< Deteronomi 28 >

1 Soki botosi penza Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli penza mitindo na Ye oyo nazali kopesa bino lelo; Yawe, Nzambe na bino, akotombola bino likolo ya bikolo nyonso ya mokili.
And it shall come to pass, if you shall hearken diligently unto the voice of the LORD your God, to observe and to do all his commandments which I command you this day, that the LORD your God will set you on high above all nations of the earth:
2 Tala mapamboli oyo ekopesamela bino mpe ekolanda bino tango bokotosa Yawe, Nzambe na bino:
And all these blessings shall come on you, and overtake you, if you shall hearken unto the voice of the LORD your God.
3 Bokopambolama na engumba mpe bokopambolama na bilanga.
Blessed shall you be in the city, and blessed shall you be in the field.
4 Mabota na bino ekopambolama; milona na bino mpe bibwele na bino: bangombe na bino, bameme mpe bantaba na bino ekopambolama.
Blessed shall be the fruit of your body, and the fruit of your ground, and the fruit of your cattle, the increase of your cattle, and the flocks of your sheep.
5 Bitunga na bino mpe mesa na bino oyo bosalelaka mapa ekopambolama.
Blessed shall be your basket and your store.
6 Bokopambolama tango bokokota mpe bokopambolama tango bokobima.
Blessed shall you be when you come in, and blessed shall you be when you go out.
7 Yawe akosala ete banguna oyo bakotelemela bino bakokweyisama liboso na bino; bakoya epai na bino na nzela moko, kasi bakokima bino na banzela sambo.
The LORD shall cause your enemies that rise up against you to be smitten before your face: they shall come out against you one way, and flee before you seven ways.
8 Yawe Nzambe akopambola bibombelo na bino ya biloko mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Yawe Nzambe akopambola bino na mokili oyo azali kopesa bino.
The LORD shall command the blessing upon you in your storehouses, and in all that you set your hand unto; and he shall bless you in the land which the LORD your God gives you.
9 Yawe akokomisa bino libota na Ye ya bule ndenge alakaki bino tango alapaki ndayi, pamba te bokobatela mitindo ya Yawe, Nzambe na bino, mpe bokotambola na banzela na Ye.
The LORD shall establish you an holy people unto himself, as he has sworn unto you, if you shall keep the commandments of the LORD your God, and walk in his ways.
10 Bongo bato nyonso ya mokili bakomona ete bozali penza bato ya Yawe mpe bakobanga bino.
And all people of the earth shall see that you are called by the name of the LORD; and they shall be afraid of you.
11 Yawe akotondisa bino na bozwi ebele: mabota, bibwele, milona kati na mokili oyo alapaki ndayi epai ya bakoko na bino ete akopesa bino.
And the LORD shall make you abundant in goods, in the fruit of your body, and in the fruit of your cattle, and in the fruit of your ground, in the land which the LORD swore unto your fathers to give you.
12 Mpo na bolamu na yo, Yawe akofungola likolo, ebombelo ya bamvula na Ye, mpo na konokisa mvula na mokili na bino na eleko ya malamu; mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Bikolo ebele ekodefa epai na bino, kasi bino bokodefa ata na ekolo moko te.
The LORD shall open unto you his good treasure, the heaven to give the rain unto your land in his season, and to bless all the work of your hand: and you shall lend unto many nations, and you shall not borrow.
13 Yawe akokomisa bino mito, kasi mikila te; pamba te bokobatela penza mitindo ya Yawe, Nzambe na bino, oyo nazali kopesa bino lelo mpe bokosalela yango penza. Lokumu na bino ekozala kaka likolo, ekokita te.
And the LORD shall make you the head, and not the tail; and you shall be above only, and you shall not be beneath; if that you hearken unto the commandments of the LORD your God, which I command you this day, to observe and to do them:
14 Kati na mitindo oyo nazali kopesa bino lelo, bopengwa ata na moko te, mpo na kolanda banzambe mosusu mpe kosalela yango.
And you shall not go aside from any of the words which I command you this day, to the right hand, or to the left, to go after other gods to serve them.
