< Ezekieli 11 >

1 Bongo Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kino na ekuke ya Tempelo ya Yawe, oyo etala na ngambo ya este. Bato tuku mibale na mitano bazalaki wana na ekotelo ya ekuke; mpe namonaki kati na bango: Yazania, mwana mobali ya Azuri, mpe Pelatia, mwana mobali ya Benaya, oyo bazalaki bakambi ya bato.
Moreover the Spirit lifted me up, and brought me to the east gate of Jehovah's house, which looks eastward: and see, at the door of the gate twenty-five men; and I saw in their midst Jaazaniah the son of Azzur, and Pelatiah the son of Benaiah, officials of the people.
2 Yawe alobaki na ngai: « Mwana na moto, tala bato oyo basalaka mabongisi ya mabe mpe bapesaka batoli ya mabe kati na engumba oyo.
He said to me, "Son of man, these are the men who devise iniquity, and who give wicked counsel in this city;
3 Balobaka: ‹ Boni, tango ya kotonga bandako ekoki nanu te? Engumba oyo ezali lokola nzungu, mpe biso, tozali lokola misuni. ›
who say, 'The time is not near to build houses: this is the caldron, and we are the meat.'
4 Yango wana, sakola makambo ya mabe na tina na bango; sakola, mwana na moto! »
Therefore prophesy against them, prophesy, son of man."
5 Molimo na Yawe akitaki likolo na ngai mpe ayebisaki ngai ete naloba: « Tala liloba oyo Yawe alobi: Tala makambo oyo bozali koloba, bino bakambi kati na Isalaele! Kasi Ngai nayebi makambo oyo bozali kokanisa.
The Spirit of Jehovah fell on me, and he said to me, "Speak, Thus says Jehovah: 'Thus you have said, house of Israel; for I know the things that come into your mind.
6 Bobomi bato ebele kati na engumba oyo mpe botondisi babalabala na yango na bibembe.
You have multiplied your slain in this city, and you have filled its streets with the slain.'
7 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: engumba oyo ezali solo nzungu, mpe bibembe oyo bobwaki kuna, yango nde misuni; kasi Ngai, nakobengana bino kati na yango.
Therefore thus says Jehovah: 'Your slain whom you have laid in its midst, they are the meat, and this is the caldron; but I will bring you out of it.
8 Bozali kobanga mopanga? Solo, Ngai, nakotindela bino mopanga, elobi Nkolo Yawe;
You have feared the sword; and I will bring the sword on you,' says Jehovah.
9 nakobengana bino na engumba oyo, nakokaba bino na maboko ya bapaya mpe nakopesa bino etumbu.
'I will bring you forth out of its midst, and deliver you into the hands of strangers, and will execute judgments among you.
10 Bokokufa na mopanga, nakosambisa bino na bandelo ya mokili ya Isalaele, bongo bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe.
You shall fall by the sword; I will judge you in the border of Israel; and you shall know that I am Jehovah.
11 Engumba oyo ekotikala te kozala nzungu mpo na bino, mpe bino bokotikala te kozala misuni kati na yango; nakosambisa bino na bandelo ya mokili ya Isalaele.
This shall not be your caldron, neither shall you be the meat in its midst; I will judge you in the border of Israel;
12 Mpe bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe, pamba te bolandaki te bikateli na Ngai mpe botosaki te mibeko na Ngai, kasi bolandaki nde bizaleli ya bikolo ya bapaya oyo bazingeli bino. »
and you shall know that I am Jehovah: for you have not walked in my statutes, neither have you executed my ordinances, but have done after the ordinances of the nations that are around you.'"
13 Nzokande, wana nazalaki nanu kosakola, Pelatia, mwana mobali ya Benaya, akufaki. Nakweyaki, elongi na ngai kino na mabele, mpe nagangaki na mongongo makasi: « Oh Nkolo Yawe! Okosilisa solo koboma penza ndambo ya bana ya Isalaele, oyo batikali na bomoi? »
It happened, when I prophesied, that Pelatiah the son of Benaiah died. Then I fell down on my face, and cried with a loud voice, and said, "Ah, Jehovah. Will you make a full end of the remnant of Israel?"
