< Ezayi 42 >

1 Tala mosali na Ngai, oyo nasimbaka; moponami na Ngai, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakotia Molimo na Ngai na likolo na ye, mpe akotia bosembo kati na bikolo,
Behold my servant, whom I uphold; mine elect, in whom my soul delights; I have put my spirit upon him: he shall bring forth judgment to the Gentiles.
2 akotombola mongongo te, akoganga te, akobelela na mongongo makasi te na babalabala;
He shall not cry, nor lift up, nor cause his voice to be heard in the street.
3 akobuka te mwa nzete ya kolemba oyo egumbama mpe akoboma te moto ya singa ya mwinda oyo ekomi pene ya kokufa. Akomema bosembo na solo nyonso,
A bruised reed shall he not break, and the smoking flax shall he not quench: he shall bring forth judgment unto truth.
4 akolemba te mpe akotika te kino tango akotia bosembo na mokili. Bisanga ekotia elikya na mobeko na ye.
He shall not fail nor be discouraged, till he have set judgment in the earth: and the isles shall wait for his law.
5 Tala liloba oyo Nzambe, Yawe, alobi, Ye oyo akelaki likolo mpe atandaki yango lokola liputa, oyo atandaki mabele mpe biloko nyonso oyo mabele ebimisaka, oyo apesaka pema na bato na yango mpe bomoi na bato oyo batambolaka likolo na yango:
Thus says God the LORD, he that created the heavens, and stretched them out; he that spread forth the earth, and that which comes out of it; he that gives breath unto the people upon it, and spirit to them that walk therein:
6 « Ngai Yawe, nabengaki yo na bosembo, nasimbi loboko na yo makasi, nabateli yo mpe natie yo mpo na kosala boyokani elongo na bikolo mpe kozala pole ya bikolo,
I the LORD have called you in righteousness, and will hold your hand, and will keep you, and give you for a covenant of the people, for a light of the Gentiles;
7 mpo na kofungola miso ya bakufi miso, mpo na kobimisa bakangami na boloko mpe kobimisa bavandi ya molili, na kasho.
To open the blind eyes, to bring out the prisoners from the prison, and them that sit in darkness out of the prison house.
8 Nazali Yawe; yango nde Kombo na Ngai; nakopesa nkembo na Ngai na mosusu te to lokumu na Ngai epai na banzambe ya bikeko te.
I am the LORD: that is my name: and my glory will I not give to another, neither my praise to graven images.
9 Tala, makambo ya liboso esili koleka, mpe Ngai nazali kotatola makambo ya sika; nayebisi bino yango liboso ete esalema. »
Behold, the former things are come to pass, and new things do I declare: before they spring forth I tell you of them.
10 Boyemba loyembo ya sika mpo na Yawe, bokumisa Ye wuta na basuka ya mabele, bino bato oyo botambolaka na ebale monene, mpe nyonso oyo etondisaka yango, bino bisanga mpe bavandi na yango nyonso!
Sing unto the LORD a new song, and his praise from the end of the earth, all of you that go down to the sea, and all that is therein; the isles, and the inhabitants thereof.
11 Tika ete esobe mpe bingumba na yango etombola mingongo, tika ete bamboka mike epai wapi Kedari avandaka esepela! Tika ete bato ya Sela bayemba na esengo; tika ete baganga wuta na likolo ya bangomba!
Let the wilderness and the cities thereof lift up their voice, the villages that Kedar does inhabit: let the inhabitants of the rock sing, let them shout from the top of the mountains.
12 Tika ete bapesa nkembo epai na Yawe mpe batatola lokumu na Ye kati na bisanga!
Let them give glory unto the LORD, and declare his praise in the islands.
13 Yawe akobima lokola elombe, akopelisa zuwa na Ye lokola mobundi bitumba; akoganga, solo; akoganga makasi, mpe akolonga banguna na Ye.
The LORD shall go forth as a mighty man, he shall stir up jealousy like a man of war: he shall cry, yea, roar; he shall prevail against his enemies.