15 Kasi soki botosi te Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli te mitindo mpe bikateli na Ye, oyo nazali kopesa bino lelo, tala bilakeli mabe oyo ekokomela bino mpe ekokanga bino:
But it shall come to pass, if you will not hearken unto the voice of the LORD your God, to observe to do all his commandments and his statutes which I command you this day; that all these curses shall come upon you, and overtake you:
16 Bokolakelama mabe kati na engumba mpe bokolakelama mabe kati na bilanga.
Cursed shall you be in the city, and cursed shall you be in the field.
17 Bitunga na bino mpe mesa na bino oyo bosalelaka mapa ekolakelama mabe.
Cursed shall be your basket and your store.
18 Mabota na bino, milona na bino, bibwele na bino: bangombe, bameme mpe bantaba ekolakelama mabe.
Cursed shall be the fruit of your body, and the fruit of your land, the increase of your cattle, and the flocks of your sheep.
19 Bokolakelama mabe tango bokokota mpe bokolakelama mabe tango bokobima.
Cursed shall you be when you come in, and cursed shall you be when you go out.
20 Kati na nyonso oyo bokosala, Yawe akotindela bino bilakeli mabe, minyoko mpe mikakatano; bongo bokowumela te mpo na kobebisama nye likolo ya mabe oyo bosalaki ya kosundola Yawe.
The LORD shall send upon you cursing, vexation, and rebuke, in all that you set your hand unto in order to do, until you be destroyed, and until you perish quickly; because of the wickedness of your doings, whereby you have forsaken me.
21 Yawe akotindela bino bokono oyo ebomaka kino akobebisa bino kati na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa.
The LORD shall make the pestilence cleave unto you, until he have consumed you from off the land, where you go to possess it.
22 Yawe akosilisa koboma bino na bokono ya ndenge na ndenge oyo akotindela bino: fievele, kosila nzoto, mpese. Akotinda lisusu bokono oyo ekobebisa bilanga na bino: kozanga mvula, banyama mike oyo ebebisaka milona mpe bibende. Bokono nyonso oyo ekolanda bino kino bokosila kokufa.
The LORD shall strike you with a consumption, and with a fever, and with an inflammation, and with an extreme burning, and with the sword, and with blasting, and with mildew; and they shall pursue you until you perish.
23 Mapata oyo ezali likolo ya mito na bino ekokoma lokola bronze mpe ekolekisa lisusu mvula te, mpe mabele oyo ezali na se ya makolo na bino ekokoma makasi lokola libende mpe ekobotisa lisusu mabele te.
And your heaven that is over your head shall be brass, and the earth that is under you shall be iron.
24 Kati na mokili na bino, Yawe akobongola mvula mpo ete ekoma putulu mpe zelo; yango ekokweya wuta na likolo kino ekobebisa bino.
The LORD shall make the rain of your land powder and dust: from heaven shall it come down upon you, until you be destroyed.
25 Yawe akosala ete banguna na bino balonga bino. Bakoya epai na bino na nzela moko mpe bino bokokima liboso na bango na banzela sambo. Bokokoma eloko ya somo na miso ya bikolo nyonso ya mokili.
The LORD shall cause you to be smitten before your enemies: you shall go out one way against them, and flee seven ways before them: and shall be removed into all the kingdoms of the earth.
26 Bibembe na bino ekokoma bilei ya bandeke nyonso mpe ya banyama ya zamba, bongo moto moko te akoya wana mpo na kobengana yango.
And your carcass shall be food unto all fowls of the air, and unto the beasts of the earth, and no man shall frighten them away.
27 Yawe akotindela bino bokono oyo esilaka te lokola oyo atindaki na Ejipito: pota ya libumu, makwanza mpe mikusa ya nzoto.
The LORD will strike you with the botch of Egypt, and with the emerods, and with the scab, and with the itch, whereof you can not be healed.
28 Yawe akotindela bino bokono ya liboma, ya kokufa miso mpe ya mobulu na makanisi.
The LORD shall strike you with madness, and blindness, and astonishment of heart:
29 Na moyi makasi, bokotenga-tenga lokola bakufi miso na molili. Bokolonga te na makambo nyonso oyo bokosala. Mokolo na mokolo, bakonyokola bino mpe bakoyiba bino, mpe moto moko te akomonana mpo na kokangola bino.
And you shall grope at noonday, as the blind gropes in darkness, and you shall not prosper in your ways: and you shall be only oppressed and spoiled evermore, and no man shall save you.