14 Yawe alobaki na ngai:
The word of Jehovah came to me, saying,
15 « Mwana na moto, ezali epai ya bato na yo, bandeko na yo ya makila mpe ndako mobimba ya Isalaele nde bato ya Yelusalemi balobaki: ‹ Bozala mosika na Yawe; mokili oyo epesamelaki biso lokola libula na biso. ›
"Son of man, your brothers, the men of your relatives, and all the house of Israel, all of them, to whom the inhabitants of Jerusalem have said, 'Go far away from Jehovah. This land has been given to us for a possession.'
16 Yango wana, loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Atako nabenganaki bango kati na bikolo mpe napanzaki bango kati na mabota, kasi nazalaki mpo na bango lokola ndako ya bule kati na bikolo epai wapi bakendeki. ›
Therefore say, 'Thus says Jehovah: "Whereas I have removed them far off among the nations, and whereas I have scattered them among the countries, yet will I be to them a sanctuary for a little while in the countries where they have come."'
17 Mpo na yango, loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakosangisa bino wuta na bikolo, nakozongisa bino wuta na mikili epai wapi napanzaki bino mpe nakozongisela bino lisusu mokili ya Isalaele. ›
Therefore say, 'Thus says Jehovah: "I will gather you from the peoples, and assemble you out of the countries where you have been scattered, and I will give you the land of Israel."
18 Bakozonga kuna mpe bakolongola bililingi na yango nyonso ya mbindo elongo na banzambe nyonso ya bikeko.
They shall come there, and they shall take away all the detestable things of it and all its abominations from there.
19 Nakopesa bango motema ya sika mpe nakotia kati na bango molimo ya sika; nakolongola kati na bango motema ya libanga mpe nakopesa bango motema ya mosuni,
I will give them one heart, and I will put a new spirit within you; and I will take the stony heart out of their flesh, and will give them a heart of flesh;
20 mpo ete balanda bikateli na Ngai mpe batosa mibeko na Ngai. Bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango.
that they may walk in my statutes, and keep my ordinances, and do them: and they shall be my people, and I will be their God.
21 Kasi mpo na bato oyo bapesa mitema na bango epai ya bililingi ya mbindo mpe banzambe ya bikeko mpo na kokoba kosalela yango, nakofuta bango kolanda misala na bango, elobi Nkolo Yawe. »
But as for them whose heart walks after the heart of their detestable things and their abominations, I will bring their way on their own heads,' says Jehovah."
22 Na tango wana, basheribe bafungolaki mapapu na bango mpe bapine ekomaki kobaluka na mipanzi na bango; boye nkembo na Nzambe ya Isalaele ezalaki na likolo na bango.
Then the cherubim lifted up their wings, and the wheels were beside them; and the glory of the God of Israel was over them above.
23 Nkembo na Yawe emataki na likolo longwa kati na engumba mpe ekendeki kotelema na likolo ya ngomba oyo ezalaki na este ya Yelusalemi.
The glory of Jehovah went up from the midst of the city, and stood on the mountain which is on the east side of the city.
24 Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kati na Babiloni epai ya bato oyo bakendeki na bowumbu. Makambo oyo ezalaki kosalema kati na emoniseli oyo Molimo ya Nzambe apesaki ngai. Mpe emoniseli oyo namonaki esilaki.
The Spirit lifted me up, and brought me in the vision by the Spirit of God into Chaldea, to them of the captivity. So the vision that I had seen went up from me.
25 Bongo nayebisaki bato oyo bazalaki na bowumbu makambo nyonso oyo Yawe alakisaki ngai.
Then I spoke to them of the captivity all the things that Jehovah had shown me.

< Ezekieli 11 >