< Kobima 9 >

1 Yawe alobaki na Moyize: « Kende koyebisa Faraon: ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi: ‘Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai!’
Potem PAN powiedział do Mojżesza: Idź do faraona i powiedz mu: Tak mówi PAN, Bóg Hebrajczyków: Wypuść mój lud, aby mi służył;
2 Soki oboyi kotika bango kokende mpe okobi kokanga bango,
Bo jeśli będziesz się wzbraniał go wypuścić i nadal będziesz go zatrzymywał;
3 loboko na Yawe ekomema mopepe ya bokono ya somo kati na bibwele na yo, oyo ezali na elanga: bampunda, ba-ane, bashamo, bangombe, bameme mpe bantaba.
Oto ręka PANA będzie na twoje stada, które [są] na polu, na koniach, na osłach, na wielbłądach, na wołach i na owcach. [Będzie] bardzo ciężka zaraza.
4 Kasi Yawe akotia bokeseni kati na bibwele ya bana ya Isalaele mpe ya bato ya Ejipito, pamba te nyama moko te ya bana ya Isalaele ekokufa. › »
PAN rozdzieli stada Izraela i stada Egiptu, aby nie zdechło nic ze wszystkiego, co należy do synów Izraela.
5 Yawe abongisaki tango mpe alobaki: « Lobi, Yawe akokokisa likambo oyo na mokili. »
I PAN wyznaczył czas, mówiąc: Jutro PAN to uczyni na [tej] ziemi.
6 Mpe mokolo oyo elandaki, Yawe akokisaki yango: bibwele nyonso ya bato ya Ejipito ekufaki, kasi ebwele ata moko te ya bana ya Isalaele ekufaki.
Nazajutrz PAN tak uczynił. Pozdychały wszystkie stada Egiptu, lecz ze stad synów Izraela nie zdechło ani jedno.
7 Faraon atindaki bato mpo na kolandela likambo oyo mpe bamonaki ete ata ebwele moko te kati na bibwele ya bana ya Isalaele ekufaki. Atako bongo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi mpe aboyaki kaka kotika bato kokende.
Faraon posłał więc [na zwiady], a oto z bydła Izraela nie zdechło ani jedno. Ale serce faraona pozostało zatwardziałe i nie wypuścił ludu.
8 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron: « Botondisa maboko na bino na putulu oyo ewuti na fulu ya moto makasi, mpe tika ete Moyize abwaka yango likolo, na miso ya Faraon.
Potem PAN powiedział do Mojżesza i Aarona: Weźcie pełne garści popiołu z pieca i niech Mojżesz rozrzuci go ku niebu na oczach faraona.
9 Yango ekopanzana na mokili mobimba ya Ejipito mpe ekobimisa, kati na Ejipito mobimba, na banzoto ya bato mpe ya bibwele, babibon oyo ekokoma bapota ya kopola. »
Zamieni się w pył na całej ziemi Egiptu, który spowoduje wrzody pęczniejące ropą na ludziach i na zwierzętach na całej ziemi Egiptu.
10 Bazwaki putulu na fulu ya moto mpe batelemaki liboso ya Faraon. Moyize abwakaki yango likolo mpe ebimisaki babibon oyo ekomaki bapota ya kopola na banzoto ya bato mpe ya bibwele.
Wzięli więc popiół z pieca i stanęli przed faraonem, a Mojżesz rozrzucił popiół ku niebu i powstały wrzody pęczniejące ropą na ludziach i na zwierzętach.
11 Bato ya soloka bakokaki te kotelema liboso ya Moyize likolo ya bapota oyo ezalaki na banzoto na bango mpe ya bato nyonso ya Ejipito.
Czarownicy zaś nie mogli stanąć przed Mojżeszem z powodu wrzodów, bo wrzody były na nich i na wszystkich Egipcjanach.
12 Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi mpe Faraon ayokelaki te Moyize mpe Aron, ndenge kaka Yawe alobaki yango na Moyize.
