< Kobima 25 >

1 Yawe alobaki na Moyize:
Daar sprak Jahweh tot Moses:
2 — Yebisa bana ya Isalaele ete bamemela Ngai makabo. Okozwa yango na maboko ya moto nyonso oyo akopesa na motema malamu.
Zeg de kinderen Israëls, dat ze Mij geschenken brengen; van iedereen, wien het hart het ingeeft, zult ge geschenken aanvaarden.
3 Tala makabo oyo okozwa na maboko na bango: wolo, palata mpe bronze,
Dit zijn de geschenken, die ge van hen moet aannemen: goud, zilver en brons,
4 bilamba ya langi ya ble, ya motane, ya motane makasi, lino ya kitoko, bapwale ya ntaba,
violet, purper, karmozijn, getwijnd lijnwaad en geitenhaar,
5 baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale, banzete ya akasia,
roodgeverfde ramsvellen, gelooide huiden en acaciahout;
6 mafuta ya olive mpo na kopelisela mwinda, biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpo na kosala mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko;
olie voor de lampen, specerijen voor de zalfolie en voor de geurige wierook;
7 mabanga ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata.
onyxstenen en andere edelstenen, om er het borstkleed en de borsttas mee te bezetten.
8 Bakosalela Ngai Ndako ya bule, mpe nakovanda kati na bango.
Want ge moet voor Mij een heiligdom maken, opdat Ik in hun midden kan wonen.
9 Bokosala yango kolanda lolenge ya Mongombo mpe bisalelo oyo nakolakisa yo.
En ge moet de tabernakel met toebehoren nauwkeurig naar de modellen vervaardigen, die Ik u nu ga tonen.
10 Bokosala sanduku na nzete ya akasia. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano; mokuse na yango, basantimetele tuku sambo na mitano mpe bosanda na yango, basantimetele tuku sambo na mitano.
Ge moet een ark vervaardigen van acaciahout, twee en een halve el lang, anderhalve el breed en anderhalve el hoog.
11 Okobamba yango wolo ya peto, na kati mpe na libanda. Okolatisa mpe songe na yango na wolo.
Ge moet haar van binnen en van buiten met zuiver goud bekleden en er loofwerk van goud omheen maken.
12 Okosalela yango bapete minei ya wolo mpe okotia yango na basonge minei: mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu.
Dan moet ge er vier gouden krammen voor gieten, en die boven aan de vier poten bevestigen, twee krammen aan iedere kant.
13 Okosala mabaya mibale na nzete ya akasia mpe okobamba yango wolo.
Maak vervolgens handbomen van acaciahout, besla ze met goud,
14 Okokotisa mabaya yango na bapete oyo ezali na songe ya sanduku, mpo na komemela yango.
en steek ze in de krammen aan weerskanten van de ark, om daarmee de ark te dragen.
15 Mabaya yango ekotikala libela kati na bapete ya sanduku: bakolongola yango te.
De handbomen moeten in de krammen aan de ark blijven, en mogen er niet worden uitgetrokken.
16 Okotia kati na sanduku bitando ya mabanga ya mibeko, oyo nakopesa yo.
In de ark moet ge de verbondswet leggen, die Ik u geven zal.
17 Okosala mofinuku na wolo ya peto. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano; mpe mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
Daarna moet ge ook een verzoendeksel maken van zuiver goud, twee en een halve el lang en anderhalve el breed.
18 Okosala bikeko mibale ya basheribe oyo okotia na suka mibale ya mofinuku; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto.
Aan de beide uiteinden van het verzoendeksel moet ge twee gouden cherubs als drijfwerk maken.
19 Okotia ekeko moko ya sheribe na suka moko, mpe mosusu, na suka mosusu. Okokangisa bikeko ya basheribe na mofinuku, na suka nyonso mibale.
Sla een cherub uit aan het ene einde en een cherub aan het andere einde; dus in het verzoendeksel zelf moet ge aan beide uiteinden de cherubs uitslaan.
20 Mapapu ya basheribe ekozala ya kofungwama na likolo mpo na kobatela mofinuku; bakozala ngambo na ngambo, mpe miso na bango ekotala mofinuku.
De cherubs moeten hun vleugels omhoog spreiden, en met hun vleugels het verzoendeksel overspannen; ze moeten tegenover elkander staan, terwijl hun gezichten naar het verzoendeksel gericht moeten zijn.
21 Okotia kati na sanduku, bitando ya mabanga ya mibeko oyo nakopesa yo mpe okotia mofinuku na likolo ya sanduku.
Leg dan het verzoendeksel boven op de ark, en de verbondswet, die Ik u geven zal, erin.
22 Ezali wana, na likolo ya mofinuku nde Ngai nakomimonisa epai na yo, na kati-kati ya basheribe mibale oyo bakozala na likolo ya Sanduku ya Litatoli; mpe nakopesa yo mitindo na Ngai nyonso mpo na bana ya Isalaele.
