< Kobima 16 >

1 Lisanga nyonso ya bana ya Isalaele balongwaki na Elimi mpe bakomaki na esobe ya Tsini, oyo ezali kati ya Elimi mpe ngomba Sinai, na mokolo ya zomi na mitano, na sanza ya mibale sima na kobima na bango na Ejipito.
ἀπῆραν δὲ ἐξ Αιλιμ καὶ ἤλθοσαν πᾶσα συναγωγὴ υἱῶν Ισραηλ εἰς τὴν ἔρημον Σιν ὅ ἐστιν ἀνὰ μέσον Αιλιμ καὶ ἀνὰ μέσον Σινα τῇ δὲ πεντεκαιδεκάτῃ ἡμέρᾳ τῷ μηνὶ τῷ δευτέρῳ ἐξεληλυθότων αὐτῶν ἐκ γῆς Αἰγύπτου
2 Lisanga nyonso ya bana ya Isalaele bayimaki-yimaki na tina na Moyize mpe Aron kati na esobe.
διεγόγγυζεν πᾶσα συναγωγὴ υἱῶν Ισραηλ ἐπὶ Μωυσῆν καὶ Ααρων
3 Bana ya Isalaele balobaki na bango: — Ah! Ebongaki kutu loboko na Yawe epamela biso kati na Ejipito, pamba te, kuna, tozalaki kovanda pembeni ya banzungu etonda na misuni; tozalaki kolia mpe kotonda biloko. Kasi bino bomemi biso kati na esobe oyo mpo na koboma lisanga oyo nyonso na nzala!
καὶ εἶπαν πρὸς αὐτοὺς οἱ υἱοὶ Ισραηλ ὄφελον ἀπεθάνομεν πληγέντες ὑπὸ κυρίου ἐν γῇ Αἰγύπτῳ ὅταν ἐκαθίσαμεν ἐπὶ τῶν λεβήτων τῶν κρεῶν καὶ ἠσθίομεν ἄρτους εἰς πλησμονήν ὅτι ἐξηγάγετε ἡμᾶς εἰς τὴν ἔρημον ταύτην ἀποκτεῖναι πᾶσαν τὴν συναγωγὴν ταύτην ἐν λιμῷ
4 Yawe alobaki na Moyize: — Tala, nakokitisela bino mapa wuta na likolo. Mokolo na mokolo, bato bakobanda kobima mpe kolokota mapa oyo ekoki mpo na kolia mokolo wana. Na nzela wana, nakomeka bango mpo na kotala soki bakobatela to te malako na Ngai.
εἶπεν δὲ κύριος πρὸς Μωυσῆν ἰδοὺ ἐγὼ ὕω ὑμῖν ἄρτους ἐκ τοῦ οὐρανοῦ καὶ ἐξελεύσεται ὁ λαὸς καὶ συλλέξουσιν τὸ τῆς ἡμέρας εἰς ἡμέραν ὅπως πειράσω αὐτοὺς εἰ πορεύσονται τῷ νόμῳ μου ἢ οὔ
5 Na mokolo ya motoba, bakolokota mbala mibale ndambo oyo bazalaki kolokota mpo na mokolo moko mpe bakolamba yango.
καὶ ἔσται τῇ ἡμέρᾳ τῇ ἕκτῃ καὶ ἑτοιμάσουσιν ὃ ἐὰν εἰσενέγκωσιν καὶ ἔσται διπλοῦν ὃ ἐὰν συναγάγωσιν τὸ καθ’ ἡμέραν εἰς ἡμέραν
6 Moyize mpe Aron balobaki na bana nyonso ya Isalaele: — Na pokwa ya lelo, bokoyeba solo ete ezali Yawe nde abimisaki bino na Ejipito.
καὶ εἶπεν Μωυσῆς καὶ Ααρων πρὸς πᾶσαν συναγωγὴν υἱῶν Ισραηλ ἑσπέρας γνώσεσθε ὅτι κύριος ἐξήγαγεν ὑμᾶς ἐκ γῆς Αἰγύπτου
7 Boye lobi na tongo, bokomona nkembo na Yawe; pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Mpo na yango, biso tozali banani mpo ete boyimayima epai na biso?
καὶ πρωὶ ὄψεσθε τὴν δόξαν κυρίου ἐν τῷ εἰσακοῦσαι τὸν γογγυσμὸν ὑμῶν ἐπὶ τῷ θεῷ ἡμεῖς δὲ τί ἐσμεν ὅτι διαγογγύζετε καθ’ ἡμῶν
8 Moyize alobaki lisusu: — Bokoyeba ete ezali solo Yawe tango akopesa bino misuni ya kolia na pokwa mpe mapa ebele na tongo. Pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Biso tozali banani? Boyimaki-yimaki na tina na biso te, kasi na tina na Yawe.
