< Ester 1 >

1 Tala makambo oyo esalemaki na tango ya mokonzi Kizerisesi oyo azalaki kokamba bituka nkama moko na tuku mibale na sambo, longwa na Ende kino na Kushi.
Now it came to pass in the days of Ahasuerus, (this is Ahasuerus which reigned, from India even unto Ethiopia, over an hundred and seven and twenty provinces: )
2 Na tango wana, Kizerisesi akendeki kovanda na kiti na ye ya bokonzi kuna na Size, engumba mokonzi batonga makasi.
That in those days, when the king Ahasuerus sat on the throne of his kingdom, which was in Shushan the palace,
3 Na mobu ya misato ya bokonzi na ye, asalisaki feti monene mpo na bato na ye nyonso ya lokumu: bakalaka na ye, bakonzi ya basoda ya mokili ya Persi mpe ya Medi, bankumu mpe bayangeli ya bituka.
In the third year of his reign, he made a feast unto all his princes and his servants; the power of Persia and Media, the nobles and princes of the provinces, being before him:
4 Na feti yango, azalaki kolakisa ebele ya bomengo ya bokonzi na ye mpe kongenga ya lokumu monene oyo azalaki na yango. Feti yango esalaki mikolo nkama moko na tuku mwambe.
When he showed the riches of his glorious kingdom and the honour of his excellent majesty many days, even an hundred and fourscore days.
5 Sima na mikolo yango, mokonzi asalisaki kati na elanga ya ndako na ye ya bokonzi, feti mosusu oyo esalaki mikolo sambo mpo na bato nyonso, ezala babola to bazwi, oyo bazalaki kati na Size, engumba mokonzi batonga makasi.
And when these days were expired, the king made a feast unto all the people that were present in Shushan the palace, both unto great and small, seven days, in the court of the garden of the king's palace;
6 Elamba yango ezalaki na banzela ya langi ya mosaka, ya langi ya pembe mpe ya langi ya ble; bakangisaki yango na makonzi oyo basala na mabanga ya marbre, na basinga ya lino ya langi ya pembe mpe ya motane; bongo balekisaki yango kati na bapete ya palata. Batiaki bakiti minene ya wolo mpe ya palata, na etando ya lopango ya bakaro oyo basala na mabanga ya talo ya langi ya ndenge na ndenge: mabanga ya porfire, ya marbre, ya marbre ya mwindo mpe mabanga mosusu ya talo.
Where were white, green, and blue, hangings, fastened with cords of fine linen and purple to silver rings and pillars of marble: the beds were of gold and silver, upon a pavement of red, and blue, and white, and black, marble.
7 Bazalaki kokabola masanga ya vino na bakopo ya wolo; kopo na kopo ezalaki na lolenge na yango. Bongo vino ezalaki penza ebele kolanda motema ya kokaba ya mokonzi.
And they gave them drink in vessels of gold, (the vessels being diverse one from another, ) and royal wine in abundance, according to the state of the king.
8 Mokonzi apesaki mitindo ete moto nyonso oyo abengami na feti amela masanga ndenge alingi, pamba te atindaki bato nyonso oyo bakabolaka masanga kopesa na moto nyonso masanga ya vino kolanda posa ya moto na moto.
And the drinking was according to the law; none did compel: for so the king had appointed to all the officers of his house, that they should do according to every man's pleasure.
9 Vasti, mwasi ya mokonzi, ye mpe asalisaki feti mpo na basi, kati na ndako ya mokonzi Kizerisesi.
Also Vashti the queen made a feast for the women in the royal house which belonged to king Ahasuerus.
10 Na mokolo ya sambo, lokola mokonzi Kizerisesi alangwaki vino, atindaki basoda na ye sambo oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kosalela ye: Mewumani, Bizita, Aribona, Bigita, Abagita, Zetari mpe Karikasi.
On the seventh day, when the heart of the king was merry with wine, he commanded Mehuman, Biztha, Harbona, Bigtha, and Abagtha, Zethar, and Carcas, the seven chamberlains that served in the presence of Ahasuerus the king,
11 Atindaki bango ete bamema liboso na ye Vasti, mwasi ya mokonzi; bongo alata motole na ye ya bokonzi mpo ete alakisa kitoko na ye epai ya bato mpe epai ya bakalaka, pamba te azalaki penza kitoko.
To bring Vashti the queen before the king with the crown royal, to show the people and the princes her beauty: for she was fair to look on.
12 Kasi tango basoda oyo baboma bango mokongo bayebisaki Vasti, mwasi ya mokonzi, mitindo oyo mokonzi apesaki; Vasti, mwasi ya mokonzi, aboyaki kokende. Mokonzi atombokaki makasi mpe apelaki na kanda.
