< Kobima 6 >

1 Yawe alobaki na Moyize: — Sik’oyo, okomona makambo oyo nakosala Faraon: na loboko na Ngai ya nguya, Faraon akotika bato na Ngai kokende mpe akobimisa bango na mokili na ye. 2 Nzambe alobaki lisusu na Moyize: — Nazali Yawe. 3 Namimonisaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi lokola Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, kasi namimonisaki te epai na bango na Kombo na Ngai: Yawe. 4 Nasalaki boyokani na Ngai elongo na bango mpo na kopesa bango mokili ya Kanana epai wapi bazalaki kowumela lokola bapaya. 5 Mpe lisusu nayoki kolela ya bana ya Isalaele oyo bato ya Ejipito bakomisi bawumbu, bongo nakanisi lisusu boyokani na Ngai. 6 Yango wana, loba na bana ya Isalaele: « Nazali Yawe! Nakokangola bino na misala makasi oyo bato ya Ejipito bapesi bino. Nakokangola bino na se ya bowumbu na bango na loboko na nguya mpe na bitumbu ya makasi. 7 Nakozwa bino lokola bato na Ngai moko, bongo nakozala Nzambe na bino. Boye bokoyeba ete Ngai Yawe, nazali Nzambe na bino, oyo akangolaki bino na se ya misala makasi ya bato ya Ejipito. 8 Mpe nakokotisa bino na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa yango epai ya Abrayami, epai ya Izaki mpe epai ya Jakobi; nakopesa bino yango mpo ete ekoma ya bino. Nazali Yawe. » 9 Moyize alobaki makambo oyo epai ya bana ya Isalaele, kasi bayokaki ye te, pamba te misala makasi oyo bazalaki kopesa bango elembisaki mitema na bango. 10 Yawe alobaki na Moyize: 11 — Kende koyebisa Faraon, mokonzi ya Ejipito, ete abimisa bana ya Isalaele na mokili na ye. 12 Kasi Moyize azongiselaki Yawe: — Soki kutu bana ya Isalaele bayoki ngai te, ndenge nini Faraon ayoka ngai moto ya likukuma? 13 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron na tina na bana ya Isalaele mpe ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, oyo epai ya nani apesaki mitindo ete abimisa bana ya Isalaele na Ejipito. 14 Tala bakambi ya mabota na bango: Bana mibali ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele: Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi. Wana nde mabota ya Ribeni. 15 Bana mibali ya Simeoni: Yemuweli, Yamini, Owadi, Yakini, Tsoari mpe Saulo, mwana mobali oyo abotamaki na mwasi ya Kanana. Wana nde mabota ya Simeoni. 16 Tala bakombo ya bana mibali ya Levi oyo awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na sambo kolanda ndenge babotamela: Gerishoni, Keati mpe Merari. 17 Bana mibali ya Gerishoni kolanda mabota na bango: Libini mpe Shimei. 18 Bana mibali ya Keati oyo awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na misato: Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli. 19 Bana mibali ya Merari: Maali mpe Mushi. Wana nde mabota ya Levi kolanda ndenge babotamela. 20 Amirami abalaki Yokebedi, tata mwasi na ye, oyo abotelaki ye Aron mpe Moyize. Amirami awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na sambo. 21 Bana mibali ya Yitseari: Kore, Nefegi mpe Zikiri. 22 Bana mibali ya Uzieli: Mishaeli, Elitsafani mpe Sitiri. 23 Aron abalaki Elisheba, mwana mwasi ya Aminadabi mpe ndeko mwasi ya Nashoni. Elisheba abotelaki Aron: Nadabi, Abiyu, Eleazari mpe Itamari. 24 Bana mibali ya Kore: Asiri, Elikana mpe Abiazafi. Wana nde mabota ya Kore. 25 Eleazari, mwana mobali ya Aron, abalaki moko kati na bana basi ya Putieli, oyo abotelaki ye mwana mobali: Pineasi. Wana nde bakambi ya mabota ya Levi kolanda mabota ya botata na bango. 26 Ezali epai ya Aron mpe Moyize nde Yawe alobaki: « Bobimisa bana ya Isalaele na Ejipito lokola mampinga oyo etandami na molongo. » 27 Ezali bango nde bakendeki kokutana na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpo na kobimisa bana ya Isalaele na mokili na ye. Ezali nde Moyize mpe Aron wana. 28 Tala makambo oyo ekomaki tango Yawe alobaki na Moyize, na Ejipito: 29 Yawe ayebisaki Moyize: — Nazali Yawe. Loba na Faraon, mokonzi ya Ejipito, makambo nyonso oyo nayebisi yo. 30 Kasi Moyize azongiselaki Yawe: — Tala, nazali na likukuma; ndenge nini Faraon akoyoka ngai?

< Kobima 6 >