< Ezekieli 47 >

1 Moto yango azongisaki ngai pene ya ekotelo ya Tempelo epai wapi namonaki mayi kobima longwa na ekotelo na yango: ezalaki kotiola na ngambo ya este, pamba te Tempelo ezalaki etala na ngambo ya este; mayi ezalaki kokita na se ya ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, na ngambo ya sude ya etumbelo.
καὶ εἰσήγαγέν με ἐπὶ τὰ πρόθυρα τοῦ οἴκου καὶ ἰδοὺ ὕδωρ ἐξεπορεύετο ὑποκάτωθεν τοῦ αἰθρίου κατ’ ἀνατολάς ὅτι τὸ πρόσωπον τοῦ οἴκου ἔβλεπεν κατ’ ἀνατολάς καὶ τὸ ὕδωρ κατέβαινεν ἀπὸ τοῦ κλίτους τοῦ δεξιοῦ ἀπὸ νότου ἐπὶ τὸ θυσιαστήριον
2 Bongo abimisaki ngai na nzela ya ekuke ya nor, amemaki ngai mpe atambolisaki ngai zingazinga ya lopango ya libanda kino na ekuke ya libanda oyo etala na ngambo ya este. Mpe namonaki ete mayi yango ezali kotiola wuta na ngambo ya sude.
καὶ ἐξήγαγέν με κατὰ τὴν ὁδὸν τῆς πύλης τῆς πρὸς βορρᾶν καὶ περιήγαγέν με τὴν ὁδὸν ἔξωθεν πρὸς τὴν πύλην τῆς αὐλῆς τῆς βλεπούσης κατ’ ἀνατολάς καὶ ἰδοὺ τὸ ὕδωρ κατεφέρετο ἀπὸ τοῦ κλίτους τοῦ δεξιοῦ
3 Moto yango akendeki na ngambo ya este mpe asimbaki singa oyo bamekelaka molayi na loboko na ye; amekaki molayi ya bametele pene nkama mitano, akatisaki ngai mayi, mpe mayi yango esukelaki ngai na bisika oyo matambe esukela.
καθὼς ἔξοδος ἀνδρὸς ἐξ ἐναντίας καὶ μέτρον ἐν τῇ χειρὶ αὐτοῦ καὶ διεμέτρησεν χιλίους ἐν τῷ μέτρῳ καὶ διῆλθεν ἐν τῷ ὕδατι ὕδωρ ἀφέσεως
4 Amekaki lisusu molayi ya bametele pene nkama mitano, akatisaki ngai mayi, mpe mayi yango esukelaki ngai na mabolongo. Amekaki lisusu molayi ya bametele pene nkama mitano, akatisaki ngai mayi, mpe mayi yango asukelaki ngai na loketo.
καὶ διεμέτρησεν χιλίους καὶ διῆλθεν ἐν τῷ ὕδατι ὕδωρ ἕως τῶν μηρῶν καὶ διεμέτρησεν χιλίους καὶ διῆλθεν ὕδωρ ἕως ὀσφύος
5 Amekaki lisusu molayi ya bametele pene nkama mitano; kasi na mbala oyo, mayi yango ekomaki ebale moko ya monene oyo nazalaki lisusu ata na makoki ya kokatisa te, pamba te mayi emataki makasi mpe ekomaki mozindo koleka. Bongo esengelaki kaka kokata mayi (na esika ya kokatisa yango na makolo), mpo ete moto moko te azalaki na makoki ya kokatisa ebale yango.
καὶ διεμέτρησεν χιλίους καὶ οὐκ ἠδύνατο διελθεῖν ὅτι ἐξύβριζεν τὸ ὕδωρ ὡς ῥοῖζος χειμάρρου ὃν οὐ διαβήσονται
6 Moto yango atunaki ngai: « Mwana na moto, boni, omoni? » Bongo azongisaki ngai na ngambo ya ebale.
καὶ εἶπεν πρός με εἰ ἑώρακας υἱὲ ἀνθρώπου καὶ ἤγαγέν με ἐπὶ τὸ χεῖλος τοῦ ποταμοῦ
7 Tango nakomaki kuna, namonaki banzete ebele penza, na bangambo nyonso mibale ya ebale.
ἐν τῇ ἐπιστροφῇ μου καὶ ἰδοὺ ἐπὶ τοῦ χείλους τοῦ ποταμοῦ δένδρα πολλὰ σφόδρα ἔνθεν καὶ ἔνθεν
8 Moto yango alobaki na ngai: « Mayi oyo ezali kotiola na ngambo ya este ya etuka mpe ezali kokita kino na etando ya Araba epai wapi ezali komibwaka na ebale monene. Tango kaka ekotaki na mayi ya ebale monene, mayi ya ebale monene ekomaki peto.
