< Esidrasi 8 >

1 Tala bakambi ya mabota, kolanda ndenge babotamela, oyo bazongaki elongo na ngai, wuta na Babiloni, na tango Aritakizerisesi azalaki mokonzi:
उनके पूर्वजों के घरानों के मुख्य-मुख्य पुरुष ये हैं, और जो लोग राजा अर्तक्षत्र के राज्य में बाबेल से मेरे संग यरूशलेम को गए उनकी वंशावली यह है:
2 Kati na bakitani ya Pineasi: Gerishomi. Kati na bakitani ya Itamari: Daniele. Kati na bakitani ya Davidi: Atushi.
अर्थात् पीनहास के वंश में से गेर्शोम, ईतामार के वंश में से दानिय्येल, दाऊद के वंश में से हत्तूश।
3 Kati na bakitani ya Shekania, ya Pareoshi: Zakari elongo na bato na ye oyo batangaki, nkama moko na tuku mitano.
शकन्याह के वंश के परोश के गोत्र में से जकर्याह, जिसके संग डेढ़ सौ पुरुषों की वंशावली हुई।
4 Kati na bakitani ya Paati-Moabi: Eliowenayi, mwana mobali ya Zerakia, elongo na bato na ye nkama mibale.
पहत्मोआब के वंश में से जरहयाह का पुत्र एल्यहोएनै, जिसके संग दो सौ पुरुष थे।
5 Kati na bakitani ya Zatu: Shekania, mwana mobali ya Yaazieli, elongo na bato na ye nkama misato.
शकन्याह के वंश में से यहजीएल का पुत्र, जिसके संग तीन सौ पुरुष थे।
6 Kati na bakitani ya Adini: Ebedi, mwana mobali ya Jonatan, elongo na bato na ye tuku mitano.
आदीन के वंश में से योनातान का पुत्र एबेद, जिसके संग पचास पुरुष थे।
7 Kati na bakitani ya Elami: Ezayi, mwana mobali ya Atalia elongo na bato na ye tuku sambo.
एलाम के वंश में से अतल्याह का पुत्र यशायाह, जिसके संग सत्तर पुरुष थे।
8 Kati na bakitani ya Shefatia: Zebadia, mwana mobali ya Mikaeli, elongo na bato na ye tuku mwambe.
शपत्याह के वंश में से मीकाएल का पुत्र जबद्याह, जिसके संग अस्सी पुरुष थे।
9 Kati na bakitani ya Joabi: Abidiasi, mwana mobali ya Yeyeli, elongo na bato na ye nkama mibale na zomi na mwambe.
योआब के वंश में से यहीएल का पुत्र ओबद्याह, जिसके संग दो सौ अठारह पुरुष थे।
10 Kati na bakitani ya Bani: Shelomiti, mwana mobali ya Yosifia, elongo na bato na ye nkama moko na tuku motoba.
१०शलोमीत के वंश में से योसिव्याह का पुत्र, जिसके संग एक सौ साठ पुरुष थे।
11 Kati na bakitani ya Bebayi: Zakari, mwana mobali ya Bebayi, elongo na bato na ye tuku mibale na mwambe.
११बेबै के वंश में से बेबै का पुत्र जकर्याह, जिसके संग अट्ठाईस पुरुष थे।
12 Kati na bakitani ya Azigadi: Yoanani, mwana mobali ya Akatani, elongo na bato na ye nkama moko na zomi.
१२अजगाद के वंश में से हक्कातान का पुत्र योहानान, जिसके संग एक सौ दस पुरुष थे।
13 Kati na bakitani ya Adonikami: bana ya suka oyo bakombo na bango ezalaki Elifeleti, Yeyeli mpe Shemaya, elongo na bato na bango tuku motoba.