καὶ εἶπεν Μωυσῆς ἐν τῷ διδόναι κύριον ὑμῖν ἑσπέρας κρέα φαγεῖν καὶ ἄρτους τὸ πρωὶ εἰς πλησμονὴν διὰ τὸ εἰσακοῦσαι κύριον τὸν γογγυσμὸν ὑμῶν ὃν ὑμεῖς διαγογγύζετε καθ’ ἡμῶν ἡμεῖς δὲ τί ἐσμεν οὐ γὰρ καθ’ ἡμῶν ὁ γογγυσμὸς ὑμῶν ἐστιν ἀλλ’ ἢ κατὰ τοῦ θεοῦ
9 Boye Moyize alobaki na Aron: — Yebisa lisanga nyonso ya bana ya Isalaele ete bapusana pene ya Yawe mpo ete ayoki koyimayima na bango.
εἶπεν δὲ Μωυσῆς πρὸς Ααρων εἰπὸν πάσῃ συναγωγῇ υἱῶν Ισραηλ προσέλθατε ἐναντίον τοῦ θεοῦ εἰσακήκοεν γὰρ ὑμῶν τὸν γογγυσμόν
10 Wana Aron azalaki koloba na lisanga nyonso ya bana ya Isalaele, babalolaki miso na bango na ngambo ya esobe, mpe bamonaki nkembo na Yawe kobima na mapata.
ἡνίκα δὲ ἐλάλει Ααρων πάσῃ συναγωγῇ υἱῶν Ισραηλ καὶ ἐπεστράφησαν εἰς τὴν ἔρημον καὶ ἡ δόξα κυρίου ὤφθη ἐν νεφέλῃ
11 Yawe alobaki na Moyize:
καὶ ἐλάλησεν κύριος πρὸς Μωυσῆν λέγων
12 — Nayoki koyimayima ya bana ya Isalaele. Yebisa bango: « Na pokwa ya lelo, bokolia misuni; bongo na tongo, bokotonda mana. Boye, bokoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bino. »
εἰσακήκοα τὸν γογγυσμὸν τῶν υἱῶν Ισραηλ λάλησον πρὸς αὐτοὺς λέγων τὸ πρὸς ἑσπέραν ἔδεσθε κρέα καὶ τὸ πρωὶ πλησθήσεσθε ἄρτων καὶ γνώσεσθε ὅτι ἐγὼ κύριος ὁ θεὸς ὑμῶν
13 Kaka na pokwa wana, bakayi eyaki mpe etondisaki molako; mpe na tongo, mamwe ezalaki zingazinga ya molako.
ἐγένετο δὲ ἑσπέρα καὶ ἀνέβη ὀρτυγομήτρα καὶ ἐκάλυψεν τὴν παρεμβολήν τὸ πρωὶ ἐγένετο καταπαυομένης τῆς δρόσου κύκλῳ τῆς παρεμβολῆς
14 Tango mamwe elimwaki, biloko ya mike-mike penza lokola bambuma ya mike-mike emonanaki na mabele ya esobe, pembe lokola mvula ya pembe.
καὶ ἰδοὺ ἐπὶ πρόσωπον τῆς ἐρήμου λεπτὸν ὡσεὶ κόριον λευκὸν ὡσεὶ πάγος ἐπὶ τῆς γῆς
15 Tango bana ya Isalaele bamonaki yango, batunanaki bango na bango: — Oyo nini? Pamba te bayebaki te soki ezali nini. Moyize alobaki na bango: — Ezali mapa oyo Yawe apesi bino mpo ete bolia.
ἰδόντες δὲ αὐτὸ οἱ υἱοὶ Ισραηλ εἶπαν ἕτερος τῷ ἑτέρῳ τί ἐστιν τοῦτο οὐ γὰρ ᾔδεισαν τί ἦν εἶπεν δὲ Μωυσῆς πρὸς αὐτούς οὗτος ὁ ἄρτος ὃν ἔδωκεν κύριος ὑμῖν φαγεῖν
16 Tala mibeko oyo Yawe apesi na tina na likambo oyo: « Tika ete moto na moto alokota oyo ekoki mpo na ye kolia, omeri moko mpo na moto moko. Moto na moto akolokota kolanda motango ya bato oyo bazali kati na ndako na ye ya kapo. »
τοῦτο τὸ ῥῆμα ὃ συνέταξεν κύριος συναγάγετε ἀπ’ αὐτοῦ ἕκαστος εἰς τοὺς καθήκοντας γομορ κατὰ κεφαλὴν κατὰ ἀριθμὸν ψυχῶν ὑμῶν ἕκαστος σὺν τοῖς συσκηνίοις ὑμῶν συλλέξατε
17 Bato ya Isalaele basalaki bongo: bamoko balokotaki moke; mpe bamosusu, ebele.
ἐποίησαν δὲ οὕτως οἱ υἱοὶ Ισραηλ καὶ συνέλεξαν ὁ τὸ πολὺ καὶ ὁ τὸ ἔλαττον
18 Mpe bamekaki na omeri: moto oyo alokotaki ebele, alekelaki te; mpe oyo alokotaki moke, azangelaki te. Balokotaki moto na moto kolanda oyo ekokaki mpo na ye kolia.
