< Kobima 33 >

1 Yawe alobaki na Moyize: — Kende, longwa na esika oyo elongo na bato oyo obimisaki na Ejipito; kende na mokili oyo nalakaki na ndayi epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi ete nakopesa yango epai na bana na yo.
And the LORD said unto Moses, Depart, and go up behind, you and the people which you have brought up out of the land of Egypt, unto the land which I swore unto Abraham, to Isaac, and to Jacob, saying, Unto your seed will I give it:
2 Nakotinda anjelu liboso na yo, nakobengana bato ya Kanana ya Amori, ya Iti, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.
And I will send an angel before you; and I will drive out the Canaanite, the Amorite, and the Hittite, and the Perizzite, the Hivite, and the Jebusite:
3 Bokende na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Mpo na Ngai, nakotambola elongo na bino te, pamba te bozali batomboki, noki te nakosilisa koboma bino na nzela.
Unto a land flowing with milk and honey: for I will not go up in the midst of you; for you are a stubborn people: lest I consume you in the way.
4 Tango bato bayokaki maloba oyo ya somo, balataki pili, mpe ata moto moko te alataki lisusu biloko ya monzele.
And when the people heard these evil tidings, they mourned: and no man did put on him his ornaments.
5 Bongo Yawe alobaki na Moyize: — Loba na bana ya Isalaele: « Bozali batomboki; soki natamboli elongo na bino ata mpo na tango moke, nakosilisa koboma bino. Bolongola biloko na bino ya monzele, mpe nakoyebisa bino makambo oyo nakosala bino. »
For the LORD had said unto Moses, Say unto the children of Israel, All of you are a stubborn people: I will come up into the midst of you in a moment, and consume you: therefore now put off your ornaments from you, that I may know what to do unto you.
6 Bana ya Isalaele balongolaki biloko na bango ya monzele na ngomba Orebi.
And the children of Israel stripped themselves of their ornaments by the mount Horeb.
7 Moyize azwaki ndako ya kapo mpe atelemisaki yango mwa mosika, na libanda ya molako, mpo na bolamu na bango; mpe abengaki yango Ndako ya kapo ya Bokutani. Moto nyonso oyo alingaki kokutana na Yawe, asengelaki kokende na Ndako ya kapo ya Bokutani, na libanda ya molako.
And Moses took the tabernacle, and pitched it without the camp, far off from the camp, and called it the Tabernacle of the congregation. And it came to pass, that every one which sought the LORD went out unto the tabernacle of the congregation, which was without the camp.
8 Mbala nyonso oyo Moyize azalaki kokende na Ndako ya kapo ya Bokutani, bato nyonso bazalaki kotelema: moko na moko azalaki kotelema na ekuke ya ndako na ye ya kapo mpo na kotala Moyize kino akokota na Ndako ya kapo ya Bokutani.
And it came to pass, when Moses went out unto the tabernacle, that all the people rose up, and stood every man at his tent door, and looked after Moses, until he was gone into the tabernacle.
9 Soki Moyize akoti na kati, likonzi ya lipata ezalaki kokita mpe kotelema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani; bongo Yawe azalaki kosolola na Moyize.
And it came to pass, as Moses entered into the tabernacle, the cloudy pillar descended, and stood at the door of the tabernacle, and the Lord talked with Moses.
10 Bato nyonso bazalaki komona likonzi ya lipata kotelema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Boye bazalaki kotelema mpe kofukamela Yawe, moko na moko na ekuke ya ndako na ye ya kapo.
And all the people saw the cloudy pillar stand at the tabernacle door: and all the people rose up and worshipped, every man in his tent door.
11 Yawe azalaki kosolola na Moyize ndenge moto asololaka na moninga na ye. Wana Moyize azalaki kozonga na molako; Jozue, mwana mobali ya Nuni, elenge oyo azalaki kosunga ye, azalaki kotikala kati na ndako ya kapo.
And the LORD spoke unto Moses face to face, as a man speaks unto his friend. And he turned again into the camp: but his servant Joshua, the son of Nun, a young man, departed not out of the tabernacle.
12 Moyize alobaki na Yawe: — Tala, ozali koloba na ngai ete nakamba bato oyo, kasi ozali koyebisa ngai te nani okotinda elongo na ngai. Nzokande Yo nde olobaki na ngai: « Nayebi yo na kombo na yo, » mpe lisusu: « Ozwi ngolu na miso na Ngai. »
And Moses said unto the LORD, See, you say unto me, Bring up this people: and you have not let me know whom you will send with me. Yet you have said, I know you by name, and you have also found grace in my sight.
13 Sik’oyo, soki penza nazwi ngolu na miso na Yo, teya ngai banzela na Yo mpo ete nayeba Yo mpe nazwa ngolu na miso na Yo. Mpe kanisa lisusu ete libota wana bazali bato na Yo.
Now therefore, I pray you, if I have found grace in your sight, show me now your way, that I may know you, that I may find grace in your sight: and consider that this nation is your people.
14 Yawe azongisaki: — Ngai moko nakotambola elongo na yo mpe nakopesa yo bopemi.
And he said, My presence shall go with you, and I will give you rest.
15 Moyize azongisaki: — Soki Yo moko okotambola elongo na biso te, kolongola biso te na esika oyo.
And he said unto him, If your presence go not with me, carry us not up behind.
16 Soki otamboli elongo na biso te, ndenge nini bato bakoyeba ete ngai mpe bato na Yo tozwi ngolu na miso na Yo? Ezali nde tango okotambola elongo na biso nde ngai mpe bato na yo tokokesana na bikolo nyonso oyo ezali kati na mokili.
For wherein shall it be known here that I and your people have found grace in your sight? is it not in that you go with us? so shall we be separated, I and your people, from all the people that are upon the face of the earth.
17 Yawe alobaki na Moyize: — Nakosala makambo nyonso oyo osengi Ngai, pamba te ozwi ngolu na miso na Ngai mpe nayebi yo na kombo na yo.
And the LORD said unto Moses, I will do this thing also that you have spoken: for you have found grace in my sight, and I know you by name.
18 Moyize azongisaki: — Monisa ngai nkembo na Yo.
And he said, I plead to you, show me your glory.
19 Yawe azongisaki: — Nakolekisa bolamu na Ngai nyonso liboso na yo mpe nakotatola nani oyo nazali liboso na yo; natalisaka ngolu epai ya moto oyo Ngai nasepeli kosalela ngolu, mpe nayokelaka mawa moto oyo Ngai nasepeli koyokela mawa.
And he said, I will make all my goodness pass before you, and I will proclaim the name of the LORD before you; and will be gracious to whom I will be gracious, and will show mercy on whom I will show mercy.
20 Kasi okokoka komona elongi na Ngai te, pamba te moto moko te akoki komona Ngai mpe azala na bomoi.
And he said, You can not see my face: for there shall no man see me, and live.
21 Yawe alobaki lisusu: — Ezali na esika moko awa, pembeni na Ngai, epai wapi okoki kotelema na likolo ya libanga.
And the LORD said, Behold, there is a place by me, and you shall stand upon a rock:
22 Tango nkembo na Ngai ekoleka, nakotia yo kati na lidusu ya libanga mpe nakozipa yo na loboko na Ngai kino nakoleka.
And it shall come to pass, while my glory passes by, that I will put you in a cleft of the rock, and will cover you with my hand while I pass by:
23 Bongo tango nakolongola loboko na Ngai, okomona Ngai kaka na mokongo; kasi okokoka komona elongi na Ngai te.
And I will take away mine hand, and you shall see my back parts: but my face shall not be seen.

< Kobima 33 >