30 Soki moko kati na bino azwi mwasi lokola mobandami na libala, mobali mosusu nde akosangisa na ye nzoto. Mosusu akotonga ndako, kasi akovanda yango te. Mosusu akolona elanga ya vino, kasi okobuka bambuma na yango te.
You shall betroth a wife, and another man shall lie with her: you shall build an house, and you shall not dwell therein: you shall plant a vineyard, and shall not gather the grapes thereof.
31 Bakokata bakingo ya bangombe na bino na miso na bino, kasi bokolia yango te. Bakokamata ba-ane na bino na makasi, na miso na bino, kasi ekozonga epai na bino te; bakokaba epai ya banguna na bino, bameme mpe bantaba na bino; mpe moto moko te akosunga bino.
your ox shall be slain before your eyes, and you shall not eat thereof: your ass shall be violently taken away from before your face, and shall not be restored to you: your sheep shall be given unto your enemies, and you shall have none to rescue them.
32 Bakokaba bana na bino ya mibali mpe ya basi na ekolo mosusu, mpe bokofungola miso na bino mpo na kotala mokolo na mokolo bozongi na bango, kasi bokokoka kosala ata eloko moko te.
Your sons and your daughters shall be given unto another people, and your eyes shall look, and fail with longing for them all the day long; and there shall be no might in your hand.
33 Bato oyo boyebi te bakolia bambuma ya mabele na bino mpe ya misala na bino nyonso.
The fruit of your land, and all your labours, shall a nation which you know not eat up; and you shall be only oppressed and crushed always:
34 Bokobela liboma likolo ya makambo oyo miso na bino ekobanda komona.
So that you shall be mad for the sight of your eyes which you shall see.
35 Yawe akotindela bino bokono oyo ekobuka bino mabolongo, makolo; bokono oyo ekoki kobika te mpe ekopanzana banda na se ya matambe kino na mito.
The LORD shall strike you in the knees, and in the legs, with a sore botch that cannot be healed, from the sole of your foot unto the top of your head.
36 Yawe akomema bino mpe mokonzi oyo bokopona mpo na koyangela bino, na ekolo oyo bino mpe bakoko na bino botikala nanu koyeba te. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu: banzambe ya banzete mpe ya mabanga.
The LORD shall bring you, and your king which you shall set over you, unto a nation which neither you nor your fathers have known; and there shall you serve other gods, wood and stone.
37 Bikolo nyonso epai wapi Yawe akomema bino, bakomona bakokima bino lokola eloko ya somo mpe bakobeta masapo mpo na kotiola bino.
And you shall become an astonishment, a proverb, and a byword, among all nations where the LORD shall lead you.
38 Bokolona bankona ebele na bilanga, kasi bokobuka moke; pamba te mabanki ekolia bankona wana.
You shall carry much seed out into the field, and shall gather but little in; for the locust shall consume it.
39 Bokosala mpe bokobongisa bilanga ya vino, kasi bokotikala te komela vino yango mpe kobuka bambuma na yango, pamba te banyama mike oyo eliaka nzete ekobebisa yango.
You shall plant vineyards, and dress them, but shall neither drink of the wine, nor gather the grapes; for the worms shall eat them.
40 Bokozala na banzete ya olive na mokili na bino mobimba, kasi bokopakola mafuta na yango te, pamba te bambuma ya olive ekokweya liboso ete ekomela.
You shall have olive trees throughout all your coasts, but you shall not anoint yourself with the oil; for your olive shall cast his fruit.
41 Bokozala na bana ya mibali mpe ya basi, kasi bokobatela bango te, pamba te bakokende na bowumbu.
You shall brought forth sons and daughters, but you shall not enjoy them; for they shall go into captivity.
42 Mabanki ekolia banzete na bino nyonso mpe bambuma ya mabele na bino.
All your trees and fruit of your land shall the locust consume.
43 Mopaya oyo avandi kati na bino akoleka bino na lokumu tango nyonso, kasi bino bokokita se kokita;
The stranger that is within you shall get up above you very high; and you shall come down very low.
44 akodefisa bino, kasi bino bokokoka kodefisa ye te; akozala moto, kasi bino bokozala mokila.
He shall lend to you, and you shall not lend to him: he shall be the head, and you shall be the tail.
45 Tala bilakeli mabe nyonso oyo ekokomela bino, ekolanda bino mpe ekozwa bino, ekokanga bino kino bokobebisama; pamba te botosaki te Yawe, Nzambe na bino, mpe bobatelaki te mitindo mpe bikateli oyo apesaki bino.
