< Ester 8 >

1 Kaka na mokolo yango, mokonzi Kizerisesi apesaki Ester, mwasi ya mokonzi, biloko ya Amani, monguna ya Bayuda. Mpe lokola Ester ayebisaki mokonzi ete Maridoshe azali ndeko na ye, mokonzi abengaki Maridoshe mpe Maridoshe akendeki liboso ya mokonzi.
On that day King Ahasuerus gave Queen Esther the property of Haman, the enemy of the Jews, and Mordecai began to serve before the king, for Esther told the king how Mordecai was related to her.
2 Mokonzi alongolaki lopete na ye oyo abotolaki epai ya Amani mpe apesaki yango epai ya Maridoshe. Bongo Ester atiaki Maridoshe mokambi ya biloko ya Amani.
The king took off his signet ring, which he had taken back from Haman, and gave it to Mordecai. Esther designated Mordecai to be in charge of Haman's estate.
3 Ester alobaki lisusu na mokonzi; amibwakaki na makolo na ye mpe abondelaki ye na kolela ete asukisa mikano mabe ya Amani, moto ya Agagi, mpe mabongisi na ye ya koboma Bayuda.
Then Esther spoke again to the king. She lay facedown on the ground and wept as she pleaded with him to put an end to the evil plan of Haman the Agagite, to the scheme that he had devised against the Jews.
4 Mokonzi asembolaki lingenda ya wolo ya bokonzi na ye epai ya Ester. Bongo Ester alamukaki mpe atelemaki liboso na ye.
Then the king held out the golden scepter to Esther, she arose and stood before the king.
5 Ester alobaki: — Soki esepelisi mokonzi, soki nazwi ngolu na miso ya mokonzi, soki akanisi ete ezali sembo mpo na ye kosala mpe soki asepeli na ngai, tika ete mobeko ekomama mpo na kokweyisa mikano ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya Agagi, oyo ebongisamaki mpe ekomamaki mpo na koboma Bayuda kati na bituka nyonso ya mokonzi.
She said, “If it pleases the king, and if I have found favor in your eyes, if the thing seems right before the king, and I am pleasing in your eyes, let a decree be written to revoke the letters written by Haman son of Hammedatha the Agagite, the letters that he wrote to destroy the Jews who are in all the king's provinces.
6 Ndenge nini ngai nakoki komona pasi kokweyela bato na ngai to komona kobebisama ya libota na ngai?
For how could I bear to see disaster fall on my people? How could I endure watching the destruction of my relatives?”
7 Mokonzi Kizerisesi azongiselaki Ester, mwasi na ye, mpe Maridoshe, Moyuda: — Lokola Amani abundisaki Bayuda, ngai napesi ndako na ye epai ya Ester; mpe napesi mitindo mpo ete badiembika ye na nzete.
King Ahasuerus said to Queen Esther and to Mordecai the Jew, “Look, I have given Esther the house of Haman, and they have hanged him on the gallows, because he was going to attack the Jews.
8 Sik’oyo, koma mobeko mosusu na tina na Bayuda, na kombo ya mokonzi, ndenge okomona malamu mpe beta yango kashe ya mokonzi; pamba te mokanda oyo ekomami na kombo ya mokonzi mpe babeti yango kashe na ye ekoki kobongwana te.
Write another decree for the Jews in the name of the king and seal it with the king's ring. For the decree that has already been written in the king's name and sealed with the king's ring cannot be revoked.”
9 Na tango wana kaka, na mokolo ya tuku mibale na misato ya sanza ya misato, sanza ya Sivani, babengisaki bakomi mikanda ya mokonzi. Makambo nyonso oyo Maridoshe atindaki mpo na Bayuda, bakomelaki yango bayangeli ya bituka, bayangeli mpe bakalaka ya bituka nyonso, longwa na Ende kino na Kushi, bituka nkama moko na tuku mibale na sambo, ekolo moko na moko kolanda lokota na yango, etuka moko na moko kolanda ndenge na yango ya kokoma mpe Bayuda kolanda ndenge na bango ya kokoma mpe lokota na bango.
