< Deteronomi 16 >

1 Batela sanza ya Abibi mpe sepela feti ya Pasika mpo na Yawe, Nzambe na yo, pamba te ezalaki na butu moko ya sanza yango nde Yawe abimisaki yo na Ejipito.
Onderhoud de maand Abib, en vier het Pascha ter ere van Jahweh, uw God; want in de maand Abib heeft Jahweh uw God, u des nachts uit Egypte geleid.
2 Tala biloko oyo okobonza lokola mbeka ya Pasika mpo na Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye: ngombe ya mobali, meme ya mobali mpe ntaba ya mwasi.
Dan moet ge uit de kudde en runderen ter ere van Jahweh, uw God, het Pascha slachten op de plaats, die Jahweh zal uitverkiezen, om er zijn Naam te vestigen.
3 Okolia yango te na mapa oyo basangisa na levire. Kasi mikolo sambo, okolia mapa ezanga levire, mapa ya pasi, pamba te obimaki na Ejipito na lombangu. Okosalaka bongo na mikolo nyonso ya bomoi na yo mpo ete okanisaka mokolo oyo obimaki na Ejipito.
Ge moogt niets wat gedesemd is daarbij eten, maar moet daarbij zeven dagen lang ongedesemde broden, het brood der ellende, eten; want overhaast zijt ge uit Egypte getrokken. Zo zult gij u de dag van uw uittocht uit Egypte herinneren al de dagen van uw leven.
4 Tika ete levire emonana te epai na yo, kati na mokili na yo nyonso mikolo sambo. Kotika te ete nyama oyo babonzi na pokwa ya mokolo ya liboso etikala kino na tongo.
Zeven dagen lang mag bij u in heel uw gebied geen gist worden aangetroffen. En van het vlees, dat gij in de avond van de eerste dag offert, mag niets tot de volgende ochtend worden bewaard.
5 Okoki te kobonza mbeka ya Pasika kati na bingumba nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi yo.
Ook moogt gij het Pascha niet slachten in een van de steden, die Jahweh, uw God, u zal geven;
6 Ezali kaka na esika oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona mpo na kotia Kombo na Ye nde bokobonza mbeka ya Pasika. Bokosala yango na pokwa, tango moyi elalaka, ngonga oyo obimaki na Ejipito.
maar op de plaats, die Jahweh, uw God, zal uitverkiezen, om er zijn Naam te vestigen, moet gij tegen de avond, bij het ondergaan der zon, het Pascha slachten, op de tijd, dat gij uit Egypte getrokken zijt.
7 Okolamba mpe okolia yango na esika oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona. Bongo na tongo, okozonga na ndako na yo.
Gij moet het toebereiden en eten op de plaats, die Jahweh, uw God, zal uitverkiezen; eerst de volgende morgen kunt ge naar uw tenten terugkeren.
8 Mikolo motoba, okolia mapa ezanga levire; bongo na mokolo ya sambo, okosala feti monene mpo na Yawe, Nzambe na yo; okosala mosala moko te.
Zes dagen lang moet ge ongedesemde broden eten, en op de zevende dag moet er een godsdienstige bijeenkomst ter ere van Jahweh, uw God, worden gehouden, en moogt ge geen arbeid verrichten.
9 Okotanga baposo sambo, kobanda na mokolo oyo okotia mbeli na elanga ya ble mpo na kobuka ble yango.
Zeven volle weken moet ge tellen van het ogenblik af, dat ge de sikkel in het koren slaat.
10 Okosala feti ya Baposo mpo na Yawe, Nzambe na yo; okobonzela Ye makabo wuta na mokano ya motema na yo moko kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo.
Dan moet ge het feest der weken voor Jahweh, uw God, vieren, en naar uw vermogen, en naar gelang Jahweh, uw God, u heeft gezegend, een vrijwillige gave schenken.
11 Okosepela liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye: yo, bana na yo ya mibali, bana na yo ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi oyo bazali kati na bingumba na yo, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kovanda kati na yo.
