< Deteronomi 9 >

1 Oh Isalaele, yoka malamu! Okomi sik’oyo pene ya kokatisa Yordani mpo na kokota mpe kobengana bikolo oyo eleki yo na monene mpe na makasi, bikolo oyo evandaka kati na bingumba minene oyo ezali na bamir batonga makasi mpe ekenda kino na likolo.
Hear, Israel: you are to pass over the Jordan this day, to go in to dispossess nations greater and mightier than yourself, cities great and fortified up to the sky,
2 Bato yango bazali makasi mpe bingambe, bana ya Anaki! Oyebi bango mpe osila koyoka bato koloba na tina na bango: « Nani akoki kotelema liboso ya bana ya Anaki? »
a people great and tall, the sons of the Anakim, whom you know, and of whom you have heard say, "Who can stand before the sons of Anak?"
3 Kasi lelo, yeba malamu ete Yawe, Nzambe na yo, azali Ye moko kotambola liboso na yo lokola moto oyo ezikisaka; akobebisa bango mpe akobuka bango liboso na yo; bongo yo okokamata mabele na bango mpe okosilisa bango noki-noki, ndenge Yawe alakaki yo.
Know therefore this day, that Jehovah your God is he who goes over before you as a devouring fire; he will destroy them, and he will bring them down before you: so you shall drive them out, and make them to perish quickly, as Jehovah has spoken to you.
4 Tango Yawe, Nzambe na yo, akosilisa kobengana bango liboso na yo, komilobela te kati na motema na yo: « Ezali mpo na bosembo na ngai nde Yawe amemaki ngai mpo ete nakamata mokili oyo. » Te, ezali bongo te! Ezali nde mpo na mabe ya bikolo yango nde Yawe abengani yango liboso na yo.
Do not say in your heart, after Jehovah your God has thrust them out from before you, saying, "For my righteousness Jehovah has brought me in to possess this land"; because Jehovah drives them out before you because of the wickedness of these nations.
5 Ezali te mpo na bosembo na yo to mpo ete otambolaki alima nde okokota mpo na kozwa mokili na bango, kasi ezali solo mpo na mabe ya bikolo yango nde Yawe, Nzambe na yo, akobengana yango liboso na yo, mpo na kokokisa ndayi oyo alapaki epai ya bakoko na yo Abrayami, Izaki mpe Jakobi.
Not for your righteousness, or for the uprightness of your heart, do you go in to possess their land; but for the wickedness of these nations Jehovah does drive them out from before you, and that he may establish the word which he swore to your fathers, to Abraham, to Isaac, and to Jacob.
6 Boye sosola malamu ete ezali te mpo na bosembo na yo nde Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo mokili oyo ya malamu mpo ete okamata yango, pamba te yo mpe ozali libota ya batomboki.
Know therefore, that Jehovah your God doesn't give you this good land to possess it for your righteousness; for you are a stiff-necked people.
7 Kanisaka malamu likambo oyo mpe kobosanaka te ndenge nini opelisaki kanda ya Yawe, Nzambe na yo, kati na esobe: banda mokolo oyo bobimaki wuta na Ejipito kino bokomaki na esika oyo, bozalaki kaka kotosa Yawe te.
Remember, do not forget, how you provoked Jehovah your God to wrath in the wilderness: from the day that you went forth out of the land of Egypt, until you came to this place, you have been rebellious against Jehovah.
8 Na ngomba Orebi, bopesaki Yawe kanda makasi mpe asilikelaki bino makasi kino akomaki na posa ya kobebisa bino.
Also in Horeb you provoked Jehovah to wrath, and Jehovah was angry with you to destroy you.
9 Tango namataki likolo ya ngomba mpo na kozwa bitando ya mabanga ya boyokani oyo Yawe asalaki elongo na bino, natikalaki likolo ya ngomba mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei; naliaki lipa te mpe namelaki mayi te.
When I was gone up onto the mountain to receive the tablets of stone, even the tablets of the covenant which Jehovah made with you, then I stayed on the mountain forty days and forty nights; I neither ate bread nor drank water.
10 Yawe apesaki ngai bitando mibale ya mabanga oyo mosapi ya Nzambe ekomaki. Na likolo na yango, ezali na mibeko nyonso Yawe oyo ayebisaki bino likolo ya ngomba longwa kati na moto, na mokolo oyo bosanganaki.
Jehovah delivered to me the two tablets of stone written with the finger of God; and on them were all the words which Jehovah spoke with you on the mountain out of the midst of the fire in the day of the assembly.
11 Na suka ya mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, Yawe apesaki ngai bitando yango mibale ya mabanga ya boyokani.
It came to pass at the end of forty days and forty nights, that Jehovah gave me the two tablets of stone, even the tablets of the covenant.
12 Bongo Yawe alobaki na ngai: « Kende, kita mbangu na ngomba oyo, pamba te bato na yo, oyo obimisaki na Ejipito bamikomisi mbindo; bapesi noki mokongo na mibeko oyo napesaki bango mpe bamisaleli ekeko ya ebende banyangwisa na moto. »
Jehovah said to me, "Arise, get down quickly from here; for your people whom you have brought out of Egypt have corrupted themselves; they have quickly turned aside out of the way which I commanded them; they have made them a molten image."
