< Deteronomi 3 >

1 Sima, tobalukaki mpe tokendeki na nzela ya Bashani. Bongo Ogi, mokonzi ya Bashani, elongo na mampinga na ye nyonso babimaki mpo na kokutana na biso mpe babundisaki biso na Edreyi.
καὶ ἐπιστραφέντες ἀνέβημεν ὁδὸν τὴν εἰς Βασαν καὶ ἐξῆλθεν Ωγ βασιλεὺς τῆς Βασαν εἰς συνάντησιν ἡμῖν αὐτὸς καὶ πᾶς ὁ λαὸς αὐτοῦ εἰς πόλεμον εἰς Εδραϊν
2 Yawe alobaki na ngai: « Kobanga ye te, pamba te nakabi ye na maboko na yo elongo na mampinga na ye nyonso mpe mokili na ye; sala ye ndenge osalaki Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni. »
καὶ εἶπεν κύριος πρός με μὴ φοβηθῇς αὐτόν ὅτι εἰς τὰς χεῖράς σου παραδέδωκα αὐτὸν καὶ πάντα τὸν λαὸν αὐτοῦ καὶ πᾶσαν τὴν γῆν αὐτοῦ καὶ ποιήσεις αὐτῷ ὥσπερ ἐποίησας Σηων βασιλεῖ τῶν Αμορραίων ὃς κατῴκει ἐν Εσεβων
3 Boye Yawe, Nzambe na biso, akabaki lisusu Ogi, mokonzi ya Bashani, mpe mampinga na ye nyonso, na maboko na biso; mpe tobomaki bango, totikaki ata moto moko te.
καὶ παρέδωκεν αὐτὸν κύριος ὁ θεὸς ἡμῶν εἰς τὰς χεῖρας ἡμῶν καὶ τὸν Ωγ βασιλέα τῆς Βασαν καὶ πάντα τὸν λαὸν αὐτοῦ καὶ ἐπατάξαμεν αὐτὸν ἕως τοῦ μὴ καταλιπεῖν αὐτοῦ σπέρμα
4 Na tango wana, tobotolaki bingumba na ye nyonso, totikaki ata engumba moko te kati na bingumba tuku motoba na etando ya Arigobi kati na mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani.
καὶ ἐκρατήσαμεν πασῶν τῶν πόλεων αὐτοῦ ἐν τῷ καιρῷ ἐκείνῳ οὐκ ἦν πόλις ἣν οὐκ ἐλάβομεν παρ’ αὐτῶν ἑξήκοντα πόλεις πάντα τὰ περίχωρα Αργοβ βασιλείας Ωγ ἐν Βασαν
5 Bingumba wana nyonso ezalaki ya kotongama makasi mpe ezalaki na bamir ya milayi mpe na bikuke oyo bakangaka na bibende mpe ezalaki lisusu na bamboka ebele oyo ezanga bamir.
πᾶσαι πόλεις ὀχυραί τείχη ὑψηλά πύλαι καὶ μοχλοί πλὴν τῶν πόλεων τῶν Φερεζαίων τῶν πολλῶν σφόδρα
6 Boye, tobukaki yango nyonso ndenge tosalaki epai ya Sikoni, mokonzi ya Eshiboni. Tango tobukaki bingumba na ye, tobomaki mibali, basi mpe bana na ye.
ἐξωλεθρεύσαμεν αὐτούς ὥσπερ ἐποιήσαμεν τὸν Σηων βασιλέα Εσεβων καὶ ἐξωλεθρεύσαμεν πᾶσαν πόλιν ἑξῆς καὶ τὰς γυναῖκας καὶ τὰ παιδία
7 Kasi tomemaki mpo na biso bibwele mpe bomengo ya bitumba oyo tobotolaki na bingumba.
καὶ πάντα τὰ κτήνη καὶ τὰ σκῦλα τῶν πόλεων ἐπρονομεύσαμεν ἑαυτοῖς
8 Boye, na tango wana, tozwaki na maboko ya bakonzi mibale ya bato ya Amori, mokili oyo ezalaki na ngambo ya este ya Yordani, wuta na lubwaku ya Arinoni kino koleka ngomba Erimoni.