καὶ εἶπεν πρός με τὸ ὕδωρ τοῦτο τὸ ἐκπορευόμενον εἰς τὴν Γαλιλαίαν τὴν πρὸς ἀνατολὰς καὶ κατέβαινεν ἐπὶ τὴν Ἀραβίαν καὶ ἤρχετο ἕως ἐπὶ τὴν θάλασσαν ἐπὶ τὸ ὕδωρ τῆς διεκβολῆς καὶ ὑγιάσει τὰ ὕδατα
9 Bipai nyonso mayi yango ezalaki koleka, bikelamu nyonso ya bomoi ezalaki kobotana, bambisi mpe ezalaki kobotana ebele; pamba te mayi yango ezalaki kokoma kuna mpe kopetola mayi ya ebale monene. Bongo na esika nyonso oyo mayi yango ezalaki koleka, nyonso ezalaki kozwa bomoi.
καὶ ἔσται πᾶσα ψυχὴ τῶν ζῴων τῶν ἐκζεόντων ἐπὶ πάντα ἐφ’ ἃ ἂν ἐπέλθῃ ἐκεῖ ὁ ποταμός ζήσεται καὶ ἔσται ἐκεῖ ἰχθὺς πολὺς σφόδρα ὅτι ἥκει ἐκεῖ τὸ ὕδωρ τοῦτο καὶ ὑγιάσει καὶ ζήσεται πᾶν ἐφ’ ὃ ἂν ἐπέλθῃ ὁ ποταμὸς ἐκεῖ ζήσεται
10 Balobi mbisi bakobanda kovanda na bangambo ya ebale monene, wuta na Eyini-Gedi kino na Eyini-Egilayimi, mpo na kobwaka minyama mpe kozwa bambisi ya lolenge nyonso lokola bambisi oyo ezalaka na ebale monene.
καὶ στήσονται ἐκεῖ ἁλεεῖς ἀπὸ Αινγαδιν ἕως Αιναγαλιμ ψυγμὸς σαγηνῶν ἔσται καθ’ αὑτὴν ἔσται καὶ οἱ ἰχθύες αὐτῆς ὡς οἱ ἰχθύες τῆς θαλάσσης τῆς μεγάλης πλῆθος πολὺ σφόδρα
11 Kasi mayi oyo etikalaka tango ebale monene etondaka mpe mayi ya bisanga ekokoma peto te, ekotikala kaka bongo mpe ekotonda na mungwa kati na yango.
καὶ ἐν τῇ διεκβολῇ αὐτοῦ καὶ ἐν τῇ ἐπιστροφῇ αὐτοῦ καὶ ἐν τῇ ὑπεράρσει αὐτοῦ οὐ μὴ ὑγιάσωσιν εἰς ἅλας δέδονται
12 Banzete ya bambuma ya ndenge na ndenge ekobota na bangambo nyonso mibale ya ebale monene. Makasa na yango ekokawuka te mpe bambuma na yango ekosila te. Sanza na sanza, ekobanda kobotaka bambuma ya sika; pamba te ekobanda kozwa mayi oyo ekowuta na Tempelo. Bambuma na yango ekozala malamu mpo na kolia, mpe makasa na yango ekozala malamu mpo na kosalela lokola kisi. »
καὶ ἐπὶ τοῦ ποταμοῦ ἀναβήσεται ἐπὶ τοῦ χείλους αὐτοῦ ἔνθεν καὶ ἔνθεν πᾶν ξύλον βρώσιμον οὐ μὴ παλαιωθῇ ἐπ’ αὐτοῦ οὐδὲ μὴ ἐκλίπῃ ὁ καρπὸς αὐτοῦ τῆς καινότητος αὐτοῦ πρωτοβολήσει διότι τὰ ὕδατα αὐτῶν ἐκ τῶν ἁγίων ταῦτα ἐκπορεύεται καὶ ἔσται ὁ καρπὸς αὐτῶν εἰς βρῶσιν καὶ ἀνάβασις αὐτῶν εἰς ὑγίειαν
13 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: « Tala bandelo oyo bokosalela mpo na kokabola mokili lokola libula epai ya mabota nyonso zomi na mibale ya Isalaele: bakitani ya Jozefi bakozwa biteni mibale.
τάδε λέγει κύριος θεός ταῦτα τὰ ὅρια κατακληρονομήσετε τῆς γῆς ταῖς δώδεκα φυλαῖς τῶν υἱῶν Ισραηλ πρόσθεσις σχοινίσματος
14 Bokozwa yango ndenge moko lokola libula, na biteni ekokana; pamba te nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa yango epai ya bakoko na bino, mpe ekokoma libula na bino.
καὶ κατακληρονομήσετε αὐτὴν ἕκαστος καθὼς ὁ ἀδελφὸς αὐτοῦ εἰς ἣν ἦρα τὴν χεῖρά μου τοῦ δοῦναι αὐτὴν τοῖς πατράσιν αὐτῶν καὶ πεσεῖται ἡ γῆ αὕτη ὑμῖν ἐν κληρονομίᾳ
15 Tala bandelo ya mokili yango: Na ngambo ya nor, mondelo ekobanda longwa na ebale monene to Mediterane, na nzela ya Etiloni oyo ekenda kino na Tsedadi,
καὶ ταῦτα τὰ ὅρια τῆς γῆς πρὸς βορρᾶν ἀπὸ τῆς θαλάσσης τῆς μεγάλης τῆς καταβαινούσης καὶ περισχιζούσης τῆς εἰσόδου Ημαθ Σεδδαδα
16 Amati, Berota, Sibirayimi oyo ezalaka na kati-kati ya mondelo ya Damasi mpe Amati, kino na Atseri-Atikone oyo ezali na mondelo ya Avirani.
