< Ebandeli 43 >

1 Nzala makasi ekotaki kati na mokili.
And the famine was sore in the land.
2 Tango libota ya Jakobi baliaki biloko nyonso oyo bamemaki wuta na Ejipito, Jakobi alobaki na bana na ye: — Bozonga kuna kosomba ndambo ya biloko.
And it came to pass, when they had eaten up the corn which they had brought out of Egypt, their father said unto them, Go again, buy us a little food.
3 Yuda azongisaki: — Moto wana alobaki na biso ete tozonga kuna te soki ndeko na biso azali elongo na biso te.
And Judah spoke unto him, saying, The man did solemnly protest unto us, saying, All of you shall not see my face, except your brother be with you.
4 Soki otiki ndeko na biso kokende elongo na biso, wana tokokende na Ejipito mpe tokosombela yo biloko.
If you will send our brother with us, we will go down and buy you food:
5 Kasi soki otiki ye te, biso mpe tokokende te; pamba te moto wana ayebisaki biso malamu: « Bokotelema liboso na ngai te soki ndeko na bino azali te. »
But if you will not send him, we will not go down: for the man said unto us, All of you shall not see my face, except your brother be with you.
6 Isalaele azongisaki: — Mpo na nini bosali ngai mabe boye? Mpo na nini boyebisaki moto wana ete bozali na ndeko mosusu?
And Israel said, Wherefore dealt all of you so ill with me, as to tell the man whether all of you had yet a brother?
7 Bazongisaki: — Moto yango atunaki biso malamu makambo oyo etali biso moko mpe libota na biso. Atunaki biso: « Tata na bino azali nanu na bomoi? Bozali na ndeko mosusu ya mobali? » Mpe biso topesaki eyano na mituna na ye. Tokokaki te koyeba ete akoloba na biso: « Boya na ndeko na bino ya mobali awa. »
And they said, The man asked us strictly of our state, and of our kindred, saying, Is your father yet alive? have all of you another brother? and we told him according to the tenor of these words: could we certainly know that he would say, Bring your brother down?
8 Yuda ayebisaki tata na ye Isalaele: — Tata, tika Benjame akende elongo na ngai. Tokotelema mpe tokokende mpo ete biso elongo na yo mpe bana na biso, tozala na bomoi, kasi tokufa te na nzala.
And Judah said unto Israel his father, Send the lad with me, and we will arise and go; that we may live, and not die, both we, and you, and also our little ones.
9 Nandimi kobatela ye; boye okotuna ye na maboko na ngai. Soki nazongiseli yo ye te mpe namemi ye liboso na yo te, tika ete nazala na ngambo epai na yo bomoi na ngai mobimba.
I will be guarantor for him; of my hand shall you require him: if I bring him not unto you, and set him before you, then let me bear the blame for ever:
10 Soki towumelaki te, tokokaki kozonga mbala ya mibale.
For except we had lingered, surely now we had returned this second time.
11 Tata na bango Isalaele alobaki na bango: — Soki esengeli kozala bongo, wana bosala boye: botia na basaki na bino biloko oyo eleki kitoko kati na mokili mpe bopesa yango lokola kado epai ya moto wana: ndambo ya mafuta ya solo kitoko, ndambo ya mafuta ya nzoyi, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, lodanumi, pisitashi mpe bambuma ya amande.
And their father Israel said unto them, If it must be so now, do this; take of the best fruits in the land in your vessels, and carry down the man a present, a little balm, and a little honey, spices, and myrrh, nuts, and almonds:
12 Bozwa mbala mibale motuya ya mbongo oyo ezalaki kati na basaki na bino mpe bozongisa mbongo oyo bokutaki na basaki na bino; tango mosusu ezalaki libunga.
And take double money in your hand; and the money that was brought again in the mouth of your sacks, carry it again in your hand; possibly it was an oversight:
13 Bozwa ndeko na bino ya mobali, botelema mpe bozonga epai ya moto wana.
Take also your brother, and arise, go again unto the man:
14 Tika ete Nzambe-Na-Nguya-Nyonso ayokela bino mawa tango bokotelema liboso ya moto wana, mpo ete bokoka kozwa ndeko na bino mosusu, mpe Benjame azonga elongo na bino. Kasi mpo na ngai, soki nakozanga bana, malamu nazanga bango!
And God Almighty give you mercy before the man, that he may send away your other brother, and Benjamin. If I be bereaved of my children, I am bereaved.
15 Boye bato yango bazwaki bakado; bazwaki lisusu mbala mibale motuya ya mbongo oyo ezalaki na basaki na bango mpe Benjame. Bakendeki na Ejipito mpe bamilakisaki na miso ya Jozefi.
And the men took that present, and they took double money in their hand and Benjamin; and rose up, and went down to Egypt, and stood before Joseph.
16 Tango Jozefi amonaki Benjame elongo na bango, alobaki na moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi na ye: « Mema bato oyo na ndako na ngai; boboma nyama moko mpe bolamba yango mpo ete bato oyo bakolia elongo na ngai na midi. »
And when Joseph saw Benjamin with them, he said to the ruler of his house, Bring these men home, and slay, and make ready; for these men shall dine with me at noon.
17 Moto yango asalaki ndenge kaka Jozefi alobaki na ye mpe amemaki bango na ndako ya Jozefi.
And the man did as Joseph bade; and the man brought the men into Joseph's house.