καὶ ἐλάβομεν ἐν τῷ καιρῷ ἐκείνῳ τὴν γῆν ἐκ χειρῶν δύο βασιλέων τῶν Αμορραίων οἳ ἦσαν πέραν τοῦ Ιορδάνου ἀπὸ τοῦ χειμάρρου Αρνων καὶ ἕως Αερμων
9 Bato ya Sidoni babengaka ngomba Erimoni Sirioni mpe bato ya Amori babengaka yango Seniri.
οἱ Φοίνικες ἐπονομάζουσιν τὸ Αερμων Σανιωρ καὶ ὁ Αμορραῖος ἐπωνόμασεν αὐτὸ Σανιρ
10 Tozwaki bingumba nyonso ya etando, Galadi nyonso mpe Bashani nyonso kino koleka bingumba ya Salika mpe ya Edreyi, bingumba ya Bashani epai wapi Ogi azalaki koyangela.
πᾶσαι πόλεις Μισωρ καὶ πᾶσα Γαλααδ καὶ πᾶσα Βασαν ἕως Σελχα καὶ Εδραϊν πόλεις βασιλείας τοῦ Ωγ ἐν τῇ Βασαν
11 Nzokande Ogi, mokonzi ya Bashani, atikalaki kaka ye moko na bomoi kati na bato ya Refayimi. Mbeto na ye ezalaki ya bibende; molayi na yango ezalaki na bametele pene minei mpe mokuse na yango, bametele pene mibale. Mbeto yango ezali kino lelo na engumba Raba ya bato ya Amoni.
ὅτι πλὴν Ωγ βασιλεὺς Βασαν κατελείφθη ἀπὸ τῶν Ραφαϊν ἰδοὺ ἡ κλίνη αὐτοῦ κλίνη σιδηρᾶ ἰδοὺ αὕτη ἐν τῇ ἄκρᾳ τῶν υἱῶν Αμμων ἐννέα πηχῶν τὸ μῆκος αὐτῆς καὶ τεσσάρων πηχῶν τὸ εὖρος αὐτῆς ἐν πήχει ἀνδρός
12 Na tango wana, tobotolaki mokili yango. Napesaki epai ya bato ya libota ya Ribeni mpe ya libota ya Gadi mokili oyo ezalaki wuta na Aroeri, kati na lubwaku ya Arinoni kino ndambo ya etuka ya bangomba ya Galadi mpe bingumba na yango.
καὶ τὴν γῆν ἐκείνην ἐκληρονομήσαμεν ἐν τῷ καιρῷ ἐκείνῳ ἀπὸ Αροηρ ἥ ἐστιν ἐπὶ τοῦ χείλους χειμάρρου Αρνων καὶ τὸ ἥμισυ ὄρους Γαλααδ καὶ τὰς πόλεις αὐτοῦ ἔδωκα τῷ Ρουβην καὶ τῷ Γαδ
13 Ndambo oyo etikalaki na Galadi mpe nyonso mosusu ya Bashani, mokili ya Ogi, napesaki yango na ndambo ya libota ya Manase: Mokili nyonso ya Arigobi, oyo ezali na Bashani, eyebanaki lokola mokili ya bato ya Refayimi.
καὶ τὸ κατάλοιπον τοῦ Γαλααδ καὶ πᾶσαν τὴν Βασαν βασιλείαν Ωγ ἔδωκα τῷ ἡμίσει φυλῆς Μανασση καὶ πᾶσαν περίχωρον Αργοβ πᾶσαν τὴν Βασαν ἐκείνην γῆ Ραφαϊν λογισθήσεται
14 Yairi, mokitani ya Manase, abotolaki etuka nyonso ya Arigobi kino na mondelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati. Apesaki bamboka yango kombo na ye. Yango wana kino lelo babengaka Bashani bamboka ya Yairi.
