< Ezekieli 15 >

1 Yawe alobaki na ngai: 2 « Mwana na moto, nzete ya vino eleki banzete mosusu na nini? Bitape na yango eleki bitape ya banzete mosusu ya zamba na nini? 3 Bakoki solo kobimisa libaya na nzete ya vino mpe kosalela yango eloko ya tina penza? Bakoki solo kosalela yango bisimbelo ya kotiela biloko likolo? 4 Sima na kobwaka yango na moto, moto ezikisaka basonge mpe kati na yango; boye ndenge nini bakoki kosalela yango penza eloko ya malonga? 5 Soki kutu bakoki kosalela yango eloko ya malonga te tango ezali nanu mobimba, bongo ndenge nini bakoki kosalela yango eloko ya malonga tango moto esili kozikisa mpe kotumba yango? 6 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Ndenge nabwakaka na moto nzete ya vino kati na banzete mosusu ya zamba, ndenge wana mpe nakosala bavandi ya Yelusalemi. 7 Nakotelemela bango penza; ezala babimi na moto, moto mosusu ekotumba bango. Na bongo, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakopesa bango etumbu: 8 Nakosala ete mokili na bango etikala lisusu na bato te mpo ete batambolaki na boyengebene te, basalaki makambo ya nkele elobi Nkolo Yawe. »

< Ezekieli 15 >