Moreover all these curses shall come upon you, and shall pursue you, and overtake you, till you be destroyed; because you hearkened not unto the voice of the LORD your God, to keep his commandments and his statutes which he commanded you:
46 Bilakeli mabe oyo ekozala elembo mpe makambo ya kokamwa epai na bino mpe epai ya bakitani na bino mpo na libela.
And they shall be upon you for a sign and for a wonder, and upon your seed for ever.
47 Mpo ete bosalelaki te Yawe, Nzambe na bino, na esengo mpe na kosepela na tango ya bofuluki;
Because you served not the LORD your God with joyfulness, and with gladness of heart, for the abundance of all things;
48 tango bokozala na nzala mpe na posa ya komela, mpe tango bokozanga bilamba mpe bokokelela, bokosalela banguna oyo Yawe Nzambe akotindela bino. Akotia bino ekangiseli ya ebende na kingo kino akobebisa bino.
Therefore shall you serve your enemies which the LORD shall send against you, in hunger, and in thirst, and in nakedness, and in lack of all things: and he shall put a yoke of iron upon your neck, until he have destroyed you.
49 Yawe akotindela bino na mosika, wuta na suka ya mokili, ekolo moko oyo ezali lokola mpongo oyo ezali kopumbwa, ekolo oyo bokososola monoko na yango te; ekobundisa bino.
The LORD shall bring a nation against you from far, from the end of the earth, as swift as the eagle flies; a nation whose tongue you shall not understand;
50 Bato ya ekolo yango bazali na bilongi ya kanda-kanda, batosaka te bato oyo bazali mikolo mpe bayokelaka bilenge mawa te.
A nation of fierce countenance, which shall not regard the person of the old, nor show favour to the young:
51 Bakolia bana ya bibwele na bino mpe bambuma ya mabele na bino, kino bakobebisa bino. Bakotikela bino ata ble te, vino ya sika te, mafuta te, ata bana ngombe na bino te, ata bana meme na bino te mpe ata bantaba na bino te kino bokobebisama.
And he shall eat the fruit of your cattle, and the fruit of your land, until you be destroyed: which also shall not leave you either corn, wine, or oil, or the increase of your cattle, or flocks of your sheep, until he have destroyed you.
52 Bakozingela bingumba na bino nyonso kati na mokili na bino kino bamir na bino ya milayi mpe ya makasi oyo botielaka mitema ekokweya. Bakozingela bingumba nyonso kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino.
And he shall besiege you in all your gates, until your high and fenced walls come down, wherein you trusted, throughout all your land: and he shall besiege you in all your gates throughout all your land, which the LORD your God has given you.
53 Mpo na pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino tango bakozingela bino, bokolia bana na bino, bokolia misuni ya bana na bino ya mibali mpe ya basi oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino.
And you shall eat the fruit of your own body, the flesh of your sons and of your daughters, which the LORD your God has given you, in the siege, and in the strictness, wherewith your enemies shall distress you:
54 Mobali ya malamu koleka kati na bino, oyo ayokelaka bato mawa, akoyokela lisusu moto mawa te: ezala ndeko na ye to mwasi oyo ye alingaka to bana na ye oyo batikali.
So that the man that is tender among you, and very delicate, his eye shall be evil toward his brother, and toward the wife of his bosom, and toward the remnant of his children which he shall leave:
55 Akopesa na moto moko te kati na bango mosuni ya bana na ye oyo akozala kolia. Yango kaka nde bilei akotikala na yango mpo na pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino na tango bakozingela bino na bingumba na bino nyonso.
So that he will not give to any of them of the flesh of his children whom he shall eat: because he has nothing left him in the siege, and in the strictness, wherewith your enemies shall distress you in all your gates.
56 Mwasi ya malamu koleka kati na bino, oyo ayokelaka bato mawa, oyo aleki kitoko mpe amonanaka lokola nde matambe na ye enyataka mabele te, akotala na etaleli ya mabe mobali oyo ye alingaka, mwana na ye ya mobali to ya mwasi,
The tender and delicate woman among you, which would not adventure to set the sole of her foot upon the ground for delicateness and tenderness, her eye shall be evil toward the husband of her bosom, and toward her son, and toward her daughter,
57 mwana oyo awuti kobima na libumu na ye, mpe bana oyo ye moko aboti; pamba te akoluka kolia bango na nkuku, na tango oyo banguna na bino bakozingela bino, mpe na tango ya pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino kati na bingumba na bino.
