< Ebandeli 22 >

1 Na sima na makambo wana, Nzambe amekaki Abrayami. Alobaki na ye: — Abrayami! Abrayami azongisaki: — Ngai oyo.
And it came to pass after these things, that God did tempt Abraham, and said unto him, Abraham: and he said, Behold, here I am.
2 Nzambe alobaki na ye: — Zwa Izaki, mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko oyo olingaka; kende na mokili ya Morija, mpe kuna, okopesa Ngai ye lokola mbeka ya kotumba na likolo ya ngomba oyo nakolakisa yo.
And he said, Take now your son, your only son Isaac, whom you love, and get you into the land of Moriah; and offer him there for a burnt offering upon one of the mountains which I will tell you of.
3 Na tongo-tongo, Abrayami atelemaki mpe abongisaki ane na ye. Azwaki basali mibale kati na basali na ye, azwaki mpe Izaki, mwana na ye. Abukaki bakoni mpo na kotumba mbeka, atelemaki mpe akendeki na esika oyo Nzambe ayebisaki ye.
And Abraham rose up early in the morning, and saddled his ass, and took two of his young men with him, and Isaac his son, and clave the wood for the burnt offering, and rose up, and went unto the place of which God had told him.
4 Na mokolo ya misato, Abrayami atombolaki miso na ye mpe amonaki esika yango na mosika.
Then on the third day Abraham lifted up his eyes, and saw the place far off.
5 Bongo Abrayami ayebisaki basali na ye: « Botikala awa elongo na ane, wana ngai elongo na mwana tozali kokende kino kuna na likolo mpo na kogumbamela Nzambe; sima na yango, tokozongela bino. »
And Abraham said unto his young men, Abide all of you here with the ass; and I and the lad will go yonder and worship, and come again to you.
6 Abrayami azwaki bakoni ya kotumbela mbeka mpe amemisaki yango Izaki, mwana na ye; mpe ye moko amemaki moto mpe mbeli, bongo bango mibale bakendeki nzela moko.
And Abraham took the wood of the burnt offering, and laid it upon Isaac his son; and he took the fire in his hand, and a knife; and they went both of them together.
7 Izaki atunaki Abrayami, tata na ye: — Tata na ngai! Abrayami azongisaki: — Ngai oyo! Izaki alobaki: — Tozali na moto mpe koni, kasi wapi mpate mpo na mbeka ya kotumba?
And Isaac spoke unto Abraham his father, and said, My father: and he said, Here am I, my son. And he said, Behold the fire and the wood: but where is the lamb for a burnt offering?
8 Abrayami azongisaki: — Mwana na ngai, Ye moko Nzambe akopesa mpate mpo na mbeka ya kotumba. Boye bango mibale bakendeki nzela moko.
And Abraham said, My son, God will provide himself a lamb for a burnt offering: so they went both of them together.
9 Tango bakomaki na esika oyo Nzambe alakisaki ye, Abrayami atongaki etumbelo na esika yango mpe abongisaki bakoni na likolo na yango. Akangaki Izaki, mwana na ye ya mobali, basinga mpe alalisaki ye na etumbelo likolo ya bakoni.
And they came to the place which God had told him of; and Abraham built an altar there, and laid the wood in order, and bound Isaac his son, and laid him on the altar upon the wood.
10 Boye Abrayami azwaki mbeli mpe asembolaki loboko na ye mpo na koboma mwana na ye ya mobali.
And Abraham stretched forth his hand, and took the knife to slay his son.
11 Kasi anjelu ya Yawe abengaki ye wuta na likolo: — Abrayami! Abrayami! Abrayami azongisaki: — Ngai oyo.
And the angel of the LORD called unto him out of heaven, and said, Abraham, Abraham: and he said, Here am I.
12 Anjelu alobaki: — Kosembola loboko na yo te likolo ya mwana, kosala ye mabe te. Nasosoli sik’oyo ete otosaka Nzambe, pamba te oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko.
And he said, Lay not your hand upon the lad, neither do you any thing unto him: for now I know that you fear God, seeing you have not withheld your son, your only son from me.
13 Abrayami atombolaki miso na ye mpe amonaki meme ya mobali oyo maseke na yango ezalaki ya kokangama na nzete ya moke. Azwaki yango mpe apesaki yango mbeka ya kotumba na esika ya mwana na ye ya mobali.
And Abraham lifted up his eyes, and looked, and behold behind him a ram caught in a thicket by his horns: and Abraham went and took the ram, and offered him up for a burnt offering in the position of his son.
14 Abrayami abengaki esika yango « Nkolo akopesa. » Yango wana balobaka kino lelo: « Na likolo ya ngomba ya Yawe, ekopesama. »
And Abraham called the name of that place Jehovahjireh: as it is said to this day, In the mount of the LORD it shall be seen.
15 Anjelu ya Yawe abengaki Abrayami na mbala ya mibale wuta na likolo
And the angel of the LORD called unto Abraham out of heaven the second time,
16 mpe alobaki: « Nakati seleka na Kombo na Ngai, elobi Yawe, ete lokola osali likambo ya boye, lokola oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko,
And said, By myself have I sworn, says the LORD, for because you have done this thing, and have not withheld your son, your only son:
17 nakopambola yo solo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo, mpe ebele lokola zelo ya ebale. Bakitani na yo bakokamata bingumba ya banguna na bango.
That in blessing I will bless you, and in multiplying I will multiply your seed as the stars of the heaven, and as the sand which is upon the sea shore; and your seed shall possess the gate of his enemies;
18 Bato ya bikolo nyonso ya mabele bakomipambola mpo na bakitani na yo, pamba te otosi Ngai. »
And in your seed shall all the nations of the earth be blessed; because you have obeyed my voice.
19 Abrayami azongaki epai ya basali na ye mpe bakendeki elongo na Beri-Sheba epai wapi akobaki kovanda.
So Abraham returned unto his young men, and they rose up and went together to Beersheba; and Abraham dwelt at Beersheba.
20 Sima na makambo wana, bayebisaki Abrayami ete Milika mpe abotelaki Naori, ndeko ya Abrayami, bana:
And it came to pass after these things, that it was told Abraham, saying, Behold, Milcah, she has also born children unto your brother Nahor;
21 Mwana na ye ya liboso, Utsi; Buzi, ndeko na ye mobali; Kemweli, tata ya Arami;
Huz his firstborn, and Buz his brother, and Kemuel the father of Aram,
22 Kesedi, Azo, Pilidashi, Yidilafi mpe Betweli.
And Chesed, and Hazo, and Pildash, and Jidlaph, and Bethuel.
23 Betweli azalaki tata ya Rebeka. Milika abotelaki Naori, ndeko mobali ya Abrayami, bana mibali mwambe.
And Bethuel brings forth Rebekah: these eight Milcah did bear to Nahor, Abraham's brother.
24 Makangu ya Naori, oyo kombo na ye ezalaki Reuma, ye mpe abotelaki Naori bana: Teba, Gami, Taashi mpe Maaka.
And his concubine, whose name was Reumah, she bare also Tebah, and Gaham, and Thahash, and Maachah.

< Ebandeli 22 >