Βηρωθα Σεβραιμ Ηλιαμ ἀνὰ μέσον ὁρίων Δαμασκοῦ καὶ ἀνὰ μέσον ὁρίων Ημαθ αὐλὴ τοῦ Σαυναν αἵ εἰσιν ἐπάνω τῶν ὁρίων Αυρανίτιδος
17 Boye, na ngambo ya nor, mondelo ekobanda longwa na ebale monene Mediterane kino na Atsari-Enani mpe ekolekela na mondelo ya nor ya Damasi mpe ya Amati.
ταῦτα τὰ ὅρια ἀπὸ τῆς θαλάσσης ἀπὸ τῆς αὐλῆς τοῦ Αιναν ὅρια Δαμασκοῦ καὶ τὰ πρὸς βορρᾶν
18 Na ngambo ya este, mondelo ekobanda na kati-kati ya Avirani mpe Damasi, ekolekela na Yordani na kati-kati ya mokili ya Galadi mpe Isalaele, na ebale monene ya mungwa kino na Tamari. Yango nde ekozala mondelo ya ngambo ya este.
καὶ τὰ πρὸς ἀνατολὰς ἀνὰ μέσον τῆς Αυρανίτιδος καὶ ἀνὰ μέσον Δαμασκοῦ καὶ ἀνὰ μέσον τῆς Γαλααδίτιδος καὶ ἀνὰ μέσον τῆς γῆς τοῦ Ισραηλ ὁ Ιορδάνης διορίζει ἐπὶ τὴν θάλασσαν τὴν πρὸς ἀνατολὰς Φοινικῶνος ταῦτα τὰ πρὸς ἀνατολάς
19 Na ngambo ya sude, mondelo yango ekobanda longwa na Tamari kino na mayi ya Meriba ya Kadeshi, ekolekela na Wadi kino na ebale monene Mediterane. Yango nde ekozala mondelo ya sude.
καὶ τὰ πρὸς νότον καὶ λίβα ἀπὸ Θαιμαν καὶ Φοινικῶνος ἕως ὕδατος Μαριμωθ Καδης παρεκτεῖνον ἐπὶ τὴν θάλασσαν τὴν μεγάλην τοῦτο τὸ μέρος νότος καὶ λίψ
20 Na ngambo ya weste, ebale monene Mediterane ekozala mondelo. Mondelo yango ekobanda longwa na mondelo ya sude ya ebale monene Mediterane kino na esika oyo etalana na Lebo-Amati. Yango nde ekozala mondelo ya weste.
τοῦτο τὸ μέρος τῆς θαλάσσης τῆς μεγάλης ὁρίζει ἕως κατέναντι τῆς εἰσόδου Ημαθ ἕως εἰσόδου αὐτοῦ ταῦτά ἐστιν τὰ πρὸς θάλασσαν Ημαθ
21 Bokokabola mokili yango kati na bino kolanda mabota ya Isalaele.
καὶ διαμερίσετε τὴν γῆν ταύτην αὐτοῖς ταῖς φυλαῖς τοῦ Ισραηλ
22 Bokobeta zeke mpo na kokabola yango lokola libula mpo na bino mpe bapaya oyo bavandaka kati na bino mpe babota bana kati na bino. Bokokamata bango lokola bana mboka ya Isalaele. Bango mpe bakobeta zeke mpo na kozwa libula elongo na bino kati na mabota ya Isalaele.
βαλεῖτε αὐτὴν ἐν κλήρῳ ὑμῖν καὶ τοῖς προσηλύτοις τοῖς παροικοῦσιν ἐν μέσῳ ὑμῶν οἵτινες ἐγέννησαν υἱοὺς ἐν μέσῳ ὑμῶν καὶ ἔσονται ὑμῖν ὡς αὐτόχθονες ἐν τοῖς υἱοῖς τοῦ Ισραηλ μεθ’ ὑμῶν φάγονται ἐν κληρονομίᾳ ἐν μέσῳ τῶν φυλῶν τοῦ Ισραηλ
23 Boye ezali kati na libota nyonso oyo mopaya akovanda nde bokopesa ye libula na ye, » elobi Nkolo Yawe.
καὶ ἔσονται ἐν φυλῇ προσηλύτων ἐν τοῖς προσηλύτοις τοῖς μετ’ αὐτῶν ἐκεῖ δώσετε κληρονομίαν αὐτοῖς λέγει κύριος θεός

< Ezekieli 47 >