< Ebandeli 47 >

1 Jozefi akendeki mpe alobaki na Faraon: — Tata na ngai elongo na bandeko na ngai bayei wuta na mokili ya Kanana na bameme, bantaba, bangombe mpe biloko na bango nyonso; bazali sik’oyo na Gosheni.
Then Joseph went in and told Pharaoh, and said, "My father and my brothers, with their flocks, their herds, and all that they own, have come from the land of Canaan. And look, they are in the land of Goshen."
2 Jozefi aponaki bandeko na ye mitano mpe alakisaki bango epai ya Faraon.
And from among his brothers he took five men and presented them before Pharaoh.
3 Faraon atunaki bandeko ya Jozefi: — Bosalaka mosala nini? Bazongiselaki Faraon: — Basali na yo bazali babateli bibwele ndenge kaka bakoko na biso bazalaki.
Then Pharaoh said to his brothers, "What is your occupation?" And they said to Pharaoh, "Your servants are shepherds, both we, and our fathers."
4 Balobaki lisusu na Faraon: — Toyei kovanda awa, pamba te nzala makasi ezali kati na mokili ya Kanana mpe matiti ezali lisusu te mpo na bibwele ya basali na yo; yango wana, tobondeli yo, pesa basali na yo nzela ya kovanda na Gosheni.
And they said to Pharaoh, "We have come to sojourn in the land, for there is no pasture for your servants' flocks. For the famine is severe in the land of Canaan. So now, please let your servants live in the land of Goshen."
5 Faraon alobaki na Jozefi: — Tata na yo mpe bandeko na yo bayei epai na yo;
Then Pharaoh spoke to Joseph, saying, "Your father and your brothers have come to you,
6 mokili ya Ejipito mpe ezali na maboko na yo. Vandisa tata na yo mpe bandeko na yo na eteni ya mabele oyo eleki kitoko; tika ete bavanda na Gosheni. Mpe soki oyebi kati na bango bato ya mayele, pesa bango mokumba ya kobatela bibwele na ngai.
and the land of Egypt is before you. Settle your father and your brothers in the best of the land. They may live in the land of Goshen. If you know any able men among them, then put them in charge of my livestock."
7 Jozefi amemaki tata na ye mpo na kolakisa ye epai ya Faraon. Tango Jakobi asilisaki kopambola Faraon,
Then Joseph brought in his father Jacob, and presented him before Pharaoh, and Jacob blessed Pharaoh.
8 Faraon atunaki Jakobi: — Ozali na mibu boni?
And Pharaoh said to Jacob, "How many are the days of the years of your life?"
9 Jakobi azongiselaki Faraon: — Nazali na mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama. Mikolo ya bomoi na ngai ezali moke mpe ya pasi, ekokokana te na mikolo ya bomoi ya bakoko na ngai.
So Jacob said to Pharaoh, "The days of the years of my sojourning are one hundred thirty years. Few and difficult have been the years of my life, and they have not attained to the days of the years of the life of my fathers in the days of their sojourning."
10 Jakobi apambolaki Faraon mpe alongwaki liboso na ye.
Then Jacob blessed Pharaoh and went out from Pharaoh's presence.
11 Jozefi avandisaki tata na ye mpe bandeko na ye na Ejipito mpe apesaki bango eteni ya mabele oyo eleki kitoko kati na mokili, na mabele ya Ramisesi, ndenge kaka Faraon atindaki.
Joseph settled his father and his brothers, and gave them property in the land of Egypt, in the best of the land, in the land of Rameses, as Pharaoh had commanded.
12 Jozefi apesaki lisusu biloko ya kolia epai ya tata na ye, bandeko na ye mpe epai ya libota ya tata na ye mobimba kolanda motango ya bana na bango.
And Joseph provided food for his father, his brothers, and all of his father's household, according to the number of their dependents.
13 Biloko ya kolia ezalaki lisusu te kati na mokili mobimba mpe nzala makasi eyaki. Mokili ya Ejipito mpe oyo ya Kanana ekawukaki na nzala makasi.
Now there was no food in all the land, for the famine was very severe, so that the land of Egypt and the land of Canaan grew weak because of the famine.
14 Jozefi azwaki mbongo nyonso oyo azalaki kobomba tango bato ya mokili ya Ejipito mpe ya Kanana bazalaki kosomba ble epai na ye, amemaki yango na ndako ya Faraon.
Joseph gathered up all of the money to be found in the land of Egypt and in the land of Canaan, for the grain they were purchasing. And Joseph brought the money into Pharaoh's treasury.
15 Tango mbongo ya bato ya Ejipito mpe ya Kanana esilaki, bato nyonso ya Ejipito bayaki epai ya Jozefi mpe balobaki: — Pesa biso biloko ya kolia! Mpo na nini tokufa na nzala na miso na yo? Mpo ete mbongo na biso esili?
And when the money was all spent in the land of Egypt and in the land of Canaan, all the Egyptians came to Joseph and said, "Give us food, for why should we die in your presence? For our money is gone."
16 Jozefi azongisaki: — Soki bozali lisusu na mbongo te, bomemela ngai bibwele na bino. Bokopesa ngai bibwele na bino na esika ya mbongo.
Then Joseph said, "Give me your livestock and I will give you food for your livestock, if your silver is gone."
17 Bamemaki epai ya Jozefi bampunda, bantaba mpe bangombe na bango; bongo Jozefi apesaki bango bilei na esika ya bampunda, ba-ane, bameme, bantaba mpe bangombe na bango. Na mibu nyonso wana oyo Jozefi azalaki kopesa bango bilei, bango bazalaki kopesa ye bibwele na bango.