But the queen Vashti refused to come at the king's commandment by his chamberlains: therefore was the king very angry, and his anger burned in him.
13 Asololaki na bato na ye ya bwanya oyo bayebaka kososola tango, pamba te ezalaki momesano ete makambo ya mokonzi esengeli koya liboso ya bato nyonso ya bwanya, ba-oyo bayebi malamu makambo etali mibeko mpe bosembo, mpo ete basosola yango.
Then the king said to the wise men, which knew the times, (for so was the king's manner toward all that knew law and judgment:
14 Nzokande, ezalaki na bato sambo ya lokumu, bato ya Persi mpe ya Medi, oyo bazalaki bapesi toli oyo mokonzi azalaki kolinga makasi; bazalaki kosangana na mayangani ya mokonzi mpe basimbaki misala oyo eleki minene. Bakombo na bango ezalaki: Karishena, Shetari, Adimata, Tarsisi, Meresi, Marisena mpe Memukani.
And the next unto him was Carshena, Shethar, Admatha, Tarshish, Meres, Marsena, and Memucan, the seven princes of Persia and Media, which saw the king's face, and which sat the first in the kingdom; )
15 Mokonzi atunaki bango: — Kolanda mobeko, esengi kosala nini epai ya Vasti, mwasi ya mokonzi, mpo ete aboyi kotosa mitindo ya mokonzi Kizerisesi, mitindo oyo basoda oyo baboma bango mokongo bayebisaki ye?
What shall we do unto the queen Vashti according to law, because she has not performed the commandment of the king Ahasuerus by the chamberlains?
16 Memukani azongiselaki mokonzi liboso ya bakalaka na ye: — Vasti, mwasi ya mokonzi, asali mabe kaka liboso ya mokonzi te; kasi mpe, liboso ya bakalaka nyonso mpe ya bato nyonso kati bituka nyonso ya mokonzi Kizerisesi.
And Memucan answered before the king and the princes, Vashti the queen has not done wrong to the king only, but also to all the princes, and to all the people that are in all the provinces of the king Ahasuerus.
17 Pamba te sango ya ezaleli mabe ya mwasi ya mokonzi ekoyebana kati na basi nyonso; na bongo, bakokoma kotiola bokonzi ya mibali na bango na koloba: « Mokonzi Kizerisesi kutu apesaki mitindo ete babenga Vasti mpo ete akende liboso na ye, kasi mwasi ya mokonzi aboyaki kokende! »
For this deed of the queen shall come abroad unto all women, so that they shall despise their husbands in their eyes, when it shall be reported, The king Ahasuerus commanded Vashti the queen to be brought in before him, but she came not.
18 Kaka na mokolo ya lelo, basi ya bakalaka ya bato ya Persi mpe ya Medi, oyo bayoki sango ya ezaleli mabe ya mwasi ya mokonzi, bakozongisela bakalaka nyonso ya mokonzi kaka ndenge moko. Boye, kozanga na bango limemia mpe botosi ekoluka ete mibali na bango bakoma na kanda.
Likewise shall the ladies of Persia and Media say this day unto all the king's princes, which have heard of the deed of the queen. Thus shall there arise too much contempt and wrath.
19 Yango wana, soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi azwa mobeko oyo ekoki kobongwana te; mpe tika ete mobeko yango ekomama kati na mibeko ya Persi mpe ya Medi: Vasti akoki lisusu te kotelema liboso ya mokonzi Kizerisesi; mokonzi akopesa lokumu na ye ya mwasi ya mokonzi epai ya mwasi mosusu oyo azali malamu koleka ye.
If it please the king, let there go a royal commandment from him, and let it be written among the laws of the Persians and the Medes, that it be not altered, That Vashti come no more before king Ahasuerus; and let the king give her royal estate unto another that is better than she.
20 Boye tango mobeko ya mokonzi ekopanzana na mokili na ye mobimba, basi nyonso bakotosa mibali na bango, ezala babola to bazwi.
And when the king's decree which he shall make shall be published throughout all his empire, (for it is great, ) all the wives shall give to their husbands honour, both to great and small.
21 Toli oyo esepelisaki mokonzi elongo na bakalaka na ye. Mokonzi asalaki ndenge Memukani alobaki.
And the saying pleased the king and the princes; and the king did according to the word of Memucan:
22 Atindaki mikanda na bituka nyonso ya mokili: etuka na etuka kolanda ndenge ezali ekomeli na yango; mpe bato na bato, kolanda lokota na bango. Mikanda yango elobaki ete mobali nyonso asengeli kozala mokonzi ya ndako na ye mpe koloba monoko ya mboka na ye.
For he sent letters into all the king's provinces, into every province according to the writing thereof, and to every people after their language, that every man should bear rule in his own house, and that it should be published according to the language of every people.

< Ester 1 >