< Ebandeli 32 >

1 Wana Jakobi azalaki kokoba mobembo na ye, ba-anjelu ya Nzambe bayaki kokutana na ye.
Jacob went on his way, and the angels of God met him.
2 Tango Jakobi amonaki bango, alobaki: « Oyo ezali molako ya Nzambe! » Mpe abengaki esika yango: Maanayimi.
When he saw them, Jacob said, "This is God's camp." He called the name of that place Mahanaim.
3 Jakobi atindaki bantoma liboso na ye epai ya Ezawu, ndeko na ye, na mokili ya Seiri, kati na zamba ya Edomi.
Jacob sent messengers ahead of him to Esau, his brother, to the land of Seir, the region of Edom.
4 Apesaki bango malako oyo: « Tala makambo oyo bokoloba epai ya nkolo na ngai Ezawu: ‹ Mosali na yo Jakobi alobi: ‘Navandaki epai ya Labani mpe natikalaki kuna kino sik’oyo.
He commanded them, saying, "This is what you shall tell my lord, Esau: 'This is what your servant, Jacob, says. I have lived as a foreigner with Laban, and stayed until now.
5 Nazali na bangombe, ba-ane, bameme, bantaba, basali ya mibali mpe ya basi; natindi sango oyo epai ya nkolo na ngai mpo ete nazwa ngolu na miso na ye.’ › »
I have cattle, donkeys, flocks, male servants, and female servants. I have sent to tell my lord, that I may find favor in your sight.'"
6 Tango bantoma bazongaki epai ya Jakobi, balobaki: « Tokendeki epai ya Ezawu, ndeko na yo, mpe sik’oyo azali koya elongo na bato nkama minei mpo na kokutana na yo. »
The messengers returned to Jacob, saying, "We came to your brother Esau. Not only that, but he comes to meet you, and four hundred men with him."
7 Na kobanga makasi mpe na komitungisa, Jakobi akabolaki bato oyo bazalaki elongo na ye na masanga mibale; ndenge moko mpe mpo na bameme, bantaba mpe bashamo.
Then Jacob was very afraid and was distressed. He divided the people who were with him, and the flocks, and the herds, and the camels, into two camps;
8 Azalaki komilobela: « Soki Ezawu abundisi lisanga moko, lisanga oyo etikali ekoki kokima. »
and he said, "If Esau comes to the one camp, and strikes it, then the other camp will escape."
9 Sima, Jakobi abondelaki: « Oh Nzambe ya Abrayami, tata na ngai! Nzambe ya Izaki, tata na ngai! Oh Yawe, Yo oyo olobaki na ngai: ‹ Zonga na mokili na yo, na libota na yo, mpe Ngai nakosalela yo bolamu. ›
Jacob said, "God of my father Abraham, and God of my father Isaac, who said to me, 'Return to your country, and to your relatives, and I will do you good,'
10 Nazali nani mpo ete otalisa ngai mosali na Yo bolamu mpe bosembo nyonso oyo! Nazalaki kaka na lingenda tango nakatisaki Yordani, kasi sik’oyo nazali na masanga mibale.
I am not worthy of the least of all the loving kindnesses and of all the faithfulness which you have shown to your servant; for with just my staff I passed over this Jordan, and now I have become two camps.
11 Nabondeli Yo, kangola ngai na maboko ya ndeko na ngai, Ezawu, pamba te nazali kobanga ete aya kobundisa ngai elongo na bamama mpe bana na bango.
Please deliver me from the hand of my brother, from the hand of Esau: for I fear that he will come and attack me and the mothers with the children.
12 Nzokande, Yo olobaki na ngai: ‹ Ya solo nakosalela yo bolamu mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola zelo ya ebale monene, oyo moto moko te akoki kotanga. › »
You said, 'I will surely do you good and make your descendants as the sand of the sea, which can't be counted because there are so many.'"
13 Jakobi alekisaki butu na esika wana. Kati na biloko oyo azalaki na yango, aponaki kado mpo na Ezawu, ndeko na ye:
So he spent the night there and selected from what he had acquired a present for his brother Esau:
14 bantaba ya basi nkama mibale mpe bantaba ya mibali tuku mibale, bameme ya basi nkama mibale mpe bameme ya mibali tuku mibale,
two hundred female goats and twenty male goats, two hundred ewes and twenty rams,
15 shamo ya basi tuku misato elongo na bana na yango, bangombe ya basi tuku minei mpe bangombe ya mibali zomi, ba-ane ya basi tuku mibale mpe ya mibali zomi.
thirty milk camels with their young, forty cows, ten bulls, twenty female donkeys and ten male donkeys.
16 Akabolaki yango na bitonga mpe apesaki yango epai ya basali na ye. Alobaki na bango: « Boleka liboso na ngai mpe botia etonga moko mosika na mosusu. »
He entrusted them into the hands of his servants as separate herds, and said to his servants, "Pass over before me, and keep some distance between the herds."
