< Ezekieli 17 >

1 Yawe alobaki na ngai:
ויהי דבר יהוה אלי לאמר
2 « Mwana na moto, bongisa sambole moko mpe loba yango lokola lisese epai ya libota ya Isalaele.
בן אדם חוד חידה ומשל משל אל בית ישראל
3 Loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Mpongo moko ya monene oyo ezalaki na mapapu milayi soki efungwami, na basala ebele ya balangi ya ndenge na ndenge, ekendeki kotelema na Libani. Tango etutaki songe ya nzete moko ya sedele,
ואמרת כה אמר אדני יהוה הנשר הגדול גדול הכנפים ארך האבר מלא הנוצה אשר לו הרקמה--בא אל הלבנון ויקח את צמרת הארז
4 ebukaki etape moko ya moke oyo ezalaki na songe ya nzete yango mpe ememaki yango na mokili ya bato ya mombongo, epai wapi elonaki yango kati na engumba ya bateki.
את ראש יניקותיו קטף ויביאהו אל ארץ כנען בעיר רכלים שמו
5 Ekamataki ndambo ya milona ya mokili wana, ekendeki kolona yango na mabele ya malamu, lokola nzete oyo elingaka esika ya mayi, pene ya mayi.
ויקח מזרע הארץ ויתנהו בשדה זרע קח על מים רבים צפצפה שמו
6 Nkona yango ekolaki mpe ekomaki nzete ya vino; ezalaki penza mokuse, kasi bitape na yango ezalaki efungwama mpe etala na ngambo ya mpongo. Bongo misisa na yango ezalaki kaka etikala na se na yango. Ekomaki nzete ya vino, ebotaki bitape mpe ebimisaki makasa ebele.
ויצמח ויהי לגפן סרחת שפלת קומה לפנות דליותיו אליו ושרשיו תחתיו יהיו ותהי לגפן--ותעש בדים ותשלח פראות
7 Kasi ezalaki lisusu na mpongo mosusu ya monene oyo ezalaki na mapapu ya milayi mpe basala ebele. Nzokande, nzete ya vino wana ebimisaki misisa na yango na ngambo ya mpongo wana, longwa na esika oyo balonelaki yango mpe epanzaki bitape na yango kino epai na mpongo wana, mpo na kosopela yango mayi.
ויהי נשר אחד גדול גדול כנפים ורב נוצה והנה הגפן הזאת כפנה שרשיה עליו ודליותיו שלחה לו להשקות אותה מערגות מטעה
8 Balonaki yango na mabele ya malamu, lokola nzete oyo elingaka esika ya mayi, pene ya mayi ebele mpo ete ebota bitape mpe bambuma, mpe ekoma nzete monene ya vino. ›
אל שדה טוב אל מים רבים היא שתולה--לעשות ענף ולשאת פרי להיות לגפן אדרת
9 Loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Boni, ekokoma solo monene? Boni, mpongo ya liboso ekopikola yango te mpo ete ezanga kobota mbuma mpe ekawuka? Makasa na yango nyonso ya sika ekokawuka; ekoluka na yango makasi mingi te mpe bato ebele te mpo na kopikola yango.
אמר כה אמר אדני יהוה--תצלח הלוא את שרשיה ינתק ואת פריה יקוסס ויבש כל טרפי צמחה תיבש ולא בזרע גדולה ובעם רב למשאות אותה משרשיה
10 Ata soki bakei kolona yango esika mosusu, okanisi ete ekokola? Ekokawuka nyonso tango mopepe ya este ekoya kobeta yango; solo ekokawuka ata na esika oyo ezalaki kokola malamu. › »
והנה שתולה התצלח הלא כגעת בה רוח הקדים תיבש יבש על ערגת צמחה תיבש
11 Bongo Yawe alobaki na ngai:
ויהי דבר יהוה אלי לאמר
12 « Loba na ndako ya batomboki oyo: ‹ Boni, bozali solo koyeba soki makambo oyo elakisi nini? › Loba na bango: ‹ Mokonzi ya Babiloni ayaki na Yelusalemi, akangaki mokonzi elongo na bakalaka na yango mpe amemaki bango na mokili na ye, elingi koloba na Babiloni.
אמר נא לבית המרי הלא ידעתם מה אלה אמר הנה בא מלך בבל ירושלם ויקח את מלכה ואת שריה ויבא אותם אליו בבלה
13 Akamataki moko kati na libota ya bokonzi, asalaki boyokani elongo na ye mpe alapisaki ye ndayi; mpe amemaki lisusu bankumu ya mokili
ויקח מזרע המלוכה ויכרת אתו ברית ויבא אתו באלה ואת אילי הארץ לקח
14 mpo ete bokonzi ekweya, ekoka lisusu kotelema te mpe ewumela kobika kaka na kobatela mibeko ya boyokani na ye.
