< Deteronomi 22 >

1 Soki omoni meme to ngombe ya ndeko na yo ezali koyengayenga, kotala yango pamba te, kasi kanga yango mpe zongisa yango epai ya nkolo na yango. 2 Soki ndeko yango avandaka pembeni na yo te to oyebi ye te, mema yango na ndako na yo mpe bomba yango kino akoya koluka yango, bongo okozongisela ye yango. 3 Okosala ndenge moko soki omoni ane ya ndeko na yo to kazaka na ye to eloko mosusu oyo ye abungisi. Kotala yango na pamba te. 4 Soki omoni ane ya ndeko na yo to ngombe na ye ekweyi na nzela, kotala yango na pamba te; osalisa ndeko na yo mpo na kotelemisa yango. 5 Mwasi akoki kolata bilamba ya mibali te to mpe mobali akoki te kolata bilamba ya basi, pamba te Yawe, Nzambe na bino, ayinaka moto nyonso oyo asalaka makambo ya ndenge wana. 6 Soki omoni zala ya ndeke pembeni ya nzela, ezala likolo ya nzete to na mabele, mpe mama ya ndeke evandeli bana to maki, kozwa te mama elongo na bana. 7 Osengeli kozwa bana, kasi kotika mama ete ekende mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi molayi. 8 Tango okotonga ndako ya sika, kozanga te kotonga mir ya mokuse zingazinga ya motondo mpo ete omema ngambo ya makila te na ndako na yo soki moto akweyi likolo ya motondo. 9 Kolona te lolenge mibale ya nkona na elanga na yo ya vino; noki te nyonso ekokoma bule: oyo okolona mpe bambuma ya elanga na yo ya vino. 10 Okoki kosangisa te na libaya moko, ngombe mpe ane mpo na kobalola mabele. 11 Okoki kolata te bilamba oyo basala na bapwale ya meme mpe na lino. 12 Okotia basinga na basonge minei ya elamba oyo okolata. 13 Soki mobali abali mwasi mpe, sima na kosangisa na ye nzoto, asepeli na ye lisusu te, 14 alobi ete ezaleli ya mwasi yango ezali mabe, bongo apanzi ye sango ya mabe na koloba: « Nabalaki mwasi oyo, kasi tango nasangisi na ye nzoto, namoni ete ayebaki nzoto ya mibali, » 15 wana tata mpe mama ya mwana mwasi, basengeli kolakisa epai na bampaka, na bikuke ya engumba, bilembo oyo ezali kolakisa ete mwana na bango ya mwasi ayebaki nzoto nanu ya mibali te. 16 Tata ya mwana mwasi akoloba na bampaka: « Nabalisaki mwana na ngai ya mwasi na mobali oyo, kasi asepeli na ye lisusu te; 17 amoni ete ezaleli ya mwana na ngai ya mwasi ezali malamu te, yango wana alobi: ‹ Mwana mwasi oyo ayebaki nzoto ya mibali. › Kasi tala bilembo oyo ezali kolakisa ete mwana na ngai ya mwasi ayebaki nanu nzoto ya mibali te. » Boye baboti ya mwana mwasi bakofungola elamba liboso ya bampaka ya engumba, 18 mpe bampaka ya engumba bakozwa mobali yango mpe bakopesa ye etumbu: 19 bakofutisa ye lomande ya mbongo ya bibende ya palata, nkama moko, mpe bakopesa yango epai ya tata ya mwana mwasi, pamba te mobali oyo asambwisi elenge mwasi ya Isalaele oyo ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe akokoba kozala mwasi na ye: akoki kokabwana na ye te mikolo nyonso ya bomoi na ye. 20 Kasi soki makambo oyo bafundeli ye ezali ya solo, mpe ezali ata na elamba moko te oyo ezali kotalisa ete ayebaki nanu nzoto ya mibali te, 21 esengeli bamema ye libanda ya ndako ya tata na ye, mpe kuna bato ya engumba na ye bakobamba ye mabanga kino akokufa: asalaki likambo ya soni kati na Isalaele na kosalaka kindumba tango azalaki na ndako ya tata na ye. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino. 22 Soki bakangi mobali azali kosangisa nzoto na mwasi ya mobali mosusu, bango nyonso mibale basengeli kokufa. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na Isalaele. 23 Soki kati na engumba mobali moko akutani na elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te bongo asangisi na ye nzoto, nzokande elenge mwasi yango azali na mobali oyo alingi kobala ye, 24 bokomema bango mibale na ekuke ya engumba wana mpe kobamba bango mabanga kino bakokufa. Bokoboma mwana mwasi, pamba te azalaki kati na engumba kasi agangaki te mpo ete baya kosunga ye; bokoboma mobali, pamba te asangisaki nzoto na makasi na mwasi ya mobali mosusu. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino. 25 Soki mobali akoti na zamba na mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe asangisi na ye nzoto na makasi, nzokande mwasi yango azali na mobali oyo alingi kobala ye, kaka mobali oyo asali likambo wana nde asengeli kokufa. 26 Bokosala likambo moko te epai ya mwana mwasi, pamba te asali lisumu moko te oyo ekoki komema ye na kufa. Likambo oyo ekokani na moto oyo abundisi moninga na ye mpe abomi ye. 27 Pamba te mobali wana akutanaki na mwasi wana na zamba, mpe mwana mwasi wana akokaki koganga na ndenge nyonso alingi, kasi moto moko te akokaki komonana kuna mpo na kosunga ye. 28 Soki mobali akutani na elenge mwasi, oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali te na mobali oyo alingi kobala ye, asangisi na ye nzoto na makasi, mpe bomoni bango; 29 mobali wana asengeli kofuta mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano epai ya tata ya elenge mwasi, asengeli kobala elenge mwasi yango; pamba te asangisi na ye nzoto na makasi: akoki kokabwana na ye te mikolo nyonso ya bomoi na ye. 30 Mwana mobali moko te akoki kobala mwasi ya tata na ye, noki te akosambwisa mbeto ya tata na ye.

< Deteronomi 22 >