< Deteronomi 25 >

1 Soki bato bazali kowelana, bakomema likambo na bango na esambiselo, mpe basambisi bakokata likambo yango: bakolongisa moto oyo ayebi likambo te mpe bakokweyisa moto oyo asali mabe. 2 Bongo soki esengi ete babeta moto oyo asali mabe fimbu, basambisi bakolalisa ye na mabele mpe bakobetisa ye fimbu na miso na bango; bakobetisa ye motango ya bafimbu oyo ekoki na mabe oyo asali. 3 Kasi bakoki te kobeta ye bafimbu koleka tuku minei. Soki babeti ye fimbu koleka tuku minei, ndeko na bino akosambwa na miso na bino. 4 Osengeli te kokanga monoko ya ngombe oyo ezali konika bambuma. 5 Soki bandeko mibali bazali kovanda elongo, mpe moko kati na bango akufi kasi atiki mwana te, mwasi oyo akufisi mobali akoki te kobala na libota mosusu; semeki na ye asengeli kozwa ye na libala mpo na kokokisa epai na ye mokumba ya kisemeki. 6 Mwana mobali ya liboso oyo mwasi yango akobota akozwa kombo ya ndeko mobali oyo akufa mpo ete kombo na ye ebunga te kati na Isalaele. 7 Soki mobali yango aboyi kobala semeki na ye ya mwasi, semeki yango ya mwasi akokende epai ya bampaka, na ekuke ya engumba, mpe akoloba na bango: « Semeki na ngai aboyi kobatela kombo ya ndeko na ye kati na Isalaele, aboyi kokokisa mokumba na ye ya kisemeki epai na ngai. » 8 Boye, bampaka ya engumba wana bakobengisa mobali yango mpe bakoloba na ye. Soki akobi kaka koboya kobala semeki na ye, 9 semeki yango akopusana pembeni na ye na miso ya bampaka, akolongola ye lokolo moko ya sandale, akobwakela ye soyi na elongi, mpe akoloba na ye: « Tala ndenge basengeli kosala moto oyo aboyi kotonga ndako ya ndeko na ye ya mobali. » 10 Boye, kati na Isalaele, bakobanda kobenga bakitani ya moto wana « bana ya moto oyo balongola sandale. » 11 Soki mibali bazali kobunda, bongo mwasi moko apusani mpo na kokangola mobali na ye na loboko ya moto oyo azali kobeta ye, mpe soki mwasi yango asemboli loboko na ye mpe akangi nzoto ya mibali ya moto oyo azali kobeta mobali na ye, 12 bokokata loboko na ye. Bokoyokela ye mawa te. 13 Okoki te kozala na bimekelo mibale ya kilo ekesana kati na saki na yo: moko eleki kilo mpe mosusu eleki pepele. 14 Okoki te kozala na ndako na yo na bikolo mibale ekesana mpo na kotanga na yango biloko: moko ya monene mpe mosusu ya moke. 15 Osengeli kozala na bimekelo mpe bikolo ya kotangela ya malamu mpe ya sembo, mpo ete owumela mikolo ebele kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo. 16 Pamba te Yawe, Nzambe na yo, amonaka nkele, moto nyonso oyo asalaka makambo wana, moto nyonso oyo asalaka makambo ya sembo te. 17 Bobosana te makambo oyo bato ya Amaleki basalaki bino tango bobimaki na Ejipito: 18 tango bolembaki nzoto mpe bosilaki makasi, babimelaki bino na pwasa na mobembo na bino mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki na sima; babangaki Nzambe te. 19 Tango Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino bopemi liboso ya banguna nyonso oyo bazingeli bino kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa lokola libula, bosengeli koboma bato ya Amaleki mpo ete botikala lisusu te kokanisa bango kati na mokili. Bobosana te kosala likambo yango.

< Deteronomi 25 >