< Kobima 5 >

1 Sima na yango, Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki: — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Tika bato na Ngai kokende kosala feti na esobe mpo na lokumu na Ngai. »
καὶ μετὰ ταῦτα εἰσῆλθεν Μωυσῆς καὶ Ααρων πρὸς Φαραω καὶ εἶπαν αὐτῷ τάδε λέγει κύριος ὁ θεὸς Ισραηλ ἐξαπόστειλον τὸν λαόν μου ἵνα μοι ἑορτάσωσιν ἐν τῇ ἐρήμῳ
2 Faraon azongisaki: — Ye Yawe nde nani mpo ete ngai natosa ye mpe natika Isalaele kokende? Nayebi ye te mpe nakotika te ete Isalaele akende.
καὶ εἶπεν Φαραω τίς ἐστιν οὗ εἰσακούσομαι τῆς φωνῆς αὐτοῦ ὥστε ἐξαποστεῖλαι τοὺς υἱοὺς Ισραηλ οὐκ οἶδα τὸν κύριον καὶ τὸν Ισραηλ οὐκ ἐξαποστέλλω
3 Balobaki: — Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, tika biso totambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka; noki te akoboma biso na bokono to na mopanga.
καὶ λέγουσιν αὐτῷ ὁ θεὸς τῶν Εβραίων προσκέκληται ἡμᾶς πορευσόμεθα οὖν ὁδὸν τριῶν ἡμερῶν εἰς τὴν ἔρημον ὅπως θύσωμεν τῷ θεῷ ἡμῶν μήποτε συναντήσῃ ἡμῖν θάνατος ἢ φόνος
4 Kasi mokonzi ya Ejipito alobaki: — Moyize mpe Aron, mpo na nini bozali kopekisa bato kosala misala na bango? Bozonga na mosala na bino!
καὶ εἶπεν αὐτοῖς ὁ βασιλεὺς Αἰγύπτου ἵνα τί Μωυσῆ καὶ Ααρων διαστρέφετε τὸν λαόν μου ἀπὸ τῶν ἔργων ἀπέλθατε ἕκαστος ὑμῶν πρὸς τὰ ἔργα αὐτοῦ
5 Faraon abakisaki lisusu: — Botala! Bato oyo bakomi ebele kati na mokili, bongo bino bozali kopekisa bango kosala mosala!
καὶ εἶπεν Φαραω ἰδοὺ νῦν πολυπληθεῖ ὁ λαός μὴ οὖν καταπαύσωμεν αὐτοὺς ἀπὸ τῶν ἔργων
6 Kaka na mokolo wana, Faraon apesaki mitindo oyo epai ya bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu mpe na bakapita ya bana ya Isalaele:
συνέταξεν δὲ Φαραω τοῖς ἐργοδιώκταις τοῦ λαοῦ καὶ τοῖς γραμματεῦσιν λέγων
7 — Bokopesa lisusu matiti te epai ya bato oyo mpo na kosala babiliki ndenge bozalaki kopesa bango liboso; botika bango moko bakende kolokota matiti na bango.
οὐκέτι προστεθήσεται διδόναι ἄχυρον τῷ λαῷ εἰς τὴν πλινθουργίαν καθάπερ ἐχθὲς καὶ τρίτην ἡμέραν αὐτοὶ πορευέσθωσαν καὶ συναγαγέτωσαν ἑαυτοῖς ἄχυρα
8 Kasi botinda bango kosala kaka motango ya babiliki oyo basalaka wuta kala, bokitisa motango na yango te. Bazali bagoyigoyi, yango wana bazali koganga: « Tika biso tokende kobonzela Nzambe na biso mbeka! »
καὶ τὴν σύνταξιν τῆς πλινθείας ἧς αὐτοὶ ποιοῦσιν καθ’ ἑκάστην ἡμέραν ἐπιβαλεῖς αὐτοῖς οὐκ ἀφελεῖς οὐδέν σχολάζουσιν γάρ διὰ τοῦτο κεκράγασιν λέγοντες πορευθῶμεν καὶ θύσωμεν τῷ θεῷ ἡμῶν
9 Bokomisa makasi misala na bango mpo ete bakoma na mosala ebele mpe batia matoyi te na makambo ya lokuta.
βαρυνέσθω τὰ ἔργα τῶν ἀνθρώπων τούτων καὶ μεριμνάτωσαν ταῦτα καὶ μὴ μεριμνάτωσαν ἐν λόγοις κενοῖς
10 Bongo bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu mpe bakapita ya bana ya Isalaele babimaki mpe balobaki na bato: — Tala makambo oyo Faraon alobi: « Nakopesa bino lisusu matiti te.
κατέσπευδον δὲ αὐτοὺς οἱ ἐργοδιῶκται καὶ οἱ γραμματεῖς καὶ ἔλεγον πρὸς τὸν λαὸν λέγοντες τάδε λέγει Φαραω οὐκέτι δίδωμι ὑμῖν ἄχυρα
11 Bokende kozwa matiti bino moko na esika oyo bokoki komona yango! Kasi motango ya babiliki oyo bakatela bino ekokita ata moke te. »
αὐτοὶ ὑμεῖς πορευόμενοι συλλέγετε ἑαυτοῖς ἄχυρα ὅθεν ἐὰν εὕρητε οὐ γὰρ ἀφαιρεῖται ἀπὸ τῆς συντάξεως ὑμῶν οὐθέν
12 Boye bana ya Isalaele bapanzanaki na Ejipito mobimba mpo na kolokota matiti ya kotumba na yango babiliki.
καὶ διεσπάρη ὁ λαὸς ἐν ὅλῃ Αἰγύπτῳ συναγαγεῖν καλάμην εἰς ἄχυρα
13 Bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu bazalaki kotindika bango na makasi mpe koloba: — Bokokisa motango ya babiliki oyo bakatela bino mpo na mokolo na mokolo lokola na tango oyo bazalaki kopesa bino matiti!