And toward her young one that comes out from between her feet, and toward her children which she shall bear: for she shall eat them for lack of all things secretly in the siege and strictness, wherewith your enemy shall distress you in your gates.
58 Tango bosaleli te maloba nyonso ya mibeko oyo ekomami na buku oyo mpe botosi te Kombo ya lokumu mpe ya somo, Yawe, Nzambe na bino;
If you will not observe to do all the words of this law that are written in this book, that you may fear this glorious and fearful name, THE LORD Your GOD;
59 Yawe akotindela bino mpe bakitani na bino bitumbu ya somo: bapota minene oyo esilaka te mpe bokono ya makasi oyo esilaka te.
Then the LORD will make your plagues wonderful, and the plagues of your seed, even great plagues, and of long continuance, and sore sicknesses, and of long continuance.
60 Akotindela bino bitumbu nyonso ya Ejipito, oyo bozalaki kobanga mpe yango ekotingama na bino.
Moreover he will bring upon you all the diseases of Egypt, which you were afraid of; and they shall cleave unto you.
61 Yawe akotindela bino lisusu lolenge nyonso ya bokono mpe bapota oyo ekomami te kati na buku oyo ya Mobeko, kino bokobebisama.
Also every sickness, and every plague, which is not written in the book of this law, them will the LORD bring upon you, until you be destroyed.
62 Bino oyo bozalaki ebele lokola minzoto na likolo, bokotikala kaka moke; pamba te botosaki te Yawe, Nzambe na bino.
And all of you shall be left few in number, whereas all of you were as the stars of heaven for multitude; because you would not obey the voice of the LORD your God.
63 Ndenge kaka Yawe asepelaki kosalela bino bolamu mpe mpo na kokomisa bino ebele, ndenge wana mpe akosepela koboma bino mpe kobebisa bino; akopikola bino na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa yango.
And it shall come to pass, that as the LORD rejoiced over you to do you good, and to multiply you; so the LORD will rejoice over you to destroy you, and to bring you to nothing; and all of you shall be plucked from off the land where you go to possess it.
64 Boye, Yawe akopanza bino kati na bikolo nyonso ya mokili mobimba. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu: banzambe ya nzete mpe ya mabanga oyo bino mpe bakoko na bino boyebaki te.
And the LORD shall scatter you among all people, from the one end of the earth even unto the other; and there you shall serve other gods, which neither you nor your fathers have known, even wood and stone.
65 Kati na bikolo wana, bokozala na kimia te, bokozala na esika te ya kopemisa matambe ya makolo na bino. Kuna Yawe akokomisa bino motema likolo-likolo, miso elemba mpe nzoto elemba.
And among these nations shall you find no ease, neither shall the sole of your foot have rest: but the LORD shall give you there a trembling heart, and failing of eyes, and sorrow of mind:
66 Bokowumela na bomoi oyo ezanga elikya, oyo etonda na kobanga, butu mpe moyi, mpe bokoyeba te ndenge nini bomoi na bino ekosuka.
And your life shall hang in doubt before you; and you shall fear day and night, and shall have none assurance of your life:
67 Na tongo, bokoloba: « Pokwa ekokoma tango nini? » Mpe na pokwa, bokoloba: « Tongo ekotana tango nini? » Pamba te somo ekotonda na mitema na bino mpo na makambo nyonso oyo miso ekomona.
In the morning you shall say, Would God it were even! and at even you shall say, Would God it were morning! for the fear of your heart wherewith you shall fear, and for the sight of your eyes which you shall see.
68 Yawe Nzambe akozongisa bino na bamasuwa na Ejipito, na mokili oyo nalobaki na bino ete bokomona yango lisusu te. Mpe kuna, bokomiteka bino moko epai ya banguna na bino lokola bawumbu ya mibali mpe ya basi, kasi moto moko te akosomba bino.
And the LORD shall bring you into Egypt again with ships, by the way whereof I spoke unto you, You shall see it no more again: and there all of you shall be sold unto your enemies for bondmen and bondwomen, and no man shall buy you.

< Deteronomi 28 >