18 Bato yango babangaki makasi tango bamemaki bango na ndako ya Jozefi mpe bazalaki kolobana bango na bango: — Bamemi biso awa likolo ya mbongo oyo batiaki na basaki na biso, na mbala ya liboso. Bakokweya likolo na biso, bakolonga biso, bakokanga biso lokola bawumbu mpe bakozwa ba-ane na biso.
And the men were afraid, because they were brought into Joseph's house; and they said, Because of the money that was returned in our sacks at the first time are we brought in; that he may seek occasion against us, and fall upon us, and take us for bondmen, and our asses.
19 Bapusanaki pembeni ya moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako ya Jozefi mpe balobaki na ye na ekuke ya ndako:
And they came near to the steward of Joseph's house, and they communed with him at the door of the house,
20 — Limbisa biso, nkolo na ngai! Toyaki mbala ya liboso mpo na kosomba biloko ya kolia;
And said, O sir, we came indeed down at the first time to buy food:
21 kasi tango totelemaki na esika ya kolekisa butu, tofungolaki basaki na biso; mpe moko na moko kati na biso amonaki mbongo na ye kati na saki na ye ndenge kaka ezalaki, yango wana tozongi na yango.
And it came to pass, when we came to the inn, that we opened our sacks, and, behold, every man's money was in the mouth of his sack, our money in full weight: and we have brought it again in our hand.
22 Tomemi mbongo mosusu mpo na kosomba biloko ya kolia, toyebi te nani azongisaki mbongo na biso na basaki na biso.
And other money have we brought down in our hands to buy food: we cannot tell who put our money in our sacks.
23 Alobaki na bango: — Malamu! Bobanga te. Ezali Nzambe na bino, Nzambe ya tata na bino, nde atiaki bomengo kati na basaki na bino. Kasi mpo na mbongo na bino, ngai nazwaki yango. Sima, amemelaki bango Simeoni.
And he said, Peace be to you, fear not: your God, and the God of your father, has given you treasure in your sacks: I had your money. And he brought Simeon out unto them.
24 Moto yango akotisaki bango na ndako ya Jozefi, apesaki bango mayi ya kosukola makolo mpe abongisaki bilei mpo na ba-ane na bango.
And the man brought the men into Joseph's house, and gave them water, and they washed their feet; and he gave their asses animal food.
25 Babongisaki bakado na bango mpo na boyei ya Jozefi na midi, pamba te bayokaki ete bakolia kuna.
And they made ready the present against Joseph came at noon: for they heard that they should eat bread there.
26 Tango Jozefi ayaki na ndako, bapesaki ye bakado oyo bamemaki na ndako mpe bagumbamaki liboso na ye mito na se.
And when Joseph came home, they brought him the present which was in their hand into the house, and bowed themselves to him to the earth.
27 Atunaki bango: — Boni, bozali malamu? Abakisaki: — Boni tata na bino ya mobange oyo boyebisaki ngai, azali malamu?
And he asked them of their welfare, and said, Is your father well, the old man of whom all of you spoke? Is he yet alive?
28 Bazongisaki: — Mosali na yo, tata na biso, azali nanu na bomoi mpe azali malamu. Bakitisaki mito mpe bagumbamaki liboso na ye.
And they answered, Your servant our father is in good health, he is yet alive. And they bowed down their heads, and made reverence.
29 Tango Jozefi atombolaki miso, amonaki Benjame, ndeko na ye ya mobali, mwana ya mama na ye. Atunaki: — Ye wana nde ndeko na bino ya suka oyo boyebisaki ngai? Abakisaki: — Tika ete Nzambe atalisa yo ngolu na Ye.
And he lifted up his eyes, and saw his brother Benjamin, his mother's son, and said, Is this your younger brother, of whom all of you spoke unto me? And he said, God be gracious unto you, my son.
30 Jozefi ayokaki pasi makasi na motema tango amonaki ndeko na ye, akimaki mbangu na libanda mpe alukaki esika mpo na kolela. Akotaki na shambre na ye mpe alelaki kuna.
And Joseph made haste; for his bowels did yearn upon his brother: and he sought where to weep; and he entered into his chamber, and wept there.
31 Tango asilisaki kosukola elongi na ye, abimaki libanda, akangaki motema mpe alobaki: — Botia biloko ya kolia na mesa.
And he washed his face, and went out, and refrained himself, and said, Set on bread.
32 Batielaki Jozefi bilei na mesa na ye moko, bandeko na ye mpe na mesa na bango; bongo bato ya Ejipito oyo bazalaki kolia na ye esika moko, bango mpe na mesa na bango, pamba te bato ya Ejipito bakokaki te kolia esika moko na Ba-Ebre, pamba te ezalaki ekila mpo na bato ya Ejipito.
And they set on for him by himself, and for them by themselves, and for the Egyptians, which did eat with him, by themselves: because the Egyptians might not eat bread with the Hebrews; for that is an abomination unto the Egyptians.
33 Bavandisaki bango, kobanda na mwana ya liboso kino na oyo ya suka, bazalaki kotalana bango na bango na kokamwa.
And they sat before him, the firstborn according to his birthright, and the youngest according to his youth: and the men marvelled one at another.
34 Jozefi apesaki bango biloko oyo ewutaki na mesa na ye; mpe Benjame azwaki mbala mitano koleka bango nyonso. Na bongo, bamelaki elongo na ye mpe balangwaki.
And he took and sent portions unto them from before him: but Benjamin's portion was five times so much as any of their's. And they drank, and were merry with him.

< Ebandeli 43 >