< Ebandeli 48 >

1 Sima na makambo wana, bayaki koyebisa Jozefi: « Tala, tata na yo azali kobela. » Jozefi azwaki bana na ye mibale ya mibali: Manase mpe Efrayimi.
ἐγένετο δὲ μετὰ τὰ ῥήματα ταῦτα καὶ ἀπηγγέλη τῷ Ιωσηφ ὅτι ὁ πατήρ σου ἐνοχλεῖται καὶ ἀναλαβὼν τοὺς δύο υἱοὺς αὐτοῦ τὸν Μανασση καὶ τὸν Εφραιμ ἦλθεν πρὸς Ιακωβ
2 Bapesaki sango epai ya Jakobi ete mwana na ye ya mobali Jozefi azali koya epai na ye. Isalaele asalaki makasi mpe avandaki na mbeto.
ἀπηγγέλη δὲ τῷ Ιακωβ λέγοντες ἰδοὺ ὁ υἱός σου Ιωσηφ ἔρχεται πρὸς σέ καὶ ἐνισχύσας Ισραηλ ἐκάθισεν ἐπὶ τὴν κλίνην
3 Jakobi alobaki na Jozefi: — Nzambe-Na-Nguya-Nyonso abimelaki ngai na Luze, na mokili ya Kanana; mpe kuna, apambolaki ngai.
καὶ εἶπεν Ιακωβ τῷ Ιωσηφ ὁ θεός μου ὤφθη μοι ἐν Λουζα ἐν γῇ Χανααν καὶ εὐλόγησέν με
4 Alobaki na ngai: « Nakopesa yo mabota mpe nakokomisa yo ebele; nakokomisa yo lisanga ya bikolo ebele mpe nakopesa mokili oyo lokola libula ya seko na seko epai ya bakitani na yo sima na yo. »
καὶ εἶπέν μοι ἰδοὺ ἐγὼ αὐξανῶ σε καὶ πληθυνῶ σε καὶ ποιήσω σε εἰς συναγωγὰς ἐθνῶν καὶ δώσω σοι τὴν γῆν ταύτην καὶ τῷ σπέρματί σου μετὰ σὲ εἰς κατάσχεσιν αἰώνιον
5 Mpe sik’oyo, bana na yo ya mibali oyo babotamaki na Ejipito liboso ete ngai naya awa, bakomi lokola bana na ngai. Efrayimi mpe Manase bakomi bana na ngai lokola Ribeni mpe Simeoni.
νῦν οὖν οἱ δύο υἱοί σου οἱ γενόμενοί σοι ἐν Αἰγύπτῳ πρὸ τοῦ με ἐλθεῖν πρὸς σὲ εἰς Αἴγυπτον ἐμοί εἰσιν Εφραιμ καὶ Μανασση ὡς Ρουβην καὶ Συμεων ἔσονταί μοι
6 Bana oyo okobota sima na bango bakozala ya yo; bakozwa eteni na bango ya libula na kombo ya bayaya na bango.
τὰ δὲ ἔκγονα ἃ ἐὰν γεννήσῃς μετὰ ταῦτα σοὶ ἔσονται ἐπὶ τῷ ὀνόματι τῶν ἀδελφῶν αὐτῶν κληθήσονται ἐν τοῖς ἐκείνων κλήροις
7 Pamba te, tango nawutaki na Padani, Rasheli akufaki na nzela, na maboko na ngai, wana nazalaki kokende na mokili ya Kanana, pene ya Efrata; nakundaki ye kuna pembeni ya Efrata oyo babengaka Beteleemi.
ἐγὼ δὲ ἡνίκα ἠρχόμην ἐκ Μεσοποταμίας τῆς Συρίας ἀπέθανεν Ραχηλ ἡ μήτηρ σου ἐν γῇ Χανααν ἐγγίζοντός μου κατὰ τὸν ἱππόδρομον χαβραθα τῆς γῆς τοῦ ἐλθεῖν Εφραθα καὶ κατώρυξα αὐτὴν ἐν τῇ ὁδῷ τοῦ ἱπποδρόμου αὕτη ἐστὶν Βαιθλεεμ
8 Tango Isalaele amonaki bana mibali ya Jozefi, atunaki: — Ba-oyo bazali banani?
ἰδὼν δὲ Ισραηλ τοὺς υἱοὺς Ιωσηφ εἶπεν τίνες σοι οὗτοι
9 Jozefi azongiselaki tata na ye: — Bazali bana mibali oyo Nzambe apesi ngai awa. Isalaele alobaki: — Pusa bango mpo ete napambola bango.