καὶ μετρήσαντες τῷ γομορ οὐκ ἐπλεόνασεν ὁ τὸ πολύ καὶ ὁ τὸ ἔλαττον οὐκ ἠλαττόνησεν ἕκαστος εἰς τοὺς καθήκοντας παρ’ ἑαυτῷ συνέλεξαν
19 Moyize ayebisaki bango: — Moko te abomba ata moke kino na tongo.
εἶπεν δὲ Μωυσῆς πρὸς αὐτούς μηδεὶς καταλιπέτω ἀπ’ αὐτοῦ εἰς τὸ πρωί
20 Kasi bamosusu kati na bango bayokelaki Moyize te mpe babombaki ndambo na yango kino na tongo. Boye bankusu etondaki na ndambo oyo babombaki, mpe ekomaki kolumba solo ya kopola. Mpo na yango, Moyize atombokelaki bango.
καὶ οὐκ εἰσήκουσαν Μωυσῆ ἀλλὰ κατέλιπόν τινες ἀπ’ αὐτοῦ εἰς τὸ πρωί καὶ ἐξέζεσεν σκώληκας καὶ ἐπώζεσεν καὶ ἐπικράνθη ἐπ’ αὐτοῖς Μωυσῆς
21 Tongo nyonso, moto na moto abandaki kolokota oyo ekokaki mpo na ye kolia.
καὶ συνέλεξαν αὐτὸ πρωὶ πρωί ἕκαστος τὸ καθῆκον αὐτῷ ἡνίκα δὲ διεθέρμαινεν ὁ ἥλιος ἐτήκετο
22 Na mokolo ya motoba, bana ya Isalaele bazalaki kolokota mbala mibale ndambo oyo bazalaki kolokota mpo na mokolo moko: omeri mibale mpo na moto moko. Bakambi nyonso ya lisanga bayaki koyebisa yango Moyize.
ἐγένετο δὲ τῇ ἡμέρᾳ τῇ ἕκτῃ συνέλεξαν τὰ δέοντα διπλᾶ δύο Γομορ τῷ ἑνί εἰσήλθοσαν δὲ πάντες οἱ ἄρχοντες τῆς συναγωγῆς καὶ ἀνήγγειλαν Μωυσεῖ
23 Moyize alobaki na bango: — Tala mibeko oyo Yawe apesi: « Lobi ezali mokolo ya kopema, mokolo ya Saba oyo ebulisami mpo na Yawe. Bokolamba oyo bolingi kolamba mpe bokotokisa oyo bolingi kotokisa; kasi oyo ekotikala, bobatela yango kino lobi. »
εἶπεν δὲ Μωυσῆς πρὸς αὐτούς τοῦτο τὸ ῥῆμά ἐστιν ὃ ἐλάλησεν κύριος σάββατα ἀνάπαυσις ἁγία τῷ κυρίῳ αὔριον ὅσα ἐὰν πέσσητε πέσσετε καὶ ὅσα ἐὰν ἕψητε ἕψετε καὶ πᾶν τὸ πλεονάζον καταλίπετε αὐτὸ εἰς ἀποθήκην εἰς τὸ πρωί
24 Bato ya Isalaele babatelaki yango kino na tongo, ndenge kaka Moyize atindaki; mana elumbaki te solo ya kopola, mpe bankusu ezalaki te kati na yango.
καὶ κατελίποσαν ἀπ’ αὐτοῦ εἰς τὸ πρωί καθάπερ συνέταξεν αὐτοῖς Μωυσῆς καὶ οὐκ ἐπώζεσεν οὐδὲ σκώληξ ἐγένετο ἐν αὐτῷ
25 Moyize ayebisaki bango: — Mokolo ya lelo ezali mokolo ya Saba, mokolo ya Yawe. Bolia mana oyo bobombaki; pamba te lelo, bokotikala te komona mana na libanda.
