< Ezayi 33 >

1 Oh mobebisi, mawa na yo, yo oyo nanu obebisama te! Oh mofundi, mawa na yo, yo oyo nanu bafunda te! Tango okosilisa kobebisa, yo mpe bakobebisa yo, tango okosilisa kofunda, yo mpe bakofunda yo.
Běda tobě, zhoubce, ješto sám nebýváš huben, a kterýž nevěrně děláš, ješto tobě nečinili nevěrně. Když přestaneš býti zhoubcím, pohuben budeš; když přestaneš nevěrně činiti, nevěrněť činiti budou.
2 Oh Yawe, yokela biso mawa, tozali kotalela Yo! Tongo nyonso, zala makasi na biso, zala lobiko na biso na tango ya pasi!
Hospodine, učiň nám milost, na tebeť očekáváme; budiž ramenem svých každého jitra, a vysvobozením naším v čas ssoužení.
3 Kaka na lokito ya mongongo na Yo, bato bakimaka; soki otelemi, bikolo epalanganaka.
Před zvukem hřmotu rozprchnou se národové, před vyvýšením tvým budou rozptýleni pohané.
4 Oh bikolo, bakolokota bomengo na bino ya bitumba ndenge balokotaka mankoko; bakosopanela yango na elulu ndenge mabanki esalaka.
A sebrána bude loupež vaše, tak jako sbíráni bývají chroustové; jako připadají kobylky, tak připadnou na ni.
5 Yawe anetolami mpo ete avandaka na likolo, akotondisa Siona na bosembo mpe na solo.
Vyvýšíť se Hospodin, nebo na výsosti přebývá, a naplní Sion soudem a spravedlností.
6 Mikolo ya bomoi na yo ekozala na kimia; bwanya mpe boyebi ekozala bomengo ya lobiko na yo; kotosa Yawe, yango nde bozwi na yo.
I bude upevněním časů tvých, silou i hojným spasením; moudrost a umění, a bázeň Hospodinova poklad tvůj.
7 Tala, basoda na bango ya mpiko bazali koganga makasi na balabala; bamemi sango ya kimia, azali kolela makasi.
Aj, rekové jejich naříkali vně, jednatelé pokoje hořce plakali.
8 Nzela ya minene esili kokawuka, ata moto moko te ya mobembo azali koleka. Mobebisi abuki boyokani, asambwisi bingumba mpe azali na botosi ya moto ata moko te.
Zpustly silnice, přestali choditi cestou; zrušil příměří, nevážil sobě měst, za nic položil sobě člověka.
9 Mokili ezali na matanga, esili kolemba nzoto, Libani esambwe na soni mpe elembi-lembi lokola fololo, Saroni ekomi lokola esobe mpe Bashani mpe Karimeli ekweyisi makasa na yango.
Kvílila a zemdlela země, styděti se musil Libán a usvadl; Sáron učiněn jako poušť, Bázan pak a Karmel oklácen.
10 « Sik’oyo nakotelema, » elobi Yawe. « Sik’oyo nakonetolama, sik’oyo nakotombolama.
Jižť povstanu, praví Hospodin, již vyvýšen, již vyzdvižen budu.
11 Mabongisi ya mitema na bino ezali kaka lokola matiti ya kokawuka mpe soki ekokisami, ezalaka kaka lokola matiti ya kokawuka, pema na bino moko ekozikisa bino lokola moto.
Počnouce slámu, porodíte strniště; oheň dýchání vašeho sžíře vás.
12 Bato bakozika na libanga ya moto, ndenge nzube oyo bakata ezikaka na moto. »
I budou národové vypálené vápno, trní podťaté, ohněm spáleni budou.
13 Bino bato oyo bozali mosika, boyoka makambo oyo nazali kosala, bino bato oyo bozali pene, bososola nguya na ngai!
Slyšte dalecí, co jsem učinil, a poznejte blízcí sílu mou.
14 Bato ya masumu bazali kolenga kati na Siona, somo ekangi bato oyo bayebi Nzambe te: « Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo ezikisaka? Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo epelaka tango nyonso? »
Zděsili se na Sionu hříšníci, podjala hrůza pokrytce, řkoucí: Kdož by z nás mohl ostáti před ohněm sžírajícím? Kdož by z nás mohl ostáti před plamenem věčným?