εἶπεν δὲ Ιωσηφ τῷ πατρὶ αὐτοῦ υἱοί μού εἰσιν οὓς ἔδωκέν μοι ὁ θεὸς ἐνταῦθα καὶ εἶπεν Ιακωβ προσάγαγέ μοι αὐτούς ἵνα εὐλογήσω αὐτούς
10 Miso ya Isalaele elembaki mpo na kimobange mpe azalaki komona lisusu malamu te. Yango wana, Jozefi apusaki bana na ye ya mibali pembeni ya tata na ye, Isalaele apesaki bango beze mpe ayambaki bango.
οἱ δὲ ὀφθαλμοὶ Ισραηλ ἐβαρυώπησαν ἀπὸ τοῦ γήρους καὶ οὐκ ἠδύνατο βλέπειν καὶ ἤγγισεν αὐτοὺς πρὸς αὐτόν καὶ ἐφίλησεν αὐτοὺς καὶ περιέλαβεν αὐτούς
11 Isalaele alobaki na Jozefi: — Nazalaki na elikya te ete nakomona lisusu elongi na yo; kasi sik’oyo Nzambe apesi ngai nzela ya komona kutu bana na yo.
καὶ εἶπεν Ισραηλ πρὸς Ιωσηφ ἰδοὺ τοῦ προσώπου σου οὐκ ἐστερήθην καὶ ἰδοὺ ἔδειξέν μοι ὁ θεὸς καὶ τὸ σπέρμα σου
12 Jozefi alongolaki bana na ye na mabolongo ya Isalaele mpe agumbamaki elongi na ye kino na se.
καὶ ἐξήγαγεν Ιωσηφ αὐτοὺς ἀπὸ τῶν γονάτων αὐτοῦ καὶ προσεκύνησαν αὐτῷ ἐπὶ πρόσωπον ἐπὶ τῆς γῆς
13 Jozefi azwaki bango mibale: Efrayimi na loboko na ye ya mobali, loboko ya mwasi ya Isalaele; mpe Manase, na loboko na ye ya mwasi, loboko ya mobali ya tata na ye. Apusaki bango pembeni ya Isalaele.
λαβὼν δὲ Ιωσηφ τοὺς δύο υἱοὺς αὐτοῦ τόν τε Εφραιμ ἐν τῇ δεξιᾷ ἐξ ἀριστερῶν δὲ Ισραηλ τὸν δὲ Μανασση ἐν τῇ ἀριστερᾷ ἐκ δεξιῶν δὲ Ισραηλ ἤγγισεν αὐτοὺς αὐτῷ
14 Isalaele asembolaki loboko na ye ya mobali mpe atiaki yango likolo ya moto ya Efrayimi oyo azalaki leki; mpe loboko na ye ya mwasi likolo ya moto ya Manase. Na bongo, abongolaki maboko na ye mpo ete Manase azalaki mwana ya liboso.
ἐκτείνας δὲ Ισραηλ τὴν χεῖρα τὴν δεξιὰν ἐπέβαλεν ἐπὶ τὴν κεφαλὴν Εφραιμ οὗτος δὲ ἦν ὁ νεώτερος καὶ τὴν ἀριστερὰν ἐπὶ τὴν κεφαλὴν Μανασση ἐναλλὰξ τὰς χεῖρας
15 Isalaele apambolaki Jozefi mpe alobaki: Tika ete Nzambe oyo, liboso na Ye, bakoko na ngai, Abrayami mpe Izaki, batambolaki, Nzambe oyo azali Mobateli na ngai wuta mokolo ya mbotama na ngai kino na mokolo ya lelo,
καὶ ηὐλόγησεν αὐτοὺς καὶ εἶπεν ὁ θεός ᾧ εὐηρέστησαν οἱ πατέρες μου ἐναντίον αὐτοῦ Αβρααμ καὶ Ισαακ ὁ θεὸς ὁ τρέφων με ἐκ νεότητος ἕως τῆς ἡμέρας ταύτης
16 anjelu oyo akangolaki ngai na mabe nyonso, apambola bana oyo ya mibali! Tika ete babengama na kombo na ngai, mpe na bakombo ya bakoko na ngai, Abrayami mpe Izaki! Tika ete bakoma ebele kati na mokili!
