< Mosakoli 6 >

1 Namoni mabe mosusu na se ya moyi, mpe ezali kilo makasi mpo na bato:
There is an evil which I have seen under the sun, and it is common among men:
2 ezali na bato oyo bazwi kowuta na Nzambe bozwi, biloko ebele mpe lokumu mpo ete bazanga eloko moko te oyo mitema na bango ekoki kozala na yango posa; kasi Ye moko Nzambe apimeli bango makoki ya kosepela na yango, pamba te moto mosusu nde azali kosepela na yango. Wana mpe ezali pamba, mpe ezali mabe oyo epesaka penza mawa.
A man to whom God has given riches, wealth, and honour, so that he wants nothing for his soul of all that he desires, yet God gives him not power to eat thereof, but a stranger eats it: this is vanity, and it is an evil disease.
3 Soki moto aboti bana nkama moko mpe azwi ngolu ya kowumela mibu ebele na bomoi; bongo, atako awumeli mibu ebele na bomoi, asepeli te na bozwi na ye mpe azangi ata kunda, nalobi solo ete mwana oyo abotami ya kokufa azali malamu koleka ye;
If a man brought forth an hundred children, and live many years, so that the days of his years be many, and his soul be not filled with good, and also that he have no burial; I say, that an untimely birth is better than he.
4 pamba te, mwana oyo abotami ya kokufa, abotami pamba, azongi kati na molili, mpe bakokanisa ye lisusu te;
For he comes in with vanity, and departs in darkness, and his name shall be covered with darkness.
5 atako amoni moyi te to atikali koyeba ata eloko moko te, azali na kimia koleka mozwi.
Moreover he has not seen the sun, nor known any thing: this has more rest than the other.
6 Ata awumeli na bomoi mibu nkoto moko mbala mibale, akotikala komona esengo te. Boni, bato nyonso bakendaka kaka esika moko te?
Yea, though he live a thousand years twice told, yet has he seen no good: do not all go to one place?
7 Pasi nyonso oyo moto amonaka ezali mpo ete akokisa baposa na ye, nzokande baposa yango esilaka kaka te.
All the labour of man is for his mouth, and yet the appetite is not filled.
8 Moto ya bwanya aleki moto oyo azangi mayele na nini? Litomba nini mobola azali na yango ata ayebi kotambola liboso ya bato mosusu?
For what has the wise more than the fool? what has the poor, that knows to walk before the living?
9 Biloko oyo moto azali komona na miso ezali malamu koleka biloko oyo azali na yango na makanisi: yango mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
Better is the sight of the eyes than the wandering of the desire: this is also vanity and vexation of spirit.
10 Ekelamu nyonso oyo ezali esila koyebana na kombo na yango, mpe eyebani malamu soki moto azali nani: akoki te kotelemela oyo aleki ye na makasi.
That which has been is named already, and it is known that it is man: neither may he contend with him that is mightier than he.
11 Soki maloba eleki mingi, makambo ya pamba-pamba eyaka mpe ebele; bongo litomba na yango ezali penza nini?
Seeing there be many things that increase vanity, what is man the better?
12 Pamba te, nani ayebi likambo oyo ezali malamu mpo na bomoi ya moto, na mikolo na ye nyonso ya bomoi ya pamba oyo azali kolekisa lokola elili? Nani akoki koyebisa ye makambo oyo ekoya sima na ye, na se ya moyi?
For who knows what is good for man in this life, all the days of his vain life which he spends as a shadow? for who can tell a man what shall be after him under the sun?

< Mosakoli 6 >