Then the king's scribes were called at that time, in the third month, which is the month of Sivan, on the twenty-third day of the month. A decree was written containing all that Mordecai was commanding concerning the Jews. It was written to the provincial governors, the governors and officials of the provinces that were located from India to Cush, 127 provinces, to every province written in their own writing, and to every people in their language, and to the Jews in their writing and language.
10 Maridoshe akomaki mikanda na kombo ya mokonzi Kizerisesi, abetaki yango kashe ya mokonzi mpe atindaki yango na nzela ya bantoma oyo batambolaka na bampunda ya mbangu, oyo etiama mpo na misala ya mokonzi.
Mordecai wrote in the name of King Ahasuerus and sealed it with the king's signet ring. He sent the documents by couriers riding on the fast horses that were used in the king's service, bred from the royal stud.
11 Na nzela ya mobeko yango, mokonzi apesaki Bayuda ya bingumba nyonso ndingisa ya kosangana mpo na komibatela, kobundisa, koboma mpe kobebisa mampinga ya ekolo nyonso to etuka nyonso oyo ekoluka kobundisa bango, basi na bango to bana na bango; mpe ndingisa ya kobotola na makasi bozwi ya banguna na bango.
The king gave to the Jews who were in every city permission to gather together and to make a stand to protect their lives: To annihiliate, to kill, and to destroy any armed force from any people or province that might attack them, children and women included, or to plunder their possessions.
12 Bongo, mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari, ezalaki mokolo oyo Bayuda bakataki mpo na kokokisa yango kati na bituka nyonso ya mokonzi Kizerisesi.
This was to be in effect in all the provinces of King Ahasuerus, on the thirteenth day of the twelfth month, which is the month of Adar.
13 Basengelaki kopanza sango ya mokanda wana mpo ete ezalaki na bokonzi ya mobeko kati na etuka moko na moko, mpe basengelaki koyebisa yango na bato ya bikolo nyonso mpo ete Bayuda bakoka kozala ya kobongama na mokolo wana mpo na kozongisela banguna na bango mabe na mabe.
A copy of the decree was to be issued as a law and publicly displayed to all the peoples. The Jews were to be ready on that day to take vengeance on their enemies.
14 Na etinda ya mokonzi, bantoma oyo batambolaka na mpunda ya mokonzi babimaki na lombangu mpe bapanzaki sango ya mobeko yango kati na engumba Size.
So the couriers rode on the royal horses that were used in the king's service. They went without delay. The king's decree was also issued from the palace in Susa.
15 Maridoshe alongwaki liboso ya mokonzi, na bilamba ya bokonzi ya langi ya ble mpe ya pembe, na motole monene ya wolo mpe na nzambala ya motane makasi ya lino ya kitoko. Engumba mobimba ya Size ezalaki koganga na esengo mpe ezalaki kosepela.
Then Mordecai left the king's presence wearing royal clothes of blue and white, with a great crown of gold and a purple robe of fine linen, and the city of Susa shouted and rejoiced.
16 Ezalaki tango ya kosepela mpe ya esengo, tango ya feti mpe ya lokumu mpo na Bayuda.
The Jews had light and gladness, and joy and honor.
17 Kati na bituka nyonso, bingumba nyonso mpe bisika nyonso oyo bazwaki sango ya mobeko ya mokonzi, ezalaki tango ya esengo, ya kosepela, ya kolia mpe ya feti kati na Bayuda. Bato ebele ya bikolo mosusu, oyo bazalaki elongo na bango kati na mboka bamikomisaki Bayuda; pamba te somo ya Bayuda elongaki makanisi na bango.
In every province and in every city, wherever the king's decree reached, there was gladness and joy among the Jews, a feast and a holiday. Many from among the variety of peoples of the land became Jews, because the fear of the Jews had fallen on them.

< Ester 8 >