< Ebandeli 40 >

1 Sima na mwa tango, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito, basalaki mabe liboso ya nkolo na bango, mokonzi ya Ejipito.
It happened after these things that the cupbearer of the king of Egypt and his baker offended their lord, the king of Egypt.
2 Faraon asilikelaki bakalaka na ye mibale ya lokumu: kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa.
Pharaoh was angry with his two officers, the chief cupbearer and the chief baker.
3 Abwakaki bango na boloko kati na ndako ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, boloko epai wapi Jozefi azalaki.
So he put them in custody in the house of the captain of the guard, in the prison, the place where Joseph was confined.
4 Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi apesaki bango na maboko ya Jozefi mpo ete alandela bango. Boye basalaki mikolo mwa mingi na boloko.
The captain of the guard assigned them to Joseph, and he attended them. They stayed in prison for some time.
5 Ezalaki mokolo moko na butu, bango mibale, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito, balotaki moto na moto ndoto na ye mpe ndoto na ndoto ezalaki na ndimbola na yango.
And the cupbearer and the baker for the king of Egypt, who were confined in jail, both had a dream the same night, and each dream had its own meaning.
6 Na tongo, Jozefi akendeki epai na bango mpe amonaki ete bazali mawa-mawa.
Joseph met them in the morning and looked at them and saw that they were sad.
7 Jozefi atunaki bakalaka ya lokumu ya Faraon, oyo bazalaki kati na boloko elongo na ye, kati na ndako ya nkolo na ye: — Mpo na nini lelo bilongi na bino ezali mawa-mawa?
He asked Pharaoh's officers who were with him in custody in his master's house, saying, "Why do you look so sad today?"
8 Bazongiselaki ye: — Biso mibale toloti bandoto; kasi moto ya kolimbola yango mpo na biso azali te. Jozefi alobaki na bango: — Boyebi te ete Nzambe nde apesaka ndimbola ya bandoto? Nabondeli bino, boyebisa ngai bandoto na bino.
They said to him, "We both had dreams, but there is no one who can interpret it." Joseph said to them, "Do not interpretations belong to God? Please tell it to me."
9 Bongo kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito ayebisaki Jozefi ndoto na ye. Alobaki: — Na ndoto na ngai, namonaki nzete ya vino liboso na ngai.
The chief cupbearer told his dream to Joseph, and said to him, "In my dream, look, a vine was in front of me,
10 Nzete yango ya vino ezalaki na bitape misato. Bongo ekomaki kobimisa mito, fololo mpe maboke ebimisaki bambuma ya kotela.
and in the vine were three branches. When it budded, its blossoms opened, and its clusters ripened into grapes.
11 Kopo ya Faraon ezalaki na maboko na ngai. Nazwaki bambuma ya vino, nakamolaki yango na kopo ya Faraon mpe napesaki ye kopo yango na maboko na ye.
Pharaoh's cup was in my hand, and I took the grapes and squeezed them into Pharaoh's cup, and I placed the cup into Pharaoh's hand."
12 Jozefi alobaki na ye: — Tala ndimbola ya ndoto na yo: « Bitape misato ezali mikolo misato.
Then Joseph said to him, "This is its interpretation: the three branches are three days.
13 Sima na mikolo misato, Faraon akotombola moto na yo mpe akozongisa yo na esika na yo ya mosala. Okotia lisusu kopo ya Faraon na maboko na ye ndenge ozalaki kosala na kala.
Within three days Pharaoh will lift up your head and restore you to your office. You will put Pharaoh's cup into his hand as you used to when you were his cupbearer.
14 Kasi tango makambo nyonso oyo ekotambola malamu mpo na yo, nabondeli yo, kanisa ngai mpe salela ngai bolamu, zala molobeli na ngai epai ya Faraon mpo ete abimisa ngai na boloko oyo.
But remember me when it goes well for you, and please do me the kindness to mention me to Pharaoh and get me out of this prison.
15 Pamba te babimisaki ngai na makasi wuta na mokili ya Ba-Ebre; mpe awa nasali likambo moko te ya mabe mpo ete batia ngai na boloko. »
For indeed, I was kidnapped from the land of the Hebrews, and even here I have done nothing that they should have put me into the pit."
16 Tango kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito asosolaki ete Jozefi apesaki ndimbola ya malamu, alobaki na Jozefi: — Ngai mpe nalotaki ndoto: « Bitunga misato ya mapa ezalaki likolo ya moto na ngai.
When the chief baker saw that the interpretation was favorable, he said to Joseph, "I also appeared in my dream, and look, three baskets of white bread were on my head.
17 Kitunga ya likolo ezalaki na bagato ya ndenge na ndenge, oyo Faraon alingaka; kasi bandeke ezalaki kolia yango wuta na kitunga oyo ezalaki na moto na ngai. »
In the top basket there was all kinds of baked goods for Pharaoh, but the birds were eating them out of the basket on my head."
18 Jozefi alobaki na ye: — Tala ndimbola ya ndoto na yo: « Bitunga misato ezali mikolo misato.
Joseph answered, "This is its interpretation: the three baskets are three days.
19 Sima na mikolo misato, Faraon akokata moto na yo mpe akodiembika yo na nzete. Bongo bandeke ekolia mosuni na yo. »
Within three days Pharaoh will lift up your head from off you, and impale you on a pole, and the birds will eat your flesh off you."
20 Sima na mikolo misato, ezalaki mokolo ya mbotama ya Faraon. Faraon asalisaki feti monene mpe abengisaki bakalaka na ye nyonso. Abimisaki na boloko, liboso ya bakalaka na ye, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi mpe kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa.
And it happened on the third day, which was Pharaoh's birthday, that he gave a feast for all his servants, and he lifted up the head of the chief cupbearer and the head of the chief baker among his servants.
21 Faraon azongisaki na mosala, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga. Boye azongelaki lisusu kotia kopo na maboko ya Faraon.
He restored the chief cupbearer to his position again, and he placed the cup into Pharaoh's hand;
22 Kasi Faraon adiembikaki kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa, ndenge kaka Jozefi ayebisaki bango.
but he hanged the chief baker, as Joseph had interpreted to them.
23 Kasi kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito atikalaki kokanisa lisusu Jozefi te: abosanaki ye.
But the chief cupbearer did not remember Joseph, but forgot him.

< Ebandeli 40 >