< Oze 10 >

1 Isalaele azalaki lokola nzete ya vino ya bitape ebele, azalaki kobota mbuma mpo na ye moko. Ndenge azalaki kobota mbuma ebele, ndenge wana mpe atongaki bitumbelo ebele; ndenge mabele na ye ekomaki kitoko, ndenge wana mpe abongisaki mabanga na ye ya bule.
Israel is an empty vine, he brings forth fruit unto himself: according to the multitude of his fruit he has increased the altars; according to the goodness of his land they have made goodly images.
2 Mitema na bango etondi na mabe mpe basengeli sik’oyo kofuta masumu na bango. Ye moko Yawe akokaba bitumbelo na bango mpe akopanza mabanga na bango ya bule.
Their heart is divided; now shall they be found faulty: he shall break down their altars, he shall spoil their images.
3 Boye bakoloba: « Tozali na mokonzi te, pamba te totosaki Yawe te. Ata tozalaki na mokonzi, akokaki kosala nini mpo na biso? »
For now they shall say, We have no king, because we feared not the LORD; what then should a king do to us?
4 Bapesaka bilaka ebele, balapaka ndayi ya lokuta mpe basalaka boyokani. Boye, bosembo ekomi lokola matiti ya ngenge oyo ekolaka na bisika oyo bakataka bilanga.
They have spoken words, swearing falsely in making a covenant: thus judgment springs up as hemlock in the furrows of the field.
5 Bavandi ya Samari bazali kolenga mpo na mwana ngombe ya mwasi ya Beti-Aveni; bato na yango mpe Banganga-Nzambe oyo bagumbamelaka ekeko ya mwana ngombe bakosala matanga na tina na yango. Tika ete basepela lelo mpo ete nkembo ya mwana ngombe elongwe kati na bango.
The inhabitants of Samaria shall fear because of the calves of Bethaven: for the people thereof shall mourn over it, and the priests thereof that rejoiced on it, for the glory thereof, because it is departed from it.
6 Bakomema ekeko ya mwana ngombe yango na Asiri lokola likabo mpo na mokonzi monene. Efrayimi akoyoka soni, mpe Isalaele akosambwa mpo na mabongisi oyo basalaki.
It shall be also carried unto Assyria for a present to king Jareb: Ephraim shall receive shame, and Israel shall be ashamed of his own counsel.
7 Mokili ya Samari mpe mokonzi na yango bakotiola likolo ya mayi lokola mwa eteni ya nzete ya kokawuka.
As for Samaria, her king is cut off as the foam upon the water.
8 Bisambelo ya likolo ya bangomba ya Beti-Aveni epai wapi Isalaele azalaki kosala masumu ekobebisama. Banzube mpe basende ekobota na bitumbelo na bango mpe ekozipa yango. Bongo bakoloba na bangomba milayi: « Bozipa biso! » Mpe bakoloba na bangomba mikuse: « Bokweyela biso! »
The high places also of Aven, the sin of Israel, shall be destroyed: the thorn and the thistle shall come up on their altars; and they shall say to the mountains, Cover us; and to the hills, Fall on us.
9 Isalaele, osalaki masumu wuta na mokolo ya Gibea mpe obongwani te. Boni, bitumba ekomeli bato mabe ya Gibea te?
O Israel, you have sinned from the days of Gibeah: there they stood: the battle in Gibeah against the children of iniquity did not overtake them.
10 Nakopesa bango etumbu ndenge nalingi; bato ya bikolo ya bapaya bakosalela bango likita mpe bakokanga bango minyololo likolo ya masumu mibale oyo basalaki.
It is in my desire that I should chastise them; and the people shall be gathered against them, when they shall bind themselves in their two furrows.
11 Efrayimi azali lokola mwana ngombe ya mwasi oyo babokola malamu, alingaka kobeta ble; kasi nakotia ekangiseli na kingo na ye ya kitoko. Nakotambolisa Efrayimi lokola mpunda, Yuda akobalola mabele, Jakobi akopanza-panza yango.
And Ephraim is as an heifer that is taught, and loves to tread out the corn; but I passed over upon her fair neck: I will make Ephraim to ride; Judah shall plow, and Jacob shall break his clods.
12 Bolona bosembo mpo na bino moko mpe bokobuka mbuma ya bolingo ya solo. Bomikatela bilanga ya sika, pamba te tango ya koluka Yawe ekoki kino tango akoya kosopela bino bosembo.
Sow to yourselves in righteousness, reap in mercy; break up your fallow ground: for it is time to seek the LORD, till he comes and rain righteousness upon you.
13 Bolonaki makambo mabe, bobukaki mpe makambo mabe mpe boliaki mbuma ya lokuta, pamba te botiaki elikya na makasi mpe na ebele ya basoda na bino.
All of you have plowed wickedness, all of you have reaped iniquity; all of you have eaten the fruit of lies: because you did trust in your way, in the multitude of your mighty men.
14 Yango wana, lokito ya bitumba ekoyokana kati na yo, bandako na yo nyonso oyo batonga makasi ekobebisama; ndenge Salimani abebisaki Beti-Aribeli na mokolo ya bitumba, tango bamama mpe bana na bango bakweyaki na mabele.
Therefore shall a tumult arise among your people, and all your fortresses shall be spoiled, as Shalman spoiled Betharbel in the day of battle: the mother was dashed in pieces upon her children.
15 Beteli, makambo oyo ekokomela yo mpo ete mabe na yo eleki ndelo. Tango mokolo yango ekokoka, mokonzi ya Isalaele akozala lisusu te.
So shall Bethel do unto you because of your great wickedness: in a morning shall the king of Israel utterly be cut off.

< Oze 10 >