17 Jakobi apesaki mitindo oyo epai ya mosali na ye ya liboso: « Tango Ezawu, ndeko na ngai, akokutana na yo mpe akotuna yo: ‹ Yo ozali mosali ya nani, ozali kokende wapi mpe nani nkolo ya banyama nyonso oyo ezali liboso na yo? ›
He instructed the first, saying, "When Esau my brother meets you and asks you, saying, 'Whose are you? Where are you going? Whose are these ahead of you?'
18 Okozongisa: ‹ Ezali ya Jakobi, mosali na yo, ezali kado oyo atindeli nkolo na ngai Ezawu. Mpe tala ye moko azali koya sima na biso. › »
Then you shall say, 'They are your servant, Jacob's. It is a present sent to my lord Esau. And look, he also is behind us.'"
19 Apesaki lisusu mitindo wana epai ya mosali ya mibale, ya misato mpe epai ya basali nyonso oyo bazalaki kolanda bibwele: « Bokoloba kaka maloba moko tango bokokutana na Ezawu.
He instructed also the second, and the third, and all that followed the herds, saying, "This is how you are to speak to Esau, when you find him.
20 Bokoyebisa ye lisusu: ‹ Tala ye moko Jakobi, mosali na yo, azali koya na sima na biso! › » Pamba te azalaki komilobela: « Nakokitisa kanda na ye na kado oyo natindi liboso na ngai; sima tango nakokutana na ye, mbala mosusu akoyamba ngai malamu. »
You shall say, 'Not only that, but look, your servant Jacob is behind us.'" For, he said, "I will appease him with the present that goes before me, and afterward I will meet him. Perhaps he will accept me."
21 Boye kado ya Jakobi ekendeki liboso, kasi ye moko alekisaki butu kati na Molako.
So the gift passed over before him, and he himself stayed that night in the camp.
22 Na butu wana, Jakobi alamukaki, azwaki basi na ye mibale, basali na ye mibale ya basi, bana na ye zomi na moko mpe akatisaki mayi ya Yaboki.
He got up that night and took his two wives, and his two female servants, and his eleven sons and crossed over the ford of the Jabbok.
23 Sima na kokatisa bango mayi, akatisaki mpe biloko na ye nyonso.
He took them and sent them across the stream, and sent over all his possessions.
24 Jakobi atikalaki kaka ye moko. Bongo moto moko abundaki na ye kino tango tongo elingaki kotana.
Then Jacob was left alone. And a man wrestled with him until the rising of the dawn.
25 Wana moto yango amonaki ete akoki kolonga Jakobi te, abetaki Jakobi na loketo mpe mokuwa ya loketo na ye ebukanaki tango bazalaki kobunda.
When he saw that he did not defeat him, he struck the socket of his hip, and Jacob's hip was dislocated as he wrestled with him.
26 Sima, moto yango alobaki: — Tika ngai nakende, pamba te tongo elingi kotana. Kasi Jakobi azongisaki: — Nakotika yo te kokende soki opamboli ngai te.
Then he said, "Let me go, for the dawn is breaking." But Jacob said, "I won't let you go unless you bless me."
27 Moto yango atunaki Jakobi: — Kombo na yo nani? Jakobi azongisaki: — Kombo na ngai ezali Jakobi.
And he said to him, "What is your name?" He said, "Jacob."
28 Moto yango alobaki lisusu: — Kobanda lelo, kombo na yo ekozala lisusu Jakobi te, kasi Isalaele, pamba te obundi na Nzambe mpe na bato, bongo olongi.
Then he said, "Your name will no longer be called Jacob, but Israel, because you have struggled with God and with men and have prevailed."
29 Jakobi alobaki: — Nabondeli yo, yebisa ngai kombo na yo. Azongiselaki ye: — Mpo na nini ozali kotuna kombo na ngai? Boye apambolaki ye na esika wana.
Then Jacob asked him, "Please tell me your name." But he said, "Why is it that you ask what my name is?" And he blessed him there.
30 Jakobi abengaki esika yango « Penieli, » pamba te alobaki: « Namoni Nzambe na miso na ngai, mpe bomoi na ngai ebiki. »
So Jacob called the name of the place Peniel: "For I have seen God face to face, and my life has been preserved."
31 Tango moyi ebimaki, Jakobi alekaki Penueli. Azalaki kotambola tengu-tengu mpo na loketo na ye.
The sun rose on him as he passed by Peniel, and he limped because of his hip.
32 Yango wana kino lelo, bana ya Isalaele baliaka mosuni ya mopende te, pamba te Nzambe abetaki Jakobi na mosuni oyo ekangami na mokuwa ya loketo.
Therefore, to this day the children of Israel do not eat the tendon of the hip socket, because he struck Jacob's hip socket near that tendon.

< Ebandeli 32 >