< Ezayi 12 >

1 Na mokolo wana, okoloba: « Oh Yawe, nazali kosanzola Yo, pamba te ata osilikelaki ngai, kanda na Yo elongwaki likolo na ngai mpe obondisaki ngai! 2 Solo, Nzambe azali lobiko na ngai; nakotia elikya na ngai epai na Ye mpe nakobanga lisusu te. Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai; azali lobiko na ngai. » 3 Yango wana, botoka mayi na esengo na etima ya lobiko. 4 Na mokolo wana bokoloba: « Bosanzola Yawe, bobelela Kombo na Ye, bosakola misala na Ye kati na bikolo mpe botatola ete Kombo na Ye ezali likolo na nyonso. 5 Boyemba loyembo mpo na Yawe, pamba te asali makambo ya kokamwa. Tika ete mokili mobimba eyeba yango! 6 Bino bato ya Siona, bobeta milolo mpe boyemba loyembo na esengo, pamba te Mosantu ya Isalaele azali monene kati na bino! »

< Ezayi 12 >