down to it and worships, and prays to it, and says, "Deliver me; for you are my god."
18 Bayebi eloko moko te, bazali na bososoli te; miso na bango ekangama, emonaka te; mitema na bango ezali makasi, esosolaka te.
They do not know, neither do they consider: for he has shut their eyes, that they can't see; and their hearts, that they can't understand.
19 Moko te akanisaka, moko mpe te azalaka na boyebi mpe na mayele mpo na koloba: « Na nzela ya ndambo na yango, napelisaki moto, nabelisaki mapa na makala na yango ya moto, natumbaki mosuni mpe naliaki yango. Bongo mpo na oyo etikali, nasala na yango penza likambo ya nkele boye? Nafukamela penza mwa eteni ya nzete? »
No one thinks, neither is there knowledge nor understanding to say, "I have burned part of it in the fire. Yes, I have also baked bread on its coals. I have roasted meat and eaten it. Shall I make the rest of it into an abomination? Shall I bow down to a tree trunk?"
20 Makanisi na ye ekangama na putulu, motema na ye ya lokuta ezali kokosa ye; akokoka te komikangola mpe koloba: « Boni, eloko oyo ezali na loboko na ngai ya mobali ezali lokuta te? »
He feeds on ashes. A deceived heart has turned him aside; and he can't deliver his soul, nor say, "Isn't there a lie in my right hand?"
21 « Oh Jakobi, kanisa nanu makambo oyo, pamba te, oh Isalaele, ozali mosali na Ngai. Nabongisaki yo mpo ete ozala mosali na Ngai; oh Isalaele, nakobosana yo te.
Remember these things, Jacob and Israel; for you are my servant. I have formed you. You are my servant. Israel, you will not be forgotten by me.
22 Nalongoli mabe na yo lokola lipata, masumu na yo lokola lipata ya tongo. Zonga epai na Ngai, pamba te nasili kosikola yo. »
I have blotted out, as a thick cloud, your transgressions, and, as a cloud, your sins. Return to me, for I have redeemed you.
23 Oh Lola, yemba banzembo ya esengo, pamba te Yawe nde asali bongo! Oh mozindo ya mokili, tombola mongongo! Oh bino bangomba, bazamba mpe banzete nyonso kati na yango, boyemba banzembo ya elonga! Pamba te Yawe asikolaki Jakobi, amonisi nkembo na Ye kati na Isalaele.
Sing, you heavens, for Jehovah has done it. Shout, you lower parts of the earth. Break out into singing, you mountains, O forest, all of your trees, for Jehovah has redeemed Jacob, and will glorify himself in Israel.
24 « Tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo azali Mosikoli na yo, oyo abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo: Nazali Yawe oyo asalaki biloko nyonso, Ngai moko nde natandaki likolo lokola liputa, Ngai moko nde natandaki mabele.
Thus says Jehovah, your Redeemer, and he who formed you from the womb: "I am Jehovah, who makes all things; who alone stretches out the heavens; who spreads out the earth by myself;
25 Sik’oyo, nakomisi bilembo ya basakoli ya lokuta eloko pamba; natie mobulu kati na molimo ya bato oyo balobaka makambo ekoya, nakweyisi boyebi ya bato ya bwanya mpe nakomisi mayele na bango liboma.
who foils the omens of the empty talkers, and makes fools of diviners; who turns sages back, and makes their knowledge foolish;
26 Nakokisi maloba ya mosali na Ngai mpe nalongisi mabongisi ya bamemi sango na Ngai. Natatoli na tina na Yelusalemi: ‹ Bato bakovanda kati na yo; › na tina na bingumba ya Yuda: ‹ Ekotongama lisusu, › mpe na tina na mabanga na yango oyo ebukana: ‹ Nakobongisa yango lisusu. ›
who confirms the word of his servant, and performs the counsel of his messengers; who says of Jerusalem, 'She will be inhabited;' and of the cities of Judah, 'They will be built,' and 'I will raise up its waste places;'
27 Nalobi na ebale monene: ‹ Kawuka, mpe nakokawusa bibale na yo! ›
who says to the deep, 'Be dry,' and 'I will dry up your rivers;'
28 Nalobi na tina na Sirisi: ‹ Azali mobateli oyo naponi, akokokisa makambo nyonso oyo esepelisaka Ngai. Akoloba na tina na Yelusalemi: ‘Tika ete etongama lisusu,’ mpe na tina na Tempelo: ‘Tika ete batonga miboko na yango.’ › »
Who says of Koresh, 'He is my shepherd, and shall perform all my pleasure,' even saying of Jerusalem, 'She will be built;' and of the temple, 'Your foundation will be laid.'"

< Ezayi 44 >