I PAN zatwardził serce faraona, i [ten] nie posłuchał ich, jak PAN zapowiedział Mojżeszowi.
13 Yawe alobaki na Moyize: « Lamuka na tongo-tongo, kende kokutana na Faraon mpe loba na ye: ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi: Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
PAN powiedział do Mojżesza: Wstań rano, stań przed faraonem i powiedz mu: Tak mówi PAN, Bóg Hebrajczyków: Wypuść mój lud, aby mi służył;
14 Ya mbala oyo, nakotinda mopepe na Ngai nyonso ya bokono epai na yo, epai ya bakalaka na yo mpe epai ya bato na yo, mpo oyeba ete moko te azali lokola Ngai, na mokili mobimba.
Tym razem bowiem ześlę wszystkie moje plagi na twoje serce, na twoje sługi i na twój lud, abyś wiedział, że nie ma równego mi na całej ziemi.
15 Pamba te kino sik’oyo, nakokaki kosembola loboko na Ngai mpe kotindela yo elongo na bato na yo nyonso, mopepe ya bokono oyo ekokaki kolimwisa bino na mokili.
Bo teraz wyciągnę rękę i uderzę ciebie i twój lud zarazą, i będziesz wytracony z ziemi.
16 Kasi natikaki yo na bomoi mpo na tina oyo: kotalisa yo nguya na Ngai mpe kosala ete lokumu ya Kombo na Ngai epanzana na mokili mobimba.
Lecz dlatego cię postawiłem, aby okazać na tobie moją moc i żeby rozgłaszano moje imię na całej ziemi.
17 Lokola ozali kokoba koboya kotika bato na Ngai kokende,
A ty jeszcze się wynosisz [i stajesz] przeciw memu ludowi, nie chcąc go wypuścić?
18 lobi na ngonga oyo, nakobetisa mvula ya mabanga ya moto makasi, oyo etikala nanu kobeta te wuta mokili ya Ejipito ezala.
Jutro o tej porze spuszczę bardzo ciężki grad, jakiego nie było w Egipcie od dnia jego założenia aż do tego czasu.
19 Sik’oyo, pesa mitindo ete bamema na ebombelo, bibwele na yo mpe biloko nyonso oyo ozali na yango kati na elanga. Pamba te mvula ya mabanga ekokweyela mpe ekoboma moto mpe nyama nyonso oyo bokokotisa kuna te to oyo ekotikala kati na elanga. › »
Poślij więc teraz i zgromadź swoje bydło i wszystko, co masz na polu; [bo] każdy człowiek i każde zwierzę, które znajdzie się na polu, a nie zostanie zegnane do domu, zginie, gdy na nich spadnie grad.
20 Kati na basali ya Faraon, ba-oyo babangaki Liloba na Yawe bakotisaki na lombangu bawumbu mpe bibwele na bango kati na bandako.
Kto więc ze sług faraona uląkł się słowa PANA, kazał uciekać swym sługom wraz z bydłem do domu;
21 Kasi ba-oyo babangaki te Liloba na Yawe, batikaki bawumbu mpe bibwele na bango kati na elanga.
Ale kto nie wziął do serca słowa PANA, ten zostawił swe sługi i bydło na polu.
22 Yawe alobaki na Moyize: « Sembola loboko na yo na likolo mpo ete mvula ya mabanga enoka na mokili mobimba ya Ejipito: likolo ya bato, ya bibwele mpe ya matiti nyonso oyo ebotaka na elanga kati na Ejipito. »
PAN powiedział do Mojżesza: Wyciągnij rękę ku niebu, by spadł grad na całej ziemi Egiptu, na ludzi, na bydło i na wszelkie rośliny polne w ziemi Egiptu.
23 Tango Moyize asembolaki lingenda na ye na likolo, Yawe abetisaki bakake mpe mvula ya mabanga. Bakake ebetaki na mokili. Bongo Yawe anokisaki mvula ya mabanga na mokili ya Ejipito.
I Mojżesz wyciągnął swą laskę ku niebu, a PAN zesłał grzmoty i grad i na ziemię zstąpił ogień. PAN spuścił grad na ziemię Egiptu.