14 Wuta kala, navandaki nye, nakangaki monoko mpe motema na ngai; kasi sik’oyo, lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota, nazali koganga, nazali kolela mpe kopema na pasi.
I have long time held my peace; I have been still, and refrained myself: now will I cry like a travailing woman; I will destroy and devour at once.
15 Nakobebisa bangomba milayi mpe mikuse, nakokawusa banzete mpe matiti na yango nyonso, nakokomisa bibale, bisanga, mpe nakokawusa maziba;
I will make waste mountains and hills, and dry up all their herbs; and I will make the rivers islands, and I will dry up the pools.
16 nakomema bakufi miso na nzela oyo batikala nanu koyeba te, nakotambolisa bango na nzela oyo bamesana kotambola te; nakobongola molili pole liboso na bango, mpe nakokomisa nzela ya nyoka-nyoka nzela ya alima. Tala makambo oyo nakosala, nakotika yango te.
And I will bring the blind by a way that they knew not; I will lead them in paths that they have not known: I will make darkness light before them, and crooked things straight. These things will I do unto them, and not forsake them.
17 Kasi bato oyo batiaka elikya na banzambe ya bikeko mpe balobaka na bililingi: « Bozali banzambe na biso, » bakozonga sima mpe bakosambwa.
They shall be turned back, they shall be greatly ashamed, that trust in graven images, that say to the molten images, All of you are our gods.
18 Boyoka, bino bakufi matoyi! Botala mpe bomona, bino bato bokufa miso!
Hear, all of you deaf; and look, all of you blind, that all of you may see.
19 Nani azali mokufi miso soki mosali na ngai te? Nani yango mokufi matoyi soki ntoma oyo ngai natindaki te? Nani mokufi miso lokola molobeli na ngai? Nani mokufi miso lokola mosali na Yawe?
Who is blind, but my servant? or deaf, as my messenger that I sent? who is blind as he that is perfect, and blind as the LORD's servant?
20 Omonaki makambo ebele, kasi ozalaki na bokebi na yango te; matoyi na yo efungwamaki, kasi oyokaki ata eloko moko te.
Seeing many things, but you observe not; opening the ears, but he hears not.
21 Esepelisaki Yawe, mpo na bosembo na Ye, kokomisa Mobeko na Ye eloko ya monene mpe ya lokumu.
The LORD is well pleased for his righteousness' sake; he will magnify the law, and make it honourable.
22 Kasi tala bato oyo bomengo na bango, babotola yango mpe babebisa bango; bakanga bango nyonso na mabulu mpe babomba bango kati na boloko, bakoma lokola bomengo ya bitumba, bongo moto akokangola bango azali te; bakoma lokola mosuni, bongo moto akoloba: « Zongisa bango, » azali te.
But this is a people robbed and spoiled; they are all of them snared in holes, and they are hid in prison houses: they are for a prey, and none delivers; for a spoil, and none says, Restore.
23 Nani kati na bino akoyoka makambo yango? Nani akozala na bokebi na makambo oyo ekoya?
Who among you will give ear to this? who will hearken and hear for the time to come?
24 Nani akabaki Jakobi na maboko ya babebisi, mpe Isalaele na maboko ya banguna? Boni, ezalaki Yawe te oyo liboso ya nani basalelaki masumu? Pamba te balingaki te kolanda nzela na Ye mpe kotosa Mobeko na Ye.
Who gave Jacob for a spoil, and Israel to the robbers? did not the LORD, he against whom we have sinned? for they would not walk in his ways, neither were they obedient unto his law.
25 Boye, asopelaki bango moto ya kanda na Ye, mobulu ya etumba makasi; azingelaki bango na moto na bangambo nyonso, kasi basosolaki te; mpe moto ezikisaki bango, kasi bazwaki penza likambo yango na motema te.
Therefore he has poured upon him the fury of his anger, and the strength of battle: and it has set him on fire round about, yet he knew not; and it burned him, yet he laid it not to heart.

< Ezayi 42 >