καὶ Ιαϊρ υἱὸς Μανασση ἔλαβεν πᾶσαν τὴν περίχωρον Αργοβ ἕως τῶν ὁρίων Γαργασι καὶ Ομαχαθι ἐπωνόμασεν αὐτὰς ἐπὶ τῷ ὀνόματι αὐτοῦ τὴν Βασαν Αυωθ Ιαϊρ ἕως τῆς ἡμέρας ταύτης
15 Mpe napesaki Galadi epai ya Makiri.
καὶ τῷ Μαχιρ ἔδωκα τὴν Γαλααδ
16 Kasi epai ya mabota ya Ribeni mpe ya Gadi, napesaki etando oyo ebanda wuta na Galadi, ekenda na lubwaku ya Arinoni mpe esalaki mondelo kino na ebale ya Yaboki oyo esalaki mondelo na mokili ya Amoni.
καὶ τῷ Ρουβην καὶ τῷ Γαδ δέδωκα ἀπὸ τῆς Γαλααδ ἕως χειμάρρου Αρνων μέσον τοῦ χειμάρρου ὅριον καὶ ἕως τοῦ Ιαβοκ ὁ χειμάρρους ὅριον τοῖς υἱοῖς Αμμαν
17 Mondelo na yango ya weste ezalaki Yordani: wuta na Kinereti kino na ebale monene ya Araba, ebale monene ya Barozo, na se ya bangomba ya Pisiga na ngambo ya este.
καὶ ἡ Αραβα καὶ ὁ Ιορδάνης ὅριον Μαχαναρεθ καὶ ἕως θαλάσσης Αραβα θαλάσσης ἁλυκῆς ὑπὸ Ασηδωθ τὴν Φασγα ἀνατολῶν
18 Na tango wana, napesaki bino mitindo oyo: « Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino mokili oyo mpo ete bokamata yango. Kasi bato na bino nyonso oyo bazali na makoki ya kobunda balata bibundeli mpe baleka liboso ya bandeko na bino bana ya Isalaele.
καὶ ἐνετειλάμην ὑμῖν ἐν τῷ καιρῷ ἐκείνῳ λέγων κύριος ὁ θεὸς ὑμῶν ἔδωκεν ὑμῖν τὴν γῆν ταύτην ἐν κλήρῳ ἐνοπλισάμενοι προπορεύεσθε πρὸ προσώπου τῶν ἀδελφῶν ὑμῶν υἱῶν Ισραηλ πᾶς δυνατός
19 Bobele basi na bino, bana na bino mpe ebele ya bibwele na bino nde bakotikala na bingumba oyo napesaki bino
πλὴν αἱ γυναῖκες ὑμῶν καὶ τὰ τέκνα ὑμῶν καὶ τὰ κτήνη ὑμῶν οἶδα ὅτι πολλὰ κτήνη ὑμῖν κατοικείτωσαν ἐν ταῖς πόλεσιν ὑμῶν αἷς ἔδωκα ὑμῖν
20 kino tango Yawe akopesa bopemi epai ya bandeko na bino ndenge asalaki mpo na bino, mpe kino bango lisusu bakozwa mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bango na ngambo mosusu ya Yordani. Sima na yango, bokozonga, moko na moko, na mabele oyo napesaki bino. »
ἕως ἂν καταπαύσῃ κύριος ὁ θεὸς ὑμῶν τοὺς ἀδελφοὺς ὑμῶν ὥσπερ καὶ ὑμᾶς καὶ κατακληρονομήσουσιν καὶ οὗτοι τὴν γῆν ἣν κύριος ὁ θεὸς ἡμῶν δίδωσιν αὐτοῖς ἐν τῷ πέραν τοῦ Ιορδάνου καὶ ἐπαναστραφήσεσθε ἕκαστος εἰς τὴν κληρονομίαν αὐτοῦ ἣν ἔδωκα ὑμῖν
21 Na tango wana, nalobaki na Jozue: « Omonaki yo moko makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki epai na bakonzi oyo mibale; akosala kaka ndenge moko na bikolo nyonso epai wapi bokoleka.