24 Boye mvula ya mabanga mpe bakake ebetaki. Ezalaki mvula moko ya makasi penza oyo etikala nanu kobeta te wuta Ejipito ekoma ekolo.
I był grad i ogień zmieszany z bardzo ciężkim gradem, jakiego nie było w całej ziemi Egiptu, odkąd stał się narodem.
25 Ebomaki, kati na Ejipito, nyonso oyo ezalaki kati na elanga, ezala bato to bibwele; ebebisaki matiti nyonso ya elanga mpe ebukaki banzete nyonso.
Grad poraził na całej ziemi Egiptu cokolwiek było na polu, od człowieka aż do zwierzęcia. Poraził też wszelkie rośliny polne i połamał wszystkie drzewa na polu;
26 Kasi enokaki te kati na etuka ya Gosheni epai wapi bana ya Isalaele bazalaki.
Tylko w ziemi Goszen, gdzie mieszkali synowie Izraela, nie było gradu.
27 Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango: — Ya mbala oyo, nasali lisumu. Yawe azali sembo; ngai mpe bato na ngai tosali mabe.
Faraon kazał więc wezwać Mojżesza i Aarona i powiedział do nich: Tym razem zgrzeszyłem. PAN jest sprawiedliwy, a ja i mój lud jesteśmy niegodziwi.
28 Bobondela Yawe mpo ete asilisa mvula ya mabanga mpe bakake. Bongo ngai nakotika bino kokende, mpe bino bokowumela lisusu awa te.
Wstawcie się u PANA, aby ustały Boże grzmoty i grad, bo [już] dość. Wypuszczę was i nie będziecie [tu] dłużej mieszkać.
29 Moyize azongisaki: — Tango nakobima na engumba, nakotombola maboko na ngai mpo na kobondela Yawe. Bakake ekosila mpe mvula ya mabanga ekonoka lisusu te, mpo ete oyeba ete mokili ezali ya Yawe.
Mojżesz powiedział do niego: Gdy wyjdę z miasta, wyciągnę ręce do PANA, a grzmoty ustaną i nie będzie więcej gradu, abyś wiedział, że ziemia należy do PANA.
30 Kasi nayebi ete, yo elongo na bakalaka na yo, bokobanga na bino kaka Yawe Nzambe te.
Ale wiem, że ty i twoi słudzy jeszcze nie boicie się PANA Boga.
31 Lino mpe Orje ebebaki, pamba te lino ebimisaki mito mpe Orje ebimisaki bafololo.
Len i jęczmień zostały zbite, bo jęczmień miał już kłosy, a len zakwitł.
32 Ble mpe epotele ebebaki te, pamba te tango na yango ya kobota ekokaki nanu te.
Pszenica jednak i żyto nie zostały zbite, bo były późniejsze.
33 Bongo Moyize atikaki Faraon mpe abimaki libanda ya engumba. Atombolaki maboko na ye epai na Yawe; boye bakake mpe mvula ya mabanga etikaki kobeta, mpe mvula esilaki kati na Ejipito.
Mojżesz wyszedł więc od faraona za miasto i wyciągnął ręce do PANA. Ustały wtedy grzmoty i grad, a deszcz nie padał na ziemię.
34 Tango Faraon amonaki ete mvula ya mabanga mpe bakake etiki kobeta, asalaki lisusu lisumu. Ye mpe bakalaka na ye bayeisaki lisusu mitema na bango makasi.
Kiedy faraon zobaczył, że deszcz, grad i grzmoty ustały, jeszcze bardziej zgrzeszył i zatwardził serce, on i jego słudzy.
35 Boye motema ya Faraon ekomaki penza makasi mpe aboyaki kotika bana ya Isalaele kokende, ndenge kaka Yawe alobaki na nzela ya Moyize.
I serce faraona pozostało zatwardziałe i nie wypuścił synów Izraela, jak PAN zapowiedział przez Mojżesza.

< Kobima 9 >