15 Moto oyo atambolaka na bosembo mpe alobaka solo, moto oyo abwakaka litomba oyo ezwami na nzela ya moyibi, moto oyo asembolaka maboko na ye te mpo na kozwa kanyaka, moto oyo akangaka matoyi na ye mpo na koboya koyoka masolo ya koboma bato, mpe oyo akangaka miso na ye mpo na koboya komona mabe.
Ten, kterýž chodí v spravedlnosti, a mluví pravé věci, kterýž pohrdá ziskem z útisku, kterýž otřásá ruce své, aby darů nepřijímal, kterýž zacpává uši své, aby neslyšel rady o vraždě, a zavírá oči své, aby se na zlé nedíval:
16 Moto wana akovanda na likolo: mabanga ya makasi ekozala ekimelo na ye. Akozanga te lipa ya kolia mpe mayi ya komela.
Ten na vysokých místech přebývati bude, hradové na skalách útočiště jeho, tomu chléb dán bude, vody jeho stálé budou.
17 Miso na yo ekomona Mokonzi na kitoko na Ye nyonso mpe ekomona ndenge mokili ekenda kino na mosika.
Krále v okrase jeho uzří oči tvé, spatří i zemi dalekou.
18 Motema na yo ekokanisa lisusu somo oyo ozalaki koyoka: « Wapi mokonzi oyo azwaka mpako? Wapi moto oyo amekaka bakilo? Wapi moto oyo atalaka bandako na biso ya milayi? »
Srdce tvé přemyšlovati bude o strachu, řka: Kdež jest písař, kde výběrčí, kde spisovatel velikých domů?
19 Okomona lisusu bato ya lolendo te, bato oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koyoka mpe maloba na bango, pasi mpo na kososola.
Lidu ukrutného neuhlédáš, lidu hluboké řeči, jíž bys neslýchal, a jazyku cizího, jemuž bys nerozuměl.
20 Tala Siona, engumba ya bafeti na biso ya minene, miso na yo ekomona Yelusalemi, ndako ya kimia, ndako ya kapo oyo ekopikama makasi; bakokoka kopikola makonzi na yango te, mpe basinga na yango ekokatana te.
Patř na Sion, město slavností našich, oči tvé nechať hledí na Jeruzalém, obydlí pokojné, stánek, kterýž nebude přenešen, kolíkové jeho na věky se nepohnou, a žádný provaz jeho se neztrhá;
21 Kuna, Yawe akozala Elombe na biso. Ekozala etuka ya bibale minene mpe ya miluka. Masuwa moko te ekoya kuna, masuwa moko te ya lokumu ekoleka wana.
Proto že velikomocný Hospodin jest nám na místě tom řekami toků širokých, po němž nepůjde lodí s vesly, aniž bárka veliká po něm přecházeti bude.
22 Pamba te Yawe azali Mosambisi na biso, Yawe azali Mosali mibeko na biso, Yawe azali Mokonzi na biso; Ye nde akobikisa biso.
Nebo Hospodin jest soudce náš, Hospodin ustanovitel práv našich, Hospodin král náš, onť spasí nás.
23 Basinga na yo esili kolemba, ezali lisusu te kosimba malamu nzete ya bendele; ezali lisusu te kofungola malamu vwale. Boye, na tango bakokabola ebele ya bomengo ya bitumba, bato ya tengu-tengu, bango moko penza, bakobotola eteni na bango ya bomengo.
Oslábliť jsou provazové tvoji, aniž budou moci utvrditi sloupu bárky své, ani roztáhnouti plachty, anť již rozdělena bude kořist loupeže mnohé; i chromí rozchvátají kořist.
24 Movandi moke te ya Siona akoloba: « Nazali kobela! » Masumu ya bavandi ya kuna ekolimbisama.
Aniž dí kdo z obyvatelů: Nemocen jsem. Lid osedlý v něm zproštěn bude nepravosti.

< Ezayi 33 >