Dan moet ge met uw zoon en uw dochter, uw knecht en uw dienstmaagd, met den leviet, die binnen uw poorten woont, met den vreemdeling, den wees en de weduwe, die in uw midden wonen, vrolijk zijn voor het aanschijn van Jahweh, uw God, op de plaats, die Jahweh, uw God, zal uitverkiezen, om er zijn Naam te vestigen.
12 Kobosana te ete ozalaki mowumbu kati na Ejipito mpe salela malamu mitindo oyo.
Denk er aan, dat ge slaaf zijt geweest in Egypte, en onderhoud al deze bepalingen met de grootste zorg.
13 Mpo na oyo etali feti ya Bandako ya kapo, okosala yango mikolo sambo sima na yo kosangisa bambuma na yo ya ble mpe kokamola vino na yo.
Het loofhuttenfeest moet ge zeven dagen lang vieren, wanneer gij de vruchten van uw dorsvloer en wijnpers binnenhaalt.
14 Okozala na esengo na feti yango: yo, bana na yo ya mibali mpe ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kati na bingumba na yo.
Ge moet vrolijk zijn op uw feest met uw zoon en uw dochter, uw knecht en uw dienstmaagd, met den leviet en den vreemde, den wees en de weduwe, die binnen uw poorten wonen.
15 Mikolo sambo, okosala yango feti mpo na Yawe, Nzambe na yo, na bisika oyo Yawe akopona; pamba te Yawe, Nzambe na yo, akopambola milona na yo mpe misala nyonso ya maboko na yo; bongo esengo na yo ekozala mingi koleka.
Zeven dagen lang zult ge feest vieren ter ere van Jahweh, uw God, op de plaats, die Jahweh zal uitverkiezen. Want Jahweh, uw God, zal u zegenen bij heel uw oogst en bij al het werk uwer handen; daarom moet ge vrolijk zijn.
16 Mbala misato na mobu, mibali nyonso basengeli kokende liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo Ye akopona: na feti ya Mapa ezanga levire, na feti ya Baposo, mpe na feti ya Bandako ya kapo. Moko te akokende liboso ya Yawe, maboko pamba:
Drie maal per jaar moeten alle mannen voor het aanschijn van Jahweh, uw God, verschijnen op de plaats, die Hij zal uitverkiezen: op het feest van de ongedesemde broden, op het feest der weken, en op het loofhuttenfeest. Maar men mag niet met lege handen voor Jahweh verschijnen;
17 moko na moko kati na bino asengeli komema likabo kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi ye.
doch iedereen moet geven naar vermogen en naar de zegen, die Jahweh, uw God, u geschonken heeft.
18 Okopona basambisi mpe bakalaka kati na bikolo na yo nyonso, kati na bingumba nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo. Bakokata makambo ya bato na bosembo.
Ge moet in al uw steden, die Jahweh, uw God, aan uw stammen zal geven, rechters en ambtslieden over u aanstellen, die voor het volk een rechtvaardig oordeel zullen vellen.
19 Okobebisaka bosembo te, okoponaka bilongi te, okondimaka kanyaka te, pamba te ezipaka miso ya bato ya bwanya mpe ebebisaka maloba ya bato ya sembo.
Ge moogt het recht niet verkrachten, geen aanzien van personen laten gelden, en geen geschenken aannemen; want geschenken verblinden de ogen der wijzen, en verdraaien de woorden der rechtvaardigen.
20 Okosalelaka bosembo mpe bosembo kaka, mpo ete owumela mpe okamata mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo.
Voor gerechtigheid, en voor gerechtigheid alleen moet ge ijveren, opdat ge moogt leven en het land moogt bezitten, dat Jahweh, uw God, u gaat geven.
21 Okotelemisa te likonzi ya nzambe mwasi Ashera pembeni ya etumbelo oyo okotonga mpo na Yawe, Nzambe na yo.
Ge moogt geen gewijde bomen planten, van welke soort dan ook, naast het altaar van Jahweh, uw God, dat gij voor u zult bouwen,
22 Okotelemisa te libanga ya bule, pamba te Yawe, Nzambe na yo, ayinaka nyonso wana.