१३अदोनीकाम के वंश में से जो पीछे गए उनके ये नाम हैं: अर्थात् एलीपेलेत, यूएल, और शमायाह, और उनके संग साठ पुरुष थे।
14 Kati na bakitani ya Bigivayi: Utayi mpe Zabudi elongo na bato na bango tuku sambo.
१४और बिगवै के वंश में से ऊतै और जक्कूर थे, और उनके संग सत्तर पुरुष थे।
15 Nasangisaki bango pene ya ebale oyo ezalaki kotiola na ngambo ya Akava, mpe tovandaki kuna mikolo misato. Tango natalaki malamu bato mpe Banganga-Nzambe, namonaki ata Molevi moko te kuna.
१५इनको मैंने उस नदी के पास जो अहवा की ओर बहती है इकट्ठा कर लिया, और वहाँ हम लोग तीन दिन डेरे डाले रहे, और मैंने वहाँ लोगों और याजकों को देख लिया परन्तु किसी लेवीय को न पाया।
16 Boye nabengisaki Eliezeri, Arieli, Shemaya, Elinatani, Yaribi, Elinatani, Natan, Zakari mpe Meshulami oyo bazalaki bakambi; Yoyaribi mpe Elinatani oyo bazalaki bato ya mayele.
१६मैंने एलीएजेर, अरीएल, शमायाह, एलनातान, यारीब, एलनातान, नातान, जकर्याह और मशुल्लाम को जो मुख्य पुरुष थे, और योयारीब और एलनातान को जो बुद्धिमान थे
17 Natindaki bango epai ya Ido, mokambi ya mboka Kasifia; nayebisaki bango makambo oyo basengeli koloba na Ido mpe bandeko na ye ya mosala, basali ya Tempelo, oyo bazalaki kovanda na Kasifia, mpo ete bamemela biso basali mpo na Ndako ya Nzambe na biso.
१७बुलवाकर, इद्दो के पास जो कासिप्या नामक स्थान का प्रधान था, भेज दिया; और उनको समझा दिया, कि कासिप्या स्थान में इद्दो और उसके भाई नतीन लोगों से क्या-क्या कहना, वे हमारे पास हमारे परमेश्वर के भवन के लिये सेवा टहल करनेवालों को ले आएँ।
18 Lokola loboko ya ngolu ya Nzambe na biso ezalaki likolo na biso, bamemelaki biso Sherebia, moto ya mayele, kati na bakitani ya Maali, mwana mobali ya Levi, mwana mobali ya Isalaele, elongo na bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali, bango nyonso zomi na mwambe,
१८हमारे परमेश्वर की कृपादृष्टि जो हम पर हुई इसके अनुसार वे हमारे पास ईश्शेकेल को जो इस्राएल के परपोतो और लेवी के पोते महली के वंश में से था, और शेरेब्याह को, और उसके पुत्रों और भाइयों को, अर्थात् अठारह जनों को;
19 elongo na Ashabia mpe Ezayi, bakitani ya Merari, elongo na bandeko na ye ya mibali mpe bana na bango ya mibali. Bango nyonso bazalaki tuku mibale.
१९और हशब्याह को, और उसके संग मरारी के वंश में से यशायाह को, और उसके पुत्रों और भाइयों को, अर्थात् बीस जनों को;
20 Bamemaki lisusu basali ya Tempelo, nkama mibale na tuku mibale, bakitani ya bato oyo Davidi mpe lisanga ya bakalaka na ye batiaki mpo na kosunga Balevi. Batangaki bango nyonso na bakombo na bango.
२०और नतीन लोगों में से जिन्हें दाऊद और हाकिमों ने लेवियों की सेवा करने को ठहराया था दो सौ बीस नतिनों को ले आए। इन सभी के नाम लिखे हुए थे।
21 Kuna, pene ya ebale Akava, napesaki mitindo ya kokila bilei mpo na komikitisa liboso ya Nzambe na biso mpe kosenga Ye mobembo malamu mpo na biso, mpo na bana na biso mpe mpo na biloko na biso nyonso.