ὁ ἄγγελος ὁ ῥυόμενός με ἐκ πάντων τῶν κακῶν εὐλογήσαι τὰ παιδία ταῦτα καὶ ἐπικληθήσεται ἐν αὐτοῖς τὸ ὄνομά μου καὶ τὸ ὄνομα τῶν πατέρων μου Αβρααμ καὶ Ισαακ καὶ πληθυνθείησαν εἰς πλῆθος πολὺ ἐπὶ τῆς γῆς
17 Tango Jozefi amonaki ete tata na ye atiaki loboko na ye ya mobali na moto ya Efrayimi, asepelaki te. Azwaki loboko ya tata na ye, alongolaki yango na moto ya Efrayimi mpo na kotia yango na moto ya Manase.
ἰδὼν δὲ Ιωσηφ ὅτι ἐπέβαλεν ὁ πατὴρ τὴν δεξιὰν αὐτοῦ ἐπὶ τὴν κεφαλὴν Εφραιμ βαρὺ αὐτῷ κατεφάνη καὶ ἀντελάβετο Ιωσηφ τῆς χειρὸς τοῦ πατρὸς αὐτοῦ ἀφελεῖν αὐτὴν ἀπὸ τῆς κεφαλῆς Εφραιμ ἐπὶ τὴν κεφαλὴν Μανασση
18 Jozefi alobaki na tata na ye: — Boye te, tata na ngai! Oyo azali mwana ya liboso; tia loboko na yo ya mobali likolo ya moto na ye.
εἶπεν δὲ Ιωσηφ τῷ πατρὶ αὐτοῦ οὐχ οὕτως πάτερ οὗτος γὰρ ὁ πρωτότοκος ἐπίθες τὴν δεξιάν σου ἐπὶ τὴν κεφαλὴν αὐτοῦ
19 Kasi tata na ye aboyaki mpe alobaki: — Nayebi, mwana na ngai! Nayebi! Ye mpe akokoma ekolo, akokoma monene. Nzokande, leki na ye akozala monene koleka ye mpe bakitani na ye bakokoma lisanga ya bikolo.
καὶ οὐκ ἠθέλησεν ἀλλὰ εἶπεν οἶδα τέκνον οἶδα καὶ οὗτος ἔσται εἰς λαόν καὶ οὗτος ὑψωθήσεται ἀλλὰ ὁ ἀδελφὸς αὐτοῦ ὁ νεώτερος μείζων αὐτοῦ ἔσται καὶ τὸ σπέρμα αὐτοῦ ἔσται εἰς πλῆθος ἐθνῶν
20 Apambolaki bango wana mpe alobaki: Bato ya Isalaele bakotangaka bakombo na bino mpo na kopambola: « Tika ete Nzambe akomisa bino lokola Efrayimi mpe Manase! » Boye Isalaele atiaki Efrayimi liboso ya Manase.
καὶ εὐλόγησεν αὐτοὺς ἐν τῇ ἡμέρᾳ ἐκείνῃ λέγων ἐν ὑμῖν εὐλογηθήσεται Ισραηλ λέγοντες ποιήσαι σε ὁ θεὸς ὡς Εφραιμ καὶ ὡς Μανασση καὶ ἔθηκεν τὸν Εφραιμ ἔμπροσθεν τοῦ Μανασση
21 Bongo Isalaele alobaki na Jozefi: — Etikali moke nakufa. Nzambe akozala na bino mpe akozongisa bino na mokili ya bakoko na bino.
εἶπεν δὲ Ισραηλ τῷ Ιωσηφ ἰδοὺ ἐγὼ ἀποθνῄσκω καὶ ἔσται ὁ θεὸς μεθ’ ὑμῶν καὶ ἀποστρέψει ὑμᾶς εἰς τὴν γῆν τῶν πατέρων ὑμῶν
22 Mpo na ngai, napesi yo koleka oyo napesaki epai na bandeko na yo: eteni ya mabele oyo nabotolaki, na mopanga mpe na tolotolo na ngai, epai ya bato ya Amori.
ἐγὼ δὲ δίδωμί σοι Σικιμα ἐξαίρετον ὑπὲρ τοὺς ἀδελφούς σου ἣν ἔλαβον ἐκ χειρὸς Αμορραίων ἐν μαχαίρᾳ μου καὶ τόξῳ

< Ebandeli 48 >