οἱ δὲ ἐργοδιῶκται κατέσπευδον αὐτοὺς λέγοντες συντελεῖτε τὰ ἔργα τὰ καθήκοντα καθ’ ἡμέραν καθάπερ καὶ ὅτε τὸ ἄχυρον ἐδίδοτο ὑμῖν
14 Bakambi oyo Faraon aponaki mpo na kolandela misala makasi ya bawumbu babetaki bakapita ya bana ya Isalaele oyo bango batiaki mpe batunaki bango: — Mpo na nini lobi oyo eleki mpe lelo bokokisi te motango ya babiliki oyo bosalaka wuta kala?
καὶ ἐμαστιγώθησαν οἱ γραμματεῖς τοῦ γένους τῶν υἱῶν Ισραηλ οἱ κατασταθέντες ἐπ’ αὐτοὺς ὑπὸ τῶν ἐπιστατῶν τοῦ Φαραω λέγοντες διὰ τί οὐ συνετελέσατε τὰς συντάξεις ὑμῶν τῆς πλινθείας καθάπερ ἐχθὲς καὶ τρίτην ἡμέραν καὶ τὸ τῆς σήμερον
15 Bakengeli ya bana ya Isalaele bakendeki kolela epai ya Faraon: — Mpo na nini ozali kosala basali na yo boye?
εἰσελθόντες δὲ οἱ γραμματεῖς τῶν υἱῶν Ισραηλ κατεβόησαν πρὸς Φαραω λέγοντες ἵνα τί οὕτως ποιεῖς τοῖς σοῖς οἰκέταις
16 Bazali kopesa lisusu te matiti epai ya basali na yo, nzokande bazali koloba na biso: « Bosala babiliki! » Sik’oyo tala, basali na yo bazali kobetama, kasi mbeba ezali epai ya bato na yo moko.
ἄχυρον οὐ δίδοται τοῖς οἰκέταις σου καὶ τὴν πλίνθον ἡμῖν λέγουσιν ποιεῖν καὶ ἰδοὺ οἱ παῖδές σου μεμαστίγωνται ἀδικήσεις οὖν τὸν λαόν σου
17 Faraon alobaki: — Bagoyigoyi! Bozali penza bagoyigoyi! Yango wana bozali koloba: « Tika biso tokende kobonzela Yawe mbeka. »
καὶ εἶπεν αὐτοῖς σχολάζετε σχολασταί ἐστε διὰ τοῦτο λέγετε πορευθῶμεν θύσωμεν τῷ θεῷ ἡμῶν
18 Sik’oyo, bozonga na mosala! Bakopesa bino lisusu matiti te, kasi bokosala kaka motango ya babiliki oyo bakatela bino.
νῦν οὖν πορευθέντες ἐργάζεσθε τὸ γὰρ ἄχυρον οὐ δοθήσεται ὑμῖν καὶ τὴν σύνταξιν τῆς πλινθείας ἀποδώσετε
19 Bakengeli ya bana ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi koleka tango bayebisaki bango: « Motango ya babiliki oyo bakatela bino mpo na mokolo na mokolo ekokita te. »
ἑώρων δὲ οἱ γραμματεῖς τῶν υἱῶν Ισραηλ ἑαυτοὺς ἐν κακοῖς λέγοντες οὐκ ἀπολείψετε τῆς πλινθείας τὸ καθῆκον τῇ ἡμέρᾳ
20 Tango batikaki Faraon, batombokelaki Moyize mpe Aron oyo bazalaki kozela bango.
συνήντησαν δὲ Μωυσῇ καὶ Ααρων ἐρχομένοις εἰς συνάντησιν αὐτοῖς ἐκπορευομένων αὐτῶν ἀπὸ Φαραω
21 Balobaki: — Tika ete Yawe atala bino mpe asambisa bino! Bokomisi biso eloko ya nkele liboso ya Faraon mpe ya basali na ye mpe botie mopanga na maboko na bango mpo ete baboma biso!
καὶ εἶπαν αὐτοῖς ἴδοι ὁ θεὸς ὑμᾶς καὶ κρίναι ὅτι ἐβδελύξατε τὴν ὀσμὴν ἡμῶν ἐναντίον Φαραω καὶ ἐναντίον τῶν θεραπόντων αὐτοῦ δοῦναι ῥομφαίαν εἰς τὰς χεῖρας αὐτοῦ ἀποκτεῖναι ἡμᾶς
22 Boye Moyize abalukaki epai na Yawe mpe abondelaki: — Nkolo! Mpo na nini ozali komemela bato oyo pasi? Boni, ezali mpo na yango nde otindaki ngai?
ἐπέστρεψεν δὲ Μωυσῆς πρὸς κύριον καὶ εἶπεν κύριε διὰ τί ἐκάκωσας τὸν λαὸν τοῦτον καὶ ἵνα τί ἀπέσταλκάς με
23 Wuta tango nakendeki koloba na Faraon na Kombo na Yo, Faraon akomi konyokola bato oyo, bongo Yo ozali kosala ata eloko moke te mpo na kokangola bango!
καὶ ἀφ’ οὗ πεπόρευμαι πρὸς Φαραω λαλῆσαι ἐπὶ τῷ σῷ ὀνόματι ἐκάκωσεν τὸν λαὸν τοῦτον καὶ οὐκ ἐρρύσω τὸν λαόν σου

< Kobima 5 >