< Ezayi 24 >

1 Tala, Yawe akobebisa mokili mpe akokomisa yango lokola esobe; akokotisa mobulu kati na yango mpe akopanza bato na yango. 2 Ekozala mpe kaka ndenge moko mpo na Banganga-Nzambe mpe bato, mpo na nkolo mpe mowumbu na ye, mpo na nkolo ya mwasi mpe mwasi mosali na ye, mpo na moteki mpe mosombi, mpo na modefisi mpe modefi, mpo na moto oyo bakofuta ye niongo mpe mpo na moto oyo akofuta niongo. 3 Mokili ekobebisama penza nye mpe bakopanza yango nyonso. Yawe nde alobaki yango. 4 Mokili ezali na matanga mpe ekawuki, mokili mobimba ebebi mpe ekawuki; ezala likolo mpe ebebi elongo na mokili! 5 Bato ya mokili bakomisi yango mbindo, bazali kotosa mibeko te; banyati-nyati bikateli mpe babuki boyokani ya seko. 6 Mpo na yango, bilakeli mabe ezali kozikisa mokili; bato na yango bakomema mokumba ya mabe na bango. Yango wana, bato ya mokili bazali kokufa, mpe ndambo moke kaka nde etikali. 7 Vino ya sika ezali na matanga, elanga ya vino ekawuki; bato nyonso oyo bamesana na esengo bakomi kolela na pasi. 8 Esengo ya mbonda esili, makelele ya bato ya biyenga esili, esengo ya lindanda esili; 9 komela vino etikali lisusu na banzembo te, masanga ya makasi ekomi bololo mpo na bato oyo bamelaka yango. 10 Engumba oyo ebeba etikali pamba, bikuke ya bandako nyonso ekangami. 11 Na babalabala, koganga na koganga ete vino ezali lisusu te, kosepela nyonso ebongwani molili, esengo nyonso elongwe na mokili. 12 Libebi kaka nde etikali kati na engumba, babuki-buki bikuke na yango na biteni. 13 Pamba te ekosalema kati na mokili mpe kati na bikolo ndenge esalemaka tango babukaka bambuma ya olive na nzete to tango balokotaka bambuma ya vino soki basilisi kobuka yango. 14 Bamoko bakotombola mingongo na bango mpe bakoganga na esengo; wuta na weste ya mayi monene, bakobeta milolo mpo na lokumu na Yawe. 15 Yango wana, kuna na ngambo ya este, bopesa nkembo na Yawe; bonetola Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, kati na bisanga ya ebale monene. 16 Wuta na suka ya mokili, tozali koyoka banzembo: « Nkembo epai ya Nkolo-Na-Bosembo. » Kasi nalobaki: « Nakomi na suka, nakomi na suka! Mawa mpo na ngai! Bazoba bateki mboka, na bozoba penza, bazoba bateki mboka! » 17 Oh bato ya mokili, somo, libulu mpe motambo ezali kozela bino. 18 Moto nyonso oyo akokima na lokito ya somo akokweya na libulu, mpe oyo akoluka kobima kati na libulu akokangama na motambo. Maninisa ya likolo esili kofungwama, makonzi ya mokili ezali koningana. 19 Mokili ebukani-bukani, mokili epanzani, mokili eningani makasi. 20 Mokili ekomi kotenga-tenga lokola moto oyo alangwe masanga, ezali koningana na mopepe lokola ndako ya matiti. Mokumba ya botomboki na ye ezali likolo na ye, esili kokweya mpe ekotelema lisusu te. 21 Kasi na mokolo wana, Yawe akopesa etumbu na mampinga ya lola kuna na likolo, mpe na bakonzi ya mokili na se. 22 Bakosangisa bango elongo kati na libulu ndenge basangisaka bakangami na boloko, bakokangela bango na boloko mpe bakozwa etumbu sima na mikolo ebele. 23 Sanza ekokoma motane, mpe moyi ekoyoka soni, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokonza na ngomba Siona mpe kati na Yelusalemi, liboso ya bampaka na yango, na nkembo makasi.

< Ezayi 24 >