13 Mpe Yawe alobaki na ngai: « Natali malamu bato oyo; bazali penza libota ya batomboki!
Furthermore Jehovah spoke to me, saying, "I have seen this people, and look, it is a stiff-necked people:
14 Tika Ngai kosala: nakobebisa bango mpe nakolimwisa bakombo na bango kati na mokili, kasi nakokomisa yo ekolo ya nguya mpe ya bato ebele koleka bango. »
let me alone, that I may destroy them, and blot out their name from under the sky; and I will make of you a nation mightier and greater than they."
15 Bongo nabalukaki mpe nakitaki wuta na ngomba oyo ekomaki kopela moto; nasimbaki na maboko na ngai bitando mibale ya mabanga ya boyokani.
So I turned and came down from the mountain, and the mountain was burning with fire: and the two tablets of the covenant were in my two hands.
16 Tango natalaki, namonaki ete bosalaki solo masumu epai na Yawe, Nzambe na bino: bomisalelaki ekeko ya mwana ngombe ya ebende banyangwisa na moto; bopengwaki noki na nzela oyo Yawe atindaki bino.
I looked, and look, you had sinned against Jehovah your God; you had made yourselves a molten calf: you had turned aside quickly out of the way which Jehovah had commanded you.
17 Boye, nazwaki bitando yango mibale ya mabanga, nabwakaki yango wuta na maboko na ngai mpe napanzaki yango na biteni na miso na bino.
I took hold of the two tablets, and cast them out of my two hands, and broke them before your eyes.
18 Bongo nakweyaki mbala moko liboso ya Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, naliaki lipa te mpe namelaki mayi te mpo na lisumu monene oyo bosalaki wana bosalaki mabe na miso ya Yawe mpe, na bongo, bopesaki Ye kanda.
I fell down before Jehovah, as at the first, forty days and forty nights; I neither ate bread nor drank water; because of all your sin which you sinned, in doing that which was evil in the sight of Jehovah, to provoke him to anger.
19 Nabangaki kanda mpe kotomboka ya Yawe, pamba te asilikelaki bino makasi kino akomaki na posa ya kobebisa bino; kasi Yawe ayokelaki ngai lisusu.
For I was afraid of the anger and hot displeasure, with which Jehovah was angry against you to destroy you. But Jehovah listened to me that time also.
20 Yawe asilikelaki mpe Aron makasi kino alingaki koboma ye; kasi na tango wana, nabondelaki mpe mpo na Aron.
Jehovah was very angry with Aaron to destroy him: and I prayed for Aaron also at the same time.
21 Nazwaki lisusu eloko oyo ememisaki bino masumu, ekeko ya mwana ngombe oyo bosalaki, natumbaki yango na moto, natutaki mpe nanikaki yango malamu kino ekomaki putulu; mpe nabwakaki putulu yango na mayi oyo ezalaki kotiola wuta na ngomba.
I took your sin, the calf which you had made, and burnt it with fire, and stamped it, grinding it very small, until it was as fine as dust: and I cast its dust into the brook that descended out of the mountain.
22 Na Tabeera, na Masa, na Kibiroti-Atava, bokobaki kaka kopesa Yawe kanda.
At Taberah, and at Massah, and at Kibroth Hattaavah, you provoked Jehovah to wrath.
23 Mpe tango Yawe alingaki ete bolongwa na Kadeshi-Barinea, apesaki bino mitindo: « Bokende! Bokamata mokili oyo napesi bino. » Kasi botosaki te mitindo ya Yawe, Nzambe na bino; botiaki elikya te kati na Ye mpe botosaki Ye te.
When Jehovah sent you from Kadesh Barnea, saying, "Go up and possess the land which I have given you"; then you rebelled against the commandment of Jehovah your God, and you did not believe him, nor listen to his voice.
24 Wuta mokolo oyo nayeba bino, botikala te kotosa Yawe.
You have been rebellious against Jehovah from the day that I knew you.
25 Nakweyaki liboso ya Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, pamba te Yawe azalaki koloba ete akoboma bino.
So I fell down before Jehovah the forty days and forty nights that I fell down, because Jehovah had said he would destroy you.
26 Nabondelaki Yawe mpe nalobaki: « Nkolo Yawe, kobebisa bato na Yo te, bazali libula na Yo moko oyo osikolaki na nguya monene na Yo mpe obimisaki na Ejipito na loboko na Yo ya nguya.
I prayed to God, and said, "Lord Jehovah, do not destroy your people and your inheritance, that you have redeemed through your greatness, that you have brought out of Egypt with a mighty hand.
27 Kanisa basali na Yo Abrayami, Izaki mpe Jakobi! Kotala te botomboki ya bato oyo, mabe na bango mpe masumu na bango;
Remember your servants, Abraham, Isaac, and Jacob; do not look to the stubbornness of this people, nor to their wickedness, nor to their sin,
28 noki te bato ya mokili oyo longwa kuna obimisaki biso, bakoloba: ‹ Ezali mpo ete Yawe azalaki na makoki te ya kokotisa bango na mokili oyo alakaki bango to ezali mpo ete azalaki koyina bango, yango wana abimisaki bango wuta na Ejipito mpo na koboma bango na esobe. ›
lest the land you brought us out from say, 'Because Jehovah was not able to bring them into the land which he promised to them, and because he hated them, he has brought them out to kill them in the wilderness.'
29 Nzokande bazali bato na Yo mpe libula na Yo, oyo obimisaki na nguya monene na Yo mpe na loboko na Yo ya nguya. »
Yet they are your people and your inheritance, which you brought out by your great power and by your outstretched arm."

< Deteronomi 9 >