Daar zal Ik Mij aan u openbaren, en boven het verzoendeksel tussen de twee cherubs, die op de ark des Verbonds staan, zal Ik alles mededelen, wat Ik u voor de Israëlieten heb te bevelen.
23 Okosala mesa moko na mabaya ya akasia. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko; mokuse na yango, basantimetele pene tuku mitano mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
Gij moet ook een tafel van acaciahout vervaardigen, twee ellen lang, een el breed en anderhalve el hoog.
24 Okobamba yango wolo ya peto mpe okotia lisusu wolo na pembeni na yango.
Overtrek die met zuiver goud, en maak er loofwerk van goud omheen.
25 Okozingela mesa yango na libaya oyo ekozala na basantimetele pene mwambe na monene, mpe okotia wolo na pembeni ya libaya yango.
Gij moet daar een lijst van een hand breed omheen maken, en om die lijst loofwerk van goud.
26 Okosala bapete minei ya wolo mpe okotia yango na songe minei ya mesa epai wapi makolo na yango ezali.
Dan moet ge vier gouden krammen maken, en die aan de vier hoeken bij de poten bevestigen.
27 Bapete ekozala pene ya libaya oyo ekozingela mesa, mpe bakokotisa kati na bapete yango mabaya ya komemela sanduku.
Breng die krammen voor de handbomen van de tafel vlak bij de lijst aan.
28 Okosala na nzete ya akasia mabaya ya komemela mesa mpe okobamba yango wolo.
De handbomen moet ge van acaciahout maken, en met goud beslaan; daarmee moet de tafel worden gedragen.
29 Okosala na wolo ya peto basani, bakopo, bambilika mpe bambeki, mpo na makabo ya masanga.
Bovendien moet ge nog de nodige schotels, kannen, bekers en schalen vervaardigen voor het uitgieten van de plengoffers; ge moet ze maken van zuiver goud.
30 Okotia tango nyonso mapa na likolo ya mesa liboso na Ngai.
Ook moet ge er voor zorgen, dat er op de tafel voortdurend toonbroden voor Mij liggen.
31 Okosala na wolo ya peto etelemiselo ya minda; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. Evandelo na yango, likonzi na yango, bakeni na yango, bambuma mpe bafololo na yango, nyonso ekozala ekangana lokola eloko moko.
Vervolgens moet ge een kandelaar maken van zuiver goud. De kandelaar moet drijfwerk zijn: zijn voetstuk en schacht, zijn bloemkelken, knoppen en bloesems uit één stuk.
32 Mipanzi ya likonzi ya etelemiselo ya minda esengeli kozala na bitape motoba: misato na ngambo moko, mpe misato na ngambo mosusu.
Zes armen moeten terzijde uitsteken, drie armen aan de ene kant van de kandelaar en drie armen aan de andere kant.
33 Na likolo ya etape moko na moko ya etelemiselo ya minda, okotia bakeni misato oyo ezali na lolenge ya fololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo.
Aan iedere arm moeten drie bloemkelken zitten in de vorm van amandelbloesem, knoppen en bloesems; dus aan de zes armen, die uit de kandelaar steken op dezelfde manier.
34 Na moto ya likonzi ya etelemiselo ya minda, esengeli kozala na bakeni minei oyo ezali na lolenge ya bafololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo.
Maar aan de kandelaar zelf moeten vier bloemkelken zitten in de vorm van amandelbloesem, knoppen en bloesems;
35 Na se ya bitape mibale-mibale ya etelemiselo ya minda, ekozala na mbuma moko; mpe ekozala bongo mpo na bitape nyonso motoba ya etelemiselo ya minda.
telkens moet één knop onder elk van de drie paar armen zitten, waar de zes armen uit de kandelaar schieten.
36 Bambuma mpe bitape ekozala ekangana na etelemiselo ya minda; mpe nyonso ekosalema na wolo ya peto, wolo oyo batuti na nzela ya marto.
De knoppen en armen moeten met de kandelaar zelf uit één stuk zijn; het geheel één stuk drijfwerk van zuiver goud.
37 Okosala minda sambo oyo okotia na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete epesa pole na etando oyo ezali na liboso ya etelemiselo.
Bovendien moet ge de zeven lampen maken, die er bij horen, en deze er zo boven op plaatsen, dat het licht naar de voorzijde valt.
38 Okosala na wolo ya peto bibende oyo bazwelaka makala ya moto mpe basani ya putulu.
Ook de snuiters en bakjes moeten van zuiver goud zijn.
39 Okosalela bakilo tuku misato na minei ya wolo ya peto mpo na kosala etelemiselo ya minda mpe bisalelo na yango nyonso.
Een talent zuiver goud moet men gebruiken voor de kandelaar en voor alles wat er bij hoort.
40 Tala malamu mpe sala mosala nyonso kolanda ndakisa oyo natalisi yo na likolo ya ngomba.
Zorg er voor, dat ge het vervaardigt naar de modellen, die u op de berg zijn getoond.

< Kobima 25 >