εἶπεν δὲ Μωυσῆς φάγετε σήμερον ἔστιν γὰρ σάββατα σήμερον τῷ κυρίῳ οὐχ εὑρεθήσεται ἐν τῷ πεδίῳ
26 Bokobanda kolokota yango mikolo motoba; kasi na mokolo ya sambo, mokolo ya Saba, mana ekobanda kozala te.
ἓξ ἡμέρας συλλέξετε τῇ δὲ ἡμέρᾳ τῇ ἑβδόμῃ σάββατα ὅτι οὐκ ἔσται ἐν αὐτῇ
27 Atako bongo, na mokolo ya sambo, bato mosusu kati na bango babimaki mpo na kolokota yango, kasi bamonaki eloko te.
ἐγένετο δὲ ἐν τῇ ἡμέρᾳ τῇ ἑβδόμῃ ἐξήλθοσάν τινες ἐκ τοῦ λαοῦ συλλέξαι καὶ οὐχ εὗρον
28 Boye Yawe alobaki na Moyize: — Kino tango nini bokoboya kobatela mibeko mpe malako na Ngai?
εἶπεν δὲ κύριος πρὸς Μωυσῆν ἕως τίνος οὐ βούλεσθε εἰσακούειν τὰς ἐντολάς μου καὶ τὸν νόμον μου
29 Botia na mito na bino ete Ngai Yawe, napesaki bino mokolo ya Saba. Yango wana, na mokolo ya motoba, napesaka bino mapa mpo na mikolo mibale. Boye tika ete, na mokolo ya sambo, moto na moto avanda epai na ye; moko te abima na libanda.
ἴδετε ὁ γὰρ κύριος ἔδωκεν ὑμῖν τὴν ἡμέραν ταύτην τὰ σάββατα διὰ τοῦτο αὐτὸς ἔδωκεν ὑμῖν τῇ ἡμέρᾳ τῇ ἕκτῃ ἄρτους δύο ἡμερῶν καθήσεσθε ἕκαστος εἰς τοὺς οἴκους ὑμῶν μηδεὶς ἐκπορευέσθω ἐκ τοῦ τόπου αὐτοῦ τῇ ἡμέρᾳ τῇ ἑβδόμῃ
30 Boye bato bapemaki na mokolo ya sambo.
καὶ ἐσαββάτισεν ὁ λαὸς τῇ ἡμέρᾳ τῇ ἑβδόμῃ
31 Bato ya Isalaele babengaki lipa yango mana. Ezalaki pembe lokola bambuma ya koriande mpe elengi lokola mikate balamba na mafuta ya nzoyi.
καὶ ἐπωνόμασαν οἱ υἱοὶ Ισραηλ τὸ ὄνομα αὐτοῦ Μαν ἦν δὲ ὡς σπέρμα κορίου λευκόν τὸ δὲ γεῦμα αὐτοῦ ὡς ἐγκρὶς ἐν μέλιτι
32 Moyize alobaki: — Tala mibeko oyo Yawe apesi: « Bozwa omeri moko ya mana mpe bobomba yango mpo na milongo ya bakitani na bino oyo ekoya, mpo ete bamona mapa oyo naleisaki bino na esobe tango nabimisaki bino na Ejipito. »
εἶπεν δὲ Μωυσῆς τοῦτο τὸ ῥῆμα ὃ συνέταξεν κύριος πλήσατε τὸ γομορ τοῦ μαν εἰς ἀποθήκην εἰς τὰς γενεὰς ὑμῶν ἵνα ἴδωσιν τὸν ἄρτον ὃν ἐφάγετε ὑμεῖς ἐν τῇ ἐρήμῳ ὡς ἐξήγαγεν ὑμᾶς κύριος ἐκ γῆς Αἰγύπτου
33 Boye Moyize alobi na Aron: — Kamata ekolo moko mpe tia omeri moko ya mana kati na yango; bongo tia yango liboso ya Yawe mpo ete ebombama mpo na milongo oyo ekoya.
καὶ εἶπεν Μωυσῆς πρὸς Ααρων λαβὲ στάμνον χρυσοῦν ἕνα καὶ ἔμβαλε εἰς αὐτὸν πλῆρες τὸ γομορ τοῦ μαν καὶ ἀποθήσεις αὐτὸ ἐναντίον τοῦ θεοῦ εἰς διατήρησιν εἰς τὰς γενεὰς ὑμῶν
34 Ndenge kaka Yawe atindaki Moyize, Aron atiaki mana yango liboso ya Sanduku ya Boyokani mpo ete ebombama malamu.
ὃν τρόπον συνέταξεν κύριος τῷ Μωυσῇ καὶ ἀπέθετο Ααρων ἐναντίον τοῦ μαρτυρίου εἰς διατήρησιν
35 Bana ya Isalaele baliaki mana mibu tuku minei kino tango bakomaki na mondelo ya mokili ya Kanana.
οἱ δὲ υἱοὶ Ισραηλ ἔφαγον τὸ μαν ἔτη τεσσαράκοντα ἕως ἦλθον εἰς γῆν οἰκουμένην τὸ μαν ἐφάγοσαν ἕως παρεγένοντο εἰς μέρος τῆς Φοινίκης
36 Omeri moko ekokani na eteni ya zomi ya efa.
τὸ δὲ γομορ τὸ δέκατον τῶν τριῶν μέτρων ἦν

< Kobima 16 >