< Ebandeli 14 >

1 Na tango wana, Amirafeli, mokonzi ya Shineari; Arioki, mokonzi ya Elasari; Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami, mpe Tideali, mokonzi ya Goyimi,
And it came to pass in the days of Amraphel king of Shinar, Arioch king of Ellasar, Chedorlaomer king of Elam, and Tidal king of nations;
2 bakendeki kobundisa Bera, mokonzi ya Sodome; Birisha, mokonzi ya Gomore; Shineabi, mokonzi ya Adima; Shemeberi, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari.
That these made war with Bera king of Sodom, and with Birsha king of Gomorrah, Shinab king of Admah, and Shemeber king of Zeboiim, and the king of Bela, which is Zoar.
3 Bakonzi mitano oyo, basangisaki mampinga na bango ya basoda na lubwaku ya Sidimi oyo ezali ebale monene ya Barozo.
All these were joined together in the vale of Siddim, which is the salt sea.
4 Bazalaki na se ya bokonzi ya Kedorilaomeri mibu zomi na mibale, kasi na mobu oyo ya zomi na misato, batombokelaki ye.
Twelve years they served Chedorlaomer, and in the thirteenth year they rebelled.
5 Na mobu ya zomi na minei, Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, babundisaki mpe balongaki bato ya Refayimi na Ashiteroti-Karinayimi; bato ya Zuzimi, na Ami; mpe bato ya Emimi, na Shave-Kiriatayimi;
And in the fourteenth year came Chedorlaomer, and the kings that were with him, and stroke the Rephaims in Ashteroth Karnaim, and the Zuzims in Ham, and the Emins in Shaveh Kiriathaim,
6 bato ya Ori, na Seiri, mokili ya bangomba kino na Parani, pene ya esobe.
And the Horites in their mount Seir, unto Elparan, which is by the wilderness.
7 Tango bazongaki, bakendeki na Eyini-Mishipati oyo elakisi Kadeshi mpe babotolaki mokili mobimba ya bato ya Amaleki. Balongaki mpe bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na Atsatsoni-Tamari.
And they returned, and came to Enmishpat, which is Kadesh, and stroke all the country of the Amalekites, and also the Amorites, that dwelt in Hazezontamar.
8 Boye mokonzi ya Sodome, mokonzi ya Gomore, mokonzi ya Adima, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari, babimaki mpe babongamaki na lubwaku ya Sidimi
And there went out the king of Sodom, and the king of Gomorrah, and the king of Admah, and the king of Zeboiim, and the king of Bela (the same is Zoar; ) and they joined battle with them in the vale of Siddim;
9 mpo na kobundisa Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami; Tideali, mokonzi ya Goyimi; Amirafeli, mokonzi ya Shineari, mpe Arioki, mokonzi ya Elasari. Bakonzi minei babundisaki bakonzi mitano.
With Chedorlaomer the king of Elam, and with Tidal king of nations, and Amraphel king of Shinar, and Arioch king of Ellasar; four kings with five.
10 Nzokande, lubwaku ya Sidimi ezalaki na mabulu oyo etonda na potopoto ya mwindo; bongo tango bakonzi ya Sodome mpe ya Gomore bazalaki kokima, ndambo ya bato bazalaki kozinda kati na yango mpe ndambo mosusu bazalaki kokima na bangomba.
And the vale of Siddim was full of slimepits; and the kings of Sodom and Gomorrah fled, and fell there; and they that remained fled to the mountain.
11 Bakonzi oyo minei, babotolaki biloko nyonso ya Sodome mpe ya Gomore mpe bakendeki na biloko na bango nyonso ya kolia.
And they took all the goods of Sodom and Gomorrah, and all their victuals, and went their way.
12 Bamemaki mpe lisusu Loti, mwana ya ndeko ya Abrami, elongo na bomengo na ye nyonso oyo azwaki tango azalaki kovanda na Sodome.
And they took Lot, Abram's brother's son, who dwelt in Sodom, and his goods, and departed.
13 Bongo, moto moko akimaki na bitumba mpe akendeki kopesa sango epai ya Abrami, Mo-Ebre oyo azalaki kovanda pene ya banzete minene ya Mamire, moto ya Amori, ndeko ya Eshikoli mpe ya Aneri. Bango nyonso misato basalaki lisanga na Abrami.
And there came one that had escaped, and told Abram the Hebrew; for he dwelt in the plain of Mamre the Amorite, brother of Eshcol, and brother of Aner: and these were confederate with Abram.
14 Tango Abrami ayokaki ete bakangi ndeko na ye, abengisaki bato nkama misato na zomi na mwambe oyo bayebi kobunda mpe babotama na ndako na ye. Boye balandaki bango kino na Dani.
And when Abram heard that his brother was taken captive, he armed his trained servants, born in his own house, three hundred and eighteen, and pursued them unto Dan.
15 Na butu, Abrami akabolaki bato na ye mpo na kobundisa bango, abetaki bango mpe alandaki bango kino na Oba, na nor ya Damasi.
And he divided himself against them, he and his servants, by night, and stroke them, and pursued them unto Hobah, which is on the left hand of Damascus.
16 Abotolaki bango bomengo nyonso ya bitumba mpe azongaki na ndeko na ye Loti elongo na biloko na ye nyonso, basi mpe bato mosusu.
And he brought back all the goods, and also brought again his brother Lot, and his goods, and the women also, and the people.
17 Mokonzi ya Sodome akendeki na lubwaku ya Shave oyo ezali lubwaku ya bokonzi, mpo na kokutana na Abrami oyo azali kozonga sima na ye kolonga Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, na bitumba.
And the king of Sodom went out to meet him after his return from the slaughter of Chedorlaomer, and of the kings that were with him, at the valley of Shaveh, which is the king's dale.
18 Melishisedeki, mokonzi ya Salemi, amemaki mapa mpe masanga ya vino. Azalaki Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo
And Melchizedek king of Salem brought forth bread and wine: and he was the priest of the most high God.
19 mpe apambolaki Abrami na maloba oyo: « Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Mokeli ya likolo mpe ya mokili, apambola Abrami!
And he blessed him, and said, Blessed be Abram of the most high God, possessor of heaven and earth:
20 Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apambolama, Ye oyo akabi na maboko na yo banguna na yo! » Abrami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba.
And blessed be the most high God, which has delivered your enemies into your hand. And he gave him tithes of all.
21 Mokonzi ya Sodome alobaki na Abrami: — Pesa ngai bato, kamata na yo biloko.
And the king of Sodom said unto Abram, Give me the persons, and take the goods to yourself.
22 Kasi Abrami azongiselaki mokonzi ya Sodome: — Nalapi ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Nzambe oyo akela likolo mpe mokili,
And Abram said to the king of Sodom, I have lift up mine hand unto the LORD, the most high God, the possessor of heaven and earth,
23 ete nakozwa eloko moko te kati na biloko na yo: ezala singa ya kotongela to ya kokangela sapato, mpo ete oloba te: « Nakomisi Abrami mozwi. »
That I will not take from a thread even to a shoe lace, and that I will not take any thing that is yours, lest you should say, I have made Abram rich:
24 Nakondima eloko te longola kaka biloko oyo bato na ngai baliaki mpe biloko ya bato oyo bazalaki elongo na ngai: Aneri, Eshikoli mpe Mamire; bango nde bakozwa biloko na bango.
Save only that which the young men have eaten, and the portion of the men which went with me, Aner, Eshcol, and Mamre; let them take their portion.

< Ebandeli 14 >