< Ebandeli 8 >

1 Nzambe akanisaki Noa mpe banyama nyonso oyo ezalaki elongo na ye kati na masuwa, atindaki mopepe na mokili mpe mayi ekitaki.
And God remembered Noah, and all the wild animals, and all the tame animals, and all the flying creatures, and all the crawling creatures that were with him in the ship; and God made a wind to pass over the earth, and the waters began to recede.
2 Bitima ya se mpe maninisa ya likolo ekangamaki mpe mvula etikaki konoka.
And the fountains of the deep and the floodgates of the sky were closed, and the rain from the sky was restrained.
3 Mayi ekomaki kolongwa moke-moke likolo ya mabele, mpe sima na mikolo nkama moko na tuku mitano, mayi ekitaki.
And the waters receded steadily from the land. And after the end of one hundred fifty days the waters had decreased significantly.
4 Na mokolo ya zomi na sambo ya sanza ya sambo, masuwa esemaki likolo ya bangomba Ararati.
And in the seventh month, on the seventeenth day of the month, the ship came to rest on the mountains of Ararat.
5 Mayi ezalaki kokoba kokita kino na sanza ya zomi. Na mokolo ya liboso ya sanza yango, basonge ya bangomba emonanaki.
The waters receded continually to the tenth month. In the tenth month, on the first day of the month, the tops of the mountains became visible.
6 Sima na mikolo tuku minei, Noa afungolaki lininisa ya masuwa oyo asalaki
It happened at the end of forty days, that Noah opened the window of the ship which he had made,
7 mpe abimisaki yanganga. Yanganga yango ezalaki kokende mpe kozonga kino tango mayi ekawukaki na mokili.
and he sent forth a raven. It went back and forth, until the waters had dried up from the earth.
8 Mpe lisusu, Noa abimisaki ebenga mpo na kotala soki mayi ekawuki na mokili.
Then he sent forth a dove from it, to see if the waters had abated from the surface of the ground,
9 Kasi ebenga ezwaki esika ya kotia matambe na yango te, pamba te mayi ezalaki na etando nyonso ya mokili. Boye, ezongaki na masuwa epai ya Noa. Noa abimisaki loboko, azwaki ebenga mpe akotisaki yango kati na masuwa.
but the dove found no place to rest her foot, and she returned to him into the ship; for the waters were on the surface of the whole earth. He put forth his hand, and took her, and brought her to him into the ship.
10 Azelaki mikolo sambo mpe abimisaki lisusu ebenga libanda ya masuwa.
And he waited yet another seven days; and again he sent forth the dove out of the ship.
11 Tango ebenga ezongaki epai na ye na pokwa, ememaki lokasa ya olive ya mobesu na monoko na yango. Boye, Noa asosolaki ete mayi ekiti na mokili.
The dove came back to him at evening, and, look, in her mouth was an olive leaf plucked off. So Noah knew that the waters had abated from the earth.
12 Azelaki lisusu mikolo sambo mosusu, mpe abimisaki ebenga. Kasi ebenga ezongaki lisusu te.
He stayed yet another seven days, and sent forth the dove; and she did not return to him any more.
13 Na mokolo ya liboso na sanza ya liboso, tango Noa akokisaki mibu nkama motoba na moko ya mbotama, mayi ekawukaki na mokili; Noa afungolaki masuwa na likolo na yango mpe amonaki ete mabele ekawuki.
And it happened in the six hundred first year of Noah's life, in the first month, the first day of the month, the waters had dried up from the earth. And Noah removed the covering of the ship and looked out. And look, the surface of the ground was dry.
14 Na mokolo ya tuku mibale na sambo ya sanza ya mibale, mabele ekawukaki penza.
In the second month, on the twenty-seventh day of the month, the earth was dry.
15 Boye, Nzambe alobaki na Noa:
God spoke to Noah, saying,
16 « Bima na masuwa elongo na mwasi na yo, mpe bana na yo ya mibali elongo na basi na bango.
"Go out of the ship, you, and your wife, and your sons, and your sons' wives with you.
17 Bimisa mpe bikelamu oyo ezali elongo na yo: bandeke, banyama mpe bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpo ete ebotana mpe ekoma ebele kati na mokili. »
Bring out with you every living thing that is with you of all flesh, of flying creatures, and animals, and every creature that crawls on the earth, that they may swarm on the earth, and be fruitful and multiply on the earth."
18 Boye, Noa abimaki libanda elongo na bana na ye ya mibali, mwasi na ye mpe basi ya bana na ye.
And Noah went forth, with his sons, his wife, and his sons' wives with him.
19 Banyama nyonso, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bandeke nyonso, bikelamu nyonso oyo etambolaka na mokili, ebimaki na masuwa na molongo kolanda lolenge na yango.
And every wild animal, and every tame animal, and every flying creature, and every creature that crawls on the earth, after their families, went out of the ship.
20 Noa atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe azwaki ndambo ya banyama mpe bandeke ezanga mbindo, abonzelaki yango Yawe lokola mbeka ya kotumba.
Noah built an altar to God, and took of every clean animal, and of every clean flying creature, and offered burnt offerings on the altar.
21 Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki: « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala.
And God smelled the pleasing aroma, and God said in his heart, "I will never again curse the ground because of humankind, nor will I again destroy every living thing, as I have done.
22 Na tango nyonso oyo mokili ekozala, tango ya kolona mpe tango ya kobuka, tango ya malili mpe tango ya molunge, tango ya mvula mpe tango ya elanga, tango ya moyi mpe tango ya butu, ekozanga te. »
While the earth remains, seed time and harvest, and cold and heat, and summer and winter, and day and night shall not cease."

< Ebandeli 8 >

A Dove is Sent Forth from the Ark
A Dove is Sent Forth from the Ark