< Ezekieli 44 >

1 Moto yango azongisaki ngai na ekuke ya libanda ya Esika ya bule; Ekuke yango ezalaki na ngambo ya este mpe ezalaki ya kokangama.
Then he brought me back the way of the gate of the outward sanctuary which looks toward the east; and it was shut.
2 Yawe alobaki na ngai: « Ekuke oyo ekotikala ya kokangama, bakoki kofungola yango te, mpe moto moko te akoki kokota na nzela na yango. Ekotikala kaka ya kokangama, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, akotelaki na nzela na yango.
Then said the LORD unto me; This gate shall be shut, it shall not be opened, and no man shall enter in by it; because the LORD, the God of Israel, has entered in by it, therefore it shall be shut.
3 Kasi mokambi, ye kaka, lokola azali mokambi nde akoki kovanda na kati mpo na kolia bilei liboso ya Yawe; akokotela na nzela ya ndako moke ya kokotela mpe akobimela kaka na nzela wana. »
It is for the prince; the prince, he shall sit in it to eat bread before the LORD; he shall enter by the way of the porch of that gate, and shall go out by the way of the same.
4 Moto yango amemaki ngai lisusu na nzela ya ekuke ya nor kino na liboso ya Tempelo. Tango natalaki, namonaki nkembo na Yawe kotondisa Tempelo ya Yawe, mpe ngai nakweyaki elongi kino na mabele.
Then brought he me the way of the north gate before the house: and I looked, and, behold, the glory of the LORD filled the house of the LORD: and I fell upon my face.
5 Yawe alobaki na ngai: « Mwana na moto, sala keba! Fungola miso na yo mpe yoka na matoyi na yo makambo nyonso oyo nakoyebisa yo na tina na Tempelo mpe mitindo na yango! Sala penza keba na ekotelo ya Tempelo mpe bikuke nyonso ya Esika ya bule.
And the LORD said unto me, Son of man, mark well, and behold with your eyes, and hear with your ears all that I say unto you concerning all the ordinances of the house of the LORD, and all the laws thereof; and mark well the entering in of the house, with every going out of the sanctuary.
6 Yebisa batomboki oyo, libota ya Isalaele: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Oh libota ya Isalaele, nalembi misala na bino nyonso ya nkele!
And you shall say to the rebellious, even to the house of Israel, Thus says the Lord GOD; O all of you house of Israel, let it suffice you of all your abominations,
7 Wana bozalaki kobonzela Ngai bilei, mafuta mpe makila ya banyama, bokotisaki kati na Esika na Ngai ya bule bapaya oyo batosaka Ngai te mpe bakatama ngenga te, mpo na kobebisa bosantu ya Tempelo na Ngai; na bongo, bobebisaki boyokani na Ngai mpo na kokokisa misala na bino nyonso ya mbindo!
In that all of you have brought into my sanctuary strangers, uncircumcised in heart, and uncircumcised in flesh, to be in my sanctuary, to pollute it, even my house, when all of you offer my bread, the fat and the blood, and they have broken my covenant because of all your abominations.
8 Na esika ete bomipesa na mosala ya biloko na Ngai ya bule, bino bozali nde kopesa mosala na Ngai epai ya bapaya, kati na Esika na Ngai ya bule.
And all of you have not kept the charge of mine holy things: but all of you have set keepers of my charge in my sanctuary for yourselves.
9 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Mopaya moko te oyo atosaka Ngai te mpe oyo akatisa ngenga te akokota na Esika na Ngai ya bule, ezala bapaya oyo bazali kovanda kati na bana ya Isalaele.
Thus says the Lord GOD; No stranger, uncircumcised in heart, nor uncircumcised in flesh, shall enter into my sanctuary, of any stranger that is among the children of Israel.
10 Balevi oyo bakomaki mosika na Ngai, tango Isalaele abungaki nzela mpe azalaki koyengayenga mosika na Ngai mpo na kolanda banzambe na bango ya bikeko, bakomema mikumba ya masumu na bango.
