< Deteronomi 17 >

1 Okobonza te epai na Yawe, Nzambe na yo, ngombe to meme oyo ezali na mbeba to oyo ezali mabe, pamba te yango ezali likambo ya nkele liboso ya Yawe, Nzambe na yo.
You shall not sacrifice unto the LORD your God any bullock, or sheep, wherein is blemish, or any evil thing: for that is an abomination unto the LORD your God.
2 Soki kati na moko ya bingumba oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo; emonani na mobali to mwasi oyo asali mabe na miso ya Yawe, Nzambe na yo, wana abuki boyokani elongo na Ye
If there be found among you, within any of your gates which the LORD your God gives you, man or woman, that has wrought wickedness in the sight of the LORD your God, in transgressing his covenant,
3 mpe akei kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango: moyi, sanza to minzoto nyonso ya likolo, nzokande natindaki bango bongo te;
And has gone and served other gods, and worshipped them, either the sun, or moon, or any of the host of heaven, which I have not commanded;
4 bongo bamemeli yo sango ya ndenge wana, yekola yango malamu. Soki emonani solo ete likambo ya nkele esalemi kati na Isalaele;
And it be told you, and you have heard of it, and enquired diligently, and, behold, it be true, and the thing certain, that such abomination is wrought in Israel:
5 kamata mobali to mwasi oyo asali likambo wana ya nkele, mema ye na ekuke ya engumba na yo mpe bamba ye mabanga kino akokufa.
Then shall you bring forth that man or that woman, which have committed that wicked thing, unto your gates, even that man or that woman, and shall stone them with stones, till they die.
6 Ezali kaka na litatoli ya bato mibale to misato nde okoki koboma moto, kasi na litatoli ya moto moko te.
At the mouth of two witnesses, or three witnesses, shall he that is worthy of death be put to death; but at the mouth of one witness he shall not be put to death.
7 Maboko ya motatoli nde ekozala maboko ya liboso ya koboma moto yango, mpe na sima, maboko ya bato nyonso. Na nzela wana nde okolongola mabe kati na yo.
The hands of the witnesses shall be first upon him to put him to death, and afterward the hands of all the people. So you shall put the evil away from among you.
8 Soki makambo oyo eleki yo makasi mpo na kosambisa ekomi na bisambiselo na yo, makambo lokola koboma bato, kowelana, kozokisa bato, mema yango na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona.
If there arise a matter too hard for you in judgment, between blood and blood, between plea and plea, and between stroke and stroke, being matters of controversy within your gates: then shall you arise, and get you up into the place which the LORD your God shall choose;
9 Okokende epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe epai ya mosambisi oyo azali kosala mosala na tango wana. Okotalisa bango likambo yango mpe bango nde bakokata likambo.
And you shall come unto the priests the Levites, and unto the judge that shall be in those days, and enquire; and they shall show you the sentence of judgment:
10 Bongo yo okosala kolanda mikano oyo bango bakopesa yo na esika oyo Yawe akopona. Sala keba ete osala makambo nyonso oyo bakotinda yo.
And you shall do according to the sentence, which they of that place which the LORD shall choose shall show you; and you shall observe to do according to all that they inform you:
11 Okosala kolanda mobeko oyo bakoteya yo mpe bikateli oyo bakopesa yo. Kokende libanda te ya bikateli oyo bakopesa yo.
According to the sentence of the law which they shall teach you, and according to the judgment which they shall tell you, you shall do: you shall not decline from the sentence which they shall show you, to the right hand, nor to the left.
12 Moto oyo akosala lolendo mpe akoboya kotosa Nganga-Nzambe to mosambisi oyo atelemi mpo kosala mosala na esika oyo Yawe aponaki mpo na ye, basengeli koboma ye. Na nzela wana nde okolongola mabe kati na Isalaele.
And the man that will do presumptuously, and will not hearken unto the priest that stands to minister there before the LORD your God, or unto the judge, even that man shall die: and you shall put away the evil from Israel.
13 Bato nyonso bakoyoka likambo yango, bakokoma na somo mpe bakosala lisusu lolendo te.
And all the people shall hear, and fear, and do no more presumptuously.
14 Tango okokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo; tango okozwa yango mpe okovanda kati na yango, tango mosusu okoki koloba: « Tika ete toluka mokonzi oyo akokonza biso ndenge ezali na bikolo nyonso oyo ezingeli biso, »
When you are come unto the land which the LORD your God gives you, and shall possess it, and shall dwell therein, and shall say, I will set a king over me, like all the nations that are about me;
15 sala keba ete opona kaka mokonzi oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona. Asengeli kowuta kati na bandeko na bino. Kotia mopaya te oyo azali ndeko na bino te kati na Isalaele mpo na kokonza bino.
You shall in any way set him king over you, whom the LORD your God shall choose: one from among your brethren shall you set king over you: you may not set a stranger over you, which is not your brother.
16 Nzokande mokonzi yango asengeli te kozala na bampunda ebele mpo na ye moko mpe kozongisa bato na Ejipito mpo na kobakisa motango ya bampunda, pamba te Yawe alobaki na bino: « Botikala kozonga lisusu te na nzela oyo. »
But he shall not multiply horses to himself, nor cause the people to return to Egypt, to the end that he should multiply horses: forasmuch as the LORD has said unto you, All of you shall henceforth return no more that way.
17 Asengeli te kozala na basi ebele noki te motema na ye ekopengwa. Asengeli te kozala na palata mpe wolo ebele koleka.
Neither shall he multiply wives to himself, that his heart turn not away: neither shall he greatly multiply to himself silver and gold.
18 Tango mokonzi yango akovanda na kiti na ye ya bokonzi, akozwa buku ya Mobeko epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe akokoma makambo oyo ezali na buku yango mpo na ye moko.
And it shall be, when he sits upon the throne of his kingdom, that he shall write him a copy of this law in a book out of that which is before the priests the Levites:
19 Akozala na buku yango tango nyonso mpe akotanga yango mikolo nyonso ya bomoi na ye mpo ete ayekola kokumisa Yawe, Nzambe na ye, mpe asalela malamu maloba nyonso ya Mobeko oyo mpe bikateli na yango;
And it shall be with him, and he shall read therein all the days of his life: that he may learn to fear the LORD his God, to keep all the words of this law and these statutes, to do them:
20 mpo ete atombola te na lolendo liboso ya bandeko na ye to abima te libanda ya mibeko na yango. Boye, ye elongo na bakitani na ye bakowumela tango molayi na bokonzi kati na Isalaele.
That his heart be not lifted up above his brethren, and that he turn not aside from the commandment, to the right hand, or to the left: to the end that he may prolong his days in his kingdom, he, and his children, in the midst of Israel.

< Deteronomi 17 >