२१तब मैंने वहाँ अर्थात् अहवा नदी के तट पर उपवास का प्रचार इस आशय से किया, कि हम परमेश्वर के सामने दीन हों; और उससे अपने और अपने बाल-बच्चों और अपनी समस्त सम्पत्ति के लिये सरल यात्रा माँगे।
22 Nayokaki soni mpo na kosenga epai ya mokonzi basoda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, mpo na kobatela biso na nzela liboso ya banguna na biso; pamba te tolobaki na mokonzi: « Loboko ya ngolu ya Nzambe na biso ezali likolo ya moto nyonso oyo alukaka Ye, kasi kanda makasi na Ye ekitelaka bato nyonso oyo basundolaka Ye. »
२२क्योंकि मैं मार्ग के शत्रुओं से बचने के लिये सिपाहियों का दल और सवार राजा से माँगने से लजाता था, क्योंकि हम राजा से यह कह चुके थे, “हमारा परमेश्वर अपने सब खोजियों पर, भलाई के लिये कृपादृष्टि रखता है और जो उसे त्याग देते हैं, उसका बल और कोप उनके विरुद्ध है।”
23 Boye, tokilaki bilei mpe tosengaki ngolu yango epai ya Nzambe na biso, mpe Ye ayanolaki libondeli na biso.
२३इसी विषय पर हमने उपवास करके अपने परमेश्वर से प्रार्थना की, और उसने हमारी सुनी।
24 Bongo na sima, natiaki kati na bakonzi ya Banganga-Nzambe bakonzi zomi na mibale: Sherebia, Ashabia elongo na bandeko na bango zomi.
२४तब मैंने मुख्य याजकों में से बारह पुरुषों को, अर्थात् शेरेब्याह, हशब्याह और इनके दस भाइयों को अलग करके, जो चाँदी, सोना और पात्र,
25 Namekaki liboso na bango makabo ya palata, ya wolo mpe bisalelo nyonso oyo mokonzi, bapesi toli na ye, bakalaka na ye mpe Isalaele mobimba bapesaki mpo na Ndako ya Nzambe na biso.
२५राजा और उसके मंत्रियों और उसके हाकिमों और जितने इस्राएली उपस्थित थे उन्होंने हमारे परमेश्वर के भवन के लिये भेंट दिए थे, उन्हें तौलकर उनको दिया।
26 Napesaki bango kilo nkoto tuku mibale ya palata, kilo nkoto misato ya bisalelo basala na palata, kilo nkoto misato ya wolo,
२६मैंने उनके हाथ में साढ़े छः सौ किक्कार चाँदी, सौ किक्कार चाँदी के पात्र,
27 bakopo ya wolo tuku mibale oyo ezali na motuya ya mbongo ya bibende ya wolo nkoto moko mpe biloko mibale ya kitoko basala na bronze oyo engalaka lokola wolo.
२७सौ किक्कार सोना, हजार दर्कमोन के सोने के बीस कटोरे, और सोने सरीखे अनमोल चमकनेवाले पीतल के दो पात्र तौलकर दे दिये।
28 Nalobaki na bango: « Bino elongo na biloko oyo, bobulisami mpo na Yawe. Palata mpe wolo oyo ezali makabo oyo bato bakati bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango, epai na Yawe, Nzambe ya tata na bino.
२८मैंने उनसे कहा, “तुम तो यहोवा के लिये पवित्र हो, और ये पात्र भी पवित्र हैं; और यह चाँदी और सोना भेंट का है, जो तुम्हारे पितरों के परमेश्वर यहोवा के लिये प्रसन्नता से दी गई।
29 Bosenzela mpe bobatela yango malamu kino tango bokomeka kilo na yango liboso ya bakonzi ya Banganga-Nzambe, ya Balevi mpe ya bakambi ya mabota ya Isalaele, kati na bashambre ya Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi. »
२९इसलिए जागते रहो, और जब तक तुम इन्हें यरूशलेम में प्रधान याजकों और लेवियों और इस्राएल के पितरों के घरानों के प्रधानों के सामने यहोवा के भवन की कोठरियों में तौलकर न दो, तब तक इनकी रक्षा करते रहो।”
30 Banganga-Nzambe mpe Balevi bayambaki palata, wolo mpe bisalelo ya bule oyo bamekaki kilo na yango, mpo na komema yango na Ndako ya Nzambe na biso, na Yelusalemi.