καὶ τῷ Ἰησοῖ ἐνετειλάμην ἐν τῷ καιρῷ ἐκείνῳ λέγων οἱ ὀφθαλμοὶ ὑμῶν ἑωράκασιν πάντα ὅσα ἐποίησεν κύριος ὁ θεὸς ἡμῶν τοῖς δυσὶ βασιλεῦσι τούτοις οὕτως ποιήσει κύριος ὁ θεὸς ἡμῶν πάσας τὰς βασιλείας ἐφ’ ἃς σὺ διαβαίνεις ἐκεῖ
22 Bobanga bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, Ye moko akobundela bino. »
οὐ φοβηθήσεσθε ὅτι κύριος ὁ θεὸς ἡμῶν αὐτὸς πολεμήσει περὶ ὑμῶν
23 Na tango wana, nabondelaki Yawe:
καὶ ἐδεήθην κυρίου ἐν τῷ καιρῷ ἐκείνῳ λέγων
24 — Oh Nkolo Yawe, obandaki kolakisa monene na Yo mpe nguya na Yo epai ya mosali na Yo. Pamba te nzambe nini na likolo mpe na se akoki kosala misala minene mpe makambo ya kokamwa lokola oyo Yo osali?
κύριε κύριε σὺ ἤρξω δεῖξαι τῷ σῷ θεράποντι τὴν ἰσχύν σου καὶ τὴν δύναμίν σου καὶ τὴν χεῖρα τὴν κραταιὰν καὶ τὸν βραχίονα τὸν ὑψηλόν τίς γάρ ἐστιν θεὸς ἐν τῷ οὐρανῷ ἢ ἐπὶ τῆς γῆς ὅστις ποιήσει καθὰ σὺ ἐποίησας καὶ κατὰ τὴν ἰσχύν σου
25 Nabondeli Yo, yokela ngai mawa mpo ete nakatisa Yordani mpo namona mokili oyo ya kitoko na ngambo mosusu, etuka kitoko ya bangomba mpe Libani.
διαβὰς οὖν ὄψομαι τὴν γῆν τὴν ἀγαθὴν ταύτην τὴν οὖσαν πέραν τοῦ Ιορδάνου τὸ ὄρος τοῦτο τὸ ἀγαθὸν καὶ τὸν Ἀντιλίβανον
26 Kasi likolo na bino, Yawe asilikelaki ngai mpe aboyaki koyoka ngai. Alobaki na ngai: — Ekoki boye! Koloba na ngai lisusu likambo wana te.
καὶ ὑπερεῖδεν κύριος ἐμὲ ἕνεκεν ὑμῶν καὶ οὐκ εἰσήκουσέν μου καὶ εἶπεν κύριος πρός με ἱκανούσθω σοι μὴ προσθῇς ἔτι λαλῆσαι τὸν λόγον τοῦτον
27 Mata na songe ya ngomba Pisiga mpe tala na ngambo ya weste, na nor, na sude mpe na este. Tala kaka mokili na miso kasi okotikala kokatisa Yordani te.
ἀνάβηθι ἐπὶ κορυφὴν Λελαξευμένου καὶ ἀναβλέψας τοῖς ὀφθαλμοῖς κατὰ θάλασσαν καὶ βορρᾶν καὶ λίβα καὶ ἀνατολὰς καὶ ἰδὲ τοῖς ὀφθαλμοῖς σου ὅτι οὐ διαβήσῃ τὸν Ιορδάνην τοῦτον
28 Pesa mitindo na Jozue, pesa ye makasi mpe lendisa ye; pamba te ye nde akokamba bato oyo mpe akosala ete bazwa lokola libula mokili oyo ozali komona.
καὶ ἔντειλαι Ἰησοῖ καὶ κατίσχυσον αὐτὸν καὶ παρακάλεσον αὐτόν ὅτι οὗτος διαβήσεται πρὸ προσώπου τοῦ λαοῦ τούτου καὶ αὐτὸς κατακληρονομήσει αὐτοῖς τὴν γῆν ἣν ἑώρακας
29 Bongo tovandaki na lubwaku oyo etalani na Beti-Peori.
καὶ ἐνεκαθήμεθα ἐν νάπῃ σύνεγγυς οἴκου Φογωρ

< Deteronomi 3 >