< Mosakoli 3 >

1 Likambo nyonso ezalaka na tango na yango, mpe mosala nyonso ezalaka na ngonga na yango, na se ya moyi.
To every thing there is a season, and a time to every purpose under the heaven:
2 Ezali na tango ya kobotama mpe tango ya kokufa, tango ya kolona mpe tango ya kopikola oyo elonami;
A time to be born, and a time to die; a time to plant, and a time to pluck up that which is planted;
3 tango ya koboma mpe tango ya kobikisa, tango ya kobuka mpe tango ya kotonga;
A time to kill, and a time to heal; a time to break down, and a time to build up;
4 tango ya kolela mpe tango ya koseka, tango ya kosala matanga mpe tango ya kobina;
A time to weep, and a time to laugh; a time to mourn, and a time to dance;
5 tango ya kopanza mabanga mpe tango ya kosangisa yango, tango ya kopesa beze mpe tango ya kotika kopesa beze;
A time to cast away stones, and a time to gather stones together; a time to embrace, and a time to refrain from embracing;
6 tango ya koluka mpe tango ya kobungisa, tango ya kobomba mpe tango ya kobwaka;
A time to get, and a time to lose; a time to keep, and a time to cast away;
7 tango ya kopasola mpe tango ya kobamba, tango ya kokanga monoko mpe tango ya koloba;
A time to rend, and a time to sew; a time to keep silence, and a time to speak;
8 tango ya kolinga mpe tango ya koyina, tango ya bitumba mpe tango ya kimia.
A time to love, and a time to hate; a time of war, and a time of peace.
9 Litomba nini mosali azwaka na mosala oyo amonelaka pasi?
What profit has he that works in that wherein he labours?
10 Natalaki mokumba oyo Nzambe amemisaki bato.
I have seen the travail, which God has given to the sons of men to be exercised in it.
11 Nzambe asalaka eloko na eloko malamu na tango na yango; atiaka lisusu, kati na mitema ya bato, posa ya koyeba mabombami na Ye. Nzokande, bato bakokaka te kososola mosala ya Nzambe, kobanda na ebandeli kino na suka.
He has made every thing beautiful in his time: also he has set the world in their heart, so that no man can find out the work that God makes from the beginning to the end.
12 Nayebi ete ezali na eloko moko oyo eleki malamu mpo na bato: ezali kaka kosepela mpe kozala malamu tango bazali na bomoi.
I know that there is no good in them, but for a man to rejoice, and to do good in his life.
13 Yango wana, tika ete moto na moto alia, amela mpe amona bolamu kati na mosala na ye nyonso, pamba te ezali likabo ya Nzambe.
And also that every man should eat and drink, and enjoy the good of all his labour, it is the gift of God.
14 Nayebi ete makambo nyonso oyo Nzambe asalaka ewumelaka seko; boye ezali ata na eloko moko te ya kobakisa na likolo na yango to ya kolongola kati na yango. Nzambe asalaka yango bongo mpo ete bakumisa Ye.
I know that, whatsoever God does, it shall be for ever: nothing can be put to it, nor any thing taken from it: and God does it, that men should fear before him.
15 Makambo oyo ezali lelo esila kozala na kala, mpe makambo oyo ekoya ezala wuta kala; Nzambe nde azongisaka makambo oyo esila koleka na tango ya kala.
That which has been is now; and that which is to be has already been; and God requires that which is past.
16 Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi: ezala na esika oyo basambisaka bato, mabe ezali kaka; ezala na esika ya bosembo, mabe ezangaka te.
And moreover I saw under the sun the place of judgment, that wickedness was there; and the place of righteousness, that iniquity was there.
17 Namilobelaki kati na ngai: « Nzambe akosambisa, ezala bato ya sembo to bato mabe, pamba te ezali na tango mpo na likambo moko na moko, mpe ezali na tango mpo na kosambisa likambo moko na moko. »
I said in mine heart, God shall judge the righteous and the wicked: for there is a time there for every purpose and for every work.
18 Namilobelaki lisusu: « Nzambe amekaka bato mpo ete bakoka komimona bango moko ete bazali lokola banyama.
I said in mine heart concerning the estate of the sons of men, that God might manifest them, and that they might see that they themselves are beasts.
19 Suka ya moto ezali lokola suka ya nyama: bango mibale basukaka kaka ndenge moko; ndenge moko akufaka, mosusu mpe akufaka kaka bongo. Bango nyonso bazali kaka na pema moko: moto aleki nyama na eloko te. Nyonso wana ezali kaka pamba.
For that which befalls the sons of men befalls beasts; even one thing befalls them: as the one dies, so dies the other; yea, they have all one breath; so that a man has no preeminence above a beast: for all is vanity.
20 Nyonso ekendaka kaka esika moko; nyonso ewutaki na putulu, mpe nyonso ekozonga kaka na putulu.
All go unto one place; all are of the dust, and all turn to dust again.
21 Nani ayebi soki molimo ya moto emataka na likolo, mpe soki molimo ya nyama ekitaka na se ya mabele? »
Who knows the spirit of man that goes upward, and the spirit of the beast that goes downward to the earth?
22 Boye, nasosolaki ete ezali na eloko moko te oyo eleki malamu mpo na moto, soki kaka te kosepela mpe komona bolamu na mosala na ye, pamba te yango nde ezali litomba na ye. Nani akoki kosunga ye mpo ete amona makambo oyo ekoya sima na ye?
Wherefore I perceive that there is nothing better, than that a man should rejoice in his own works; for that is his portion: for who shall bring him to see what shall be after him?

< Mosakoli 3 >