३०तब याजकों और लेवियों ने चाँदी, सोने और पात्रों को तौलकर ले लिया कि उन्हें यरूशलेम को हमारे परमेश्वर के भवन में पहुँचाए।
31 Na mokolo ya zomi na mibale ya sanza ya liboso, tolongwaki na ebale Akava mpo na kokende na Yelusalemi. Loboko ya Nzambe na biso ezalaki likolo na biso, mpe abatelaki biso na nzela liboso ya banguna mpe ya bato ya mobulu.
३१पहले महीने के बारहवें दिन को हमने अहवा नदी से कूच करके यरूशलेम का मार्ग लिया, और हमारे परमेश्वर की कृपादृष्टि हम पर रही; और उसने हमको शत्रुओं और मार्ग पर घात लगाने वालों के हाथ से बचाया।
32 Tokomaki na Yelusalemi mpe topemaki kuna mikolo misato.
३२अन्त में हम यरूशलेम पहुँचे और वहाँ तीन दिन रहे।
33 Na mokolo ya minei, tomekaki kilo ya palata, ya wolo mpe bisalelo ya bule kati na Ndako ya Nzambe na biso, liboso ya kopesa yango na maboko ya Nganga-Nzambe Meremoti, mwana mobali ya Uri; azalaki elongo na Eleazari, mwana mobali ya Pineasi, mpe Balevi Yozabadi, mwana mobali ya Jozue, mpe Noadia, mwana mobali ya Binuwi.
३३फिर चौथे दिन वह चाँदी-सोना और पात्र हमारे परमेश्वर के भवन में ऊरिय्याह के पुत्र मरेमोत याजक के हाथ में तौलकर दिए गए। उसके संग पीनहास का पुत्र एलीआजर था, और उनके साथ येशुअ का पुत्र योजाबाद लेवीय और बिन्नूई का पुत्र नोअद्याह लेवीय थे।
34 Batangaki mpe bamekaki kilo ya biloko nyonso; mpe bakomaki yango na buku kaka na tango wana.
३४वे सब वस्तुएँ गिनी और तौली गईं, और उनका तौल उसी समय लिखा गया।
35 Bato oyo bakendeki na bowumbu bazongaki wuta na bowumbu mpe babonzaki mpo na Isalaele mobimba lokola mbeka ya kotumba epai ya Nzambe ya Isalaele: bangombe ya mibali zomi na mibale, bameme ya mibali tuku libwa na motoba, bana meme tuku sambo na sambo, mpe bantaba zomi na mibale lokola mbeka ya masumu. Babonzaki nyonso lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe.
३५जो बँधुआई से आए थे, उन्होंने इस्राएल के परमेश्वर के लिये होमबलि चढ़ाए; अर्थात् समस्त इस्राएल के निमित्त बारह बछड़े, छियानबे मेढ़े और सतहत्तर मेम्ने और पापबलि के लिये बारह बकरे; यह सब यहोवा के लिये होमबलि था।
36 Batindaki lisusu sango ya mitindo ya mokonzi epai ya bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka mpe epai ya bayangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, oyo basungaki bato mpe Tempelo ya Nzambe.
३६तब उन्होंने राजा की आज्ञाएँ महानद के इस पार के अधिकारियों और अधिपतियों को दीं; और उन्होंने इस्राएली लोगों और परमेश्वर के भवन के काम में सहायता की।

< Esidrasi 8 >