And the Levites that are gone away far from me, when Israel went astray, which went astray away from me after their idols; they shall even bear their iniquity.
11 Kati na Esika na Ngai ya bule, bakosala kaka mosala ya kokengela bikuke ya Tempelo mpe misala mosusu ya Tempelo; bakobanda koboma mpo na bato bambeka ya kotumba mpe bambeka mosusu mpe bakotelema liboso ya bato mpo na kosalela bango.
Yet they shall be ministers in my sanctuary, having charge at the gates of the house, and ministering to the house: they shall slay the burnt offering and the sacrifice for the people, and they shall stand before them to minister unto them.
12 Kasi lokola basalelaki bango liboso ya banzambe na bango ya bikeko mpe bakweyisaki libota ya Isalaele na masumu, nalapi ndayi, na kotombola loboko, ete bakomema mikumba ya masumu na bango, elobi Nkolo Yawe.
Because they ministered unto them before their idols, and caused the house of Israel to fall into iniquity; therefore have I lifted up mine hand against them, says the Lord GOD, and they shall bear their iniquity.
13 Bakopusana lisusu liboso na Ngai te mpo na kosalela Ngai lokola Banganga-Nzambe to pene ya biloko nyonso oyo ebulisami mpo na Ngai to mpe pene ya biloko oyo eleki bule. Boye, bakolata soni ya misala na bango ya nkele.
And they shall not come near unto me, to do the office of a priest unto me, nor to come near to any of my holy things, in the most holy place: but they shall bear their shame, and their abominations which they have committed.
14 Nakopesa bango mokumba ya kobatela Tempelo mpe kosala misala na yango nyonso, nyonso oyo esengeli kosalema kati na yango.
But I will make them keepers of the charge of the house, for all the service thereof, and for all that shall be done therein.
15 Kasi Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe bakitani ya Tsadoki, oyo bakobaki kobatela na boyengebene misala na bango kati na Esika na Ngai ya bule tango bana ya Isalaele babungaki nzela na Ngai, bakopusana pene na Ngai mpo na kosalela Ngai; bakotelema liboso na Ngai mpo na kobonza bambeka ya mafuta mpe makila ya banyama, elobi Nkolo Yawe.
But the priests the Levites, the sons of Zadok, that kept the charge of my sanctuary when the children of Israel went astray from me, they shall come near to me to minister unto me, and they shall stand before me to offer unto me the fat and the blood, says the Lord GOD:
16 Bango kaka nde bakokota na Esika na Ngai ya bule, bakopusana pene ya mesa na Ngai mpo na kosalela Ngai mpe kokokisa mosala na Ngai.
They shall enter into my sanctuary, and they shall come near to my table, to minister unto me, and they shall keep my charge.
17 Tango bakokota na bikuke ya lopango ya kati, basengeli kolata bilamba ya lino; bakoki kolata bilamba oyo basala na bapwale ya meme te tango bakozala kosala mosala na bikuke ya lopango ya kati to kati na Tempelo.
And it shall come to pass, that when they enter in at the gates of the inner court, they shall be clothed with linen garments; and no wool shall come upon them, while they minister in the gates of the inner court, and within.
18 Bakolata bitendi ya lino na mito na bango mpe bakaputula ya lino na baloketo na bango; bakoki kolata te bilamba oyo etokisaka bato.
They shall have linen bonnets upon their heads, and shall have linen breeches upon their loins; they shall not gird themselves with any thing that causes sweat.
19 Tango bakobima mpo na kokende na lopango ya libanda, na esika oyo bato bazalaka, bakolongola bilamba oyo bazalaki kosalela mosala na kati mpe bakotika yango kati na bashambre ya bule; bakolata bilamba mosusu mpo ete babulisa bato te na nzela ya bilamba na bango.
And when they go forth into the utter court, even into the utter court to the people, they shall put off their garments wherein they ministered, and lay them in the holy chambers, and they shall put on other garments; and they shall not sanctify the people with their garments.
20 Banganga-Nzambe bakoki te kokokola suki ya mito na bango to kokolisa makasi suki na bango; kasi basengeli kokata suki na bango malamu.
Neither shall they shave their heads, nor suffer their locks to grow long; they shall only poll their heads.
21 Nganga-Nzambe moko te akomela masanga ya vino liboso ete akota na lopango ya kati.
Neither shall any priest drink wine, when they enter into the inner court.
22 Bakoki kobala te basi oyo bakufisa mibali to basi oyo bakabwana na mibali na bango na libala, kasi bakobala kaka bilenge basi ya Isalaele oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te to basi ya Banganga-Nzambe oyo basila kokufa.
Neither shall they take for their wives a widow, nor her that is put away: but they shall take maidens of the seed of the house of Israel, or a widow that had a priest before.
23 Bakoteya bato ete bayeba kosala bokeseni kati na biloko ya bule mpe oyo ya bule te, kati na biloko ya mbindo mpe oyo ya peto.
And they shall teach my people the difference between the holy and profane, and cause them to discern between the unclean and the clean.
24 Na tango ya matata, Banganga-Nzambe bakotelema lokola basambisi mpo na kokata makambo kolanda mibeko, bakotosa mibeko mpe bikateli na Ngai, bafeti na Ngai, oyo ekatama mpe bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba.
And in controversy they shall stand in judgment; and they shall judge it according to my judgments: and they shall keep my laws and my statutes in all mine assemblies; and they shall hallow my sabbaths.
25 Nganga-Nzambe moko te akomikomisa mbindo na kopusana pene ya moto ya kokufa. Nzokande, akoki kondima komikomisa mbindo soki moto oyo akufi azali tata to mama na ye, mwana na ye ya mobali to ya mwasi, ndeko na ye ya mobali to ya mwasi oyo amibalelaki te.
And they shall come at no dead person to defile themselves: but for father, or for mother, or for son, or for daughter, for brother, or for sister that has had no husband, they may defile themselves.
26 Sima na kopetolama na ye, akozela mikolo sambo.
And after he is cleansed, they shall reckon unto him seven days.
27 Na mokolo oyo akokota kati na Esika ya bule, kati na lopango ya kati mpo na kosala mosala, akobonza mbeka mpo na masumu na ye moko, elobi Nkolo Yawe.
And in the day that he goes into the sanctuary, unto the inner court, to minister in the sanctuary, he shall offer his sin offering, says the Lord GOD.
28 Tala oyo ekozala libula ya Banganga-Nzambe: Ngai moko nde nazali libula na bango. Bokopesa bango mabele te kati na Isalaele; Ngai moko nde nakozala mabele na bango.
And it shall be unto them for an inheritance: I am their inheritance: and all of you shall give them no possession in Israel: I am their possession.
29 Bakolia makabo ya bambuma, bambeka ya masumu mpe bambeka ya kozongisa boyokani; biloko nyonso oyo, kati na Isalaele, ebulisama mpo na Yawe ekozala ya bango.
They shall eat the food offering, and the sin offering, and the trespass offering: and every dedicated thing in Israel shall be theirs.
30 Bambuma ya liboso oyo ya kitoko mpe makabo na bino nyonso, kolongola ata eloko moko te, ekozala ya Banganga-Nzambe; bokopesa bango bambuma ya liboso ya bilanga na bino ya ble mpo ete mapamboli ezala kati na bandako na bino.
And the first of all the first-fruits of all things, and every oblation of all, of every sort of your oblations, shall be the priest's: all of you shall also give unto the priest the first of your dough, that he may cause the blessing to rest in your house.
31 Banganga-Nzambe bakoki kolia te ndeke to nyama oyo ekufi yango moko to oyo nyama mosusu esili koboma.
The priests shall not eat of any thing that is dead of itself, or torn, whether it be fowl or beast.

< Ezekieli 44 >