להיות ממלכה שפלה לבלתי התנשא לשמר את בריתו לעמדה
15 Kasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni mpe atindaki bantoma na ye, na Ejipito mpo ete bapesa ye bampunda mpe basoda ebele. Akolonga solo? Moto oyo azali kosala makambo ya boye akobika solo? Boni, abuka solo boyokani mpe abika?
וימרד בו לשלח מלאכיו מצרים לתת לו סוסים ועם רב היצלח הימלט העשה אלה והפר ברית ונמלט
16 Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, akokufa kati na Babiloni, kati mokili ya mokonzi oyo atiaki ye na bokonzi; pamba te atosaki te ndayi oyo alapaki liboso na ye mpe abukaki boyokani oyo asalaki elongo na ye.
חי אני נאם אדני יהוה אם לא במקום המלך הממליך אתו אשר בזה את אלתו ואשר הפר את בריתו--אתו בתוך בבל ימות
17 Faraon elongo na ebele ya basoda na ye ya mpiko mpe basoda na ye mosusu ebele bakokoka kosunga ye te na tango ya bitumba; tango bato ya Babiloni bakotonga bamir ya zelo mpo na kobatamela mpe bakotimola mabulu mpo na koboma bato ebele.
ולא בחיל גדול ובקהל רב יעשה אותו פרעה במלחמה בשפך סללה ובבנות דיק--להכרית נפשות רבות
18 Atosaki te ndayi oyo alapaki mpe abukaki boyokani. Lokola atombolaki loboko na ye na ndayi mpe asali makambo ya boye, akobika te!
ובזה אלה להפר ברית והנה נתן ידו וכל אלה עשה לא ימלט
19 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na Kombo na Ngai, nakomemisa ye ngambo ya ndayi na Ngai, oyo atioli mpe ya boyokani na Ngai, oyo abuki.
לכן כה אמר אדני יהוה חי אני אם לא אלתי אשר בזה ובריתי אשר הפיר--ונתתיו בראשו
20 Nakotiela ye motambo na Ngai, mpe akokangama na motambo na Ngai; nakomema ye na Babiloni mpe nakosambisa ye kuna, pamba te atambolaki na boyengebene te liboso na Ngai.
ופרשתי עליו רשתי ונתפש במצודתי והביאותיהו בבלה ונשפטתי אתו שם מעלו אשר מעל בי
21 Basoda na ye nyonso ya mpiko bakokufa na mopanga mpe bato oyo bakotikala na bomoi bakopanzana bisika nyonso. Na bongo, bokoyeba solo ete ezali Ngai Yawe nde nalobaki.
ואת כל מברחו בכל אגפיו בחרב יפלו והנשארים לכל רוח יפרשו וידעתם כי אני יהוה דברתי
22 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Ngai moko nakokamata etape ya songe ya nzete ya sedele mpe nakolona yango; nakobuka na songe ya etape yango moto ya nzete moko, oyo nakolona na likolo ya ngomba oyo eleki molayi.
כה אמר אדני יהוה ולקחתי אני מצמרת הארז הרמה ונתתי מראש ינקותיו רך אקטף ושתלתי אני על הר גבה ותלול
23 Nakolona yango na likolo ya ngomba ya Isalaele oyo eleki molayi; ekopanza bitape na yango mpe ekobota bambuma, ekokoma nzete ya sedele moko ya kitoko; bandeke ya ndenge na ndenge ekotonga bazala na yango kuna mpe ekopema na se ya pio ya bitape na yango.
בהר מרום ישראל אשתלנו ונשא ענף ועשה פרי והיה לארז אדיר ושכנו תחתיו כל צפור כל כנף--בצל דליותיו תשכנה
24 Banzete nyonso ya zamba ekoyeba solo ete Ngai Yawe nde nakweyisaka nzete ya molayi mpe nakomisaka nzete ya mokuse molayi, nakawusaka nzete ya mobesu mpe nakomisaka nzete ya kokawuka nzete ya mobesu. Ngai Yawe nde nalobi mpe nakosala oyo nalobi. › »
וידעו כל עצי השדה כי אני יהוה השפלתי עץ גבה הגבהתי עץ שפל הובשתי עץ לח והפרחתי עץ יבש אני יהוה דברתי ועשיתי

< Ezekieli 17 >