So they brought their livestock to Joseph, and Joseph gave them food in exchange for the horses, and for the flocks, and for the cattle, and for the donkeys. And he fed them with food in exchange for all their livestock for that year.
18 Tango mibu wana esilaki, bayaki lisusu epai na ye na mibu oyo elandaki. Balobaki: — Tokoki kobombela nkolo na biso te ete mbongo na biso esili mpe bibwele na biso ekomi ya yo. Totikali lisusu na eloko moko te longola kaka banzoto na biso mpe mabele na biso.
When that year was over, they came to him the next year and said to him, "We will not hide from my lord that all our silver is spent and that the herds of livestock belong to my lord. There is nothing left, as my lord can see, except our bodies and our lands.
19 Mpo na nini, biso elongo na mabele na biso, tokufa na miso na yo? Somba biso kaka elongo na mabele na biso na motuya ya biloko ya kolia; mpe biso elongo na mabele na biso, tokokoma bawumbu ya Faraon. Toboyi na biso kokufa na nzala, pesa biso milona ya kolona mpo ete tobika mpe mabele na biso ekoma esobe te.
Why should we die before your eyes, both we and our land? Buy us and our land in exchange for food, and we and our land will be servants to Pharaoh. Give us seed so that we may live and not die, and that the land won't become desolate."
20 Jozefi asombaki mabele nyonso ya Ejipito mpo na Faraon, pamba te bato nyonso ya Ejipito batekaki bilanga na bango mpo ete nzala elekaki makasi. Boye mabele ekomaki ya Faraon.
So Joseph bought all the land of Egypt for Pharaoh, because every Egyptian sold his field, since the famine was severe on them. So the land became Pharaoh's.
21 Jozefi akomisaki bavandi ya bingumba nyonso ya Ejipito bawumbu ya Faraon.
And as for the people, he subjugated them as slaves from one end of the border of Egypt to the other end of it.
22 Kasi asombaki mabele ya banganga-nzambe te, pamba te bazalaki kozwa tango nyonso biloko ebele kolanda mobeko ya Faraon ete bazwaka biloko ya kolia. Yango wana, banganga-nzambe batekaki mabele na bango te.
Only he did not buy the land of the priests, for the priests had an allotment from Pharaoh, and they lived off their allotment which Pharaoh gave them. Therefore they did not have to sell their land.
23 Jozefi alobaki na bato: — Nasombi bino lelo mpo na Faraon, bino mpe mabele na bino. Tala milona mpo na bino mpo ete bokoka kolona mabele.
Then Joseph said to the people, "Look, I have bought you and your land today for Pharaoh. Look, here is seed for you so you can plant the seed in the land.
24 Kasi tango bokobuka mbuma, bokopesa eteni ya mitano epai ya Faraon. Biteni minei oyo mosusu, bokobomba yango lokola milona mpo na bilanga mpe lokola biloko ya kolia mpo na bino moko, mpo na mabota na bino mpe mpo na bana na bino.
And it will come to pass at the harvests that you must give a fifth to Pharaoh, and four-fifths will be yours for seed for the field, and for your food, and for those of your households, and as food for your little ones."
25 Bazongisaki: — Obikisi bomoi na biso! Lokola tozwi ngolu na miso na yo nkolo na biso, tokozala bawumbu ya Faraon.
Then they said, "You have saved our lives. Let us find favor in the sight of my lord, and we will be Pharaoh's slaves."
26 Bongo Jozefi akomisaki yango mobeko kino lelo kati na mabele ya Ejipito: eteni ya mitano ya bambuma nyonso oyo ekowuta na mabele ezali mpo na Faraon. Kasi mabele ya Banganga-Nzambe ekomaki ya Faraon te.
So Joseph made it a statute still in effect for the land of Egypt, that a fifth must go to Pharaoh. Only the land of the priests alone did not become Pharaoh's.
27 Boye bana ya Isalaele bavandaki na Ejipito, na Gosheni. Kuna bakomaki na bozwi ebele, babotaki bana mpe bakomaki ebele.
So Israel lived in the land of Egypt, in the land of Goshen. And they acquired property in it and were fertile and became numerous.
28 Jakobi awumelaki mibu zomi na sambo na Ejipito. Mpe mibu ya bomoi na ye ezalaki nkama moko na tuku minei na sambo.
And Jacob lived in the land of Egypt seventeen years. So the days of Jacob, the years of his life, were one hundred forty-seven years.
29 Tango mokolo ya kufa ya Isalaele ekomaki pene, abengaki Jozefi, mwana na ye ya mobali, mpe alobaki na ye: — Soki nazwi ngolu na miso na yo, tia loboko na yo na se ya mopende na ngai; laka ngai ete okotalisa ngai bolamu mpe boyengebene, mpe okokunda ngai na Ejipito te.
And the time approached for Israel to die, so he summoned his son Joseph and said to him, "If now I have found favor in your sight, please put your hand under my thigh and deal kindly and truly with me. Please do not bury me in Egypt,
30 Kasi tango nakolala elongo na bakoko na ngai, okobimisa ngai na Ejipito mpe okokunda ngai na esika oyo bakunda bango. Jozefi azongisaki: — Nakosala ndenge olobi.
but when I lie down with my fathers you must carry me out of Egypt and bury me in their burial place." And he said, "I will do what you have asked."
31 Bongo Jakobi alobaki lisusu: — Lapa ndayi mpo na kolakisa ete okosala ndenge olobi. Boye, Jozefi alapaki ndayi na miso na ye; mpe Isalaele agumbamaki na koyekama na moto ya mbeto na ye.
Then he said, "Take an oath to me," and he took an oath to him. Then Israel bowed over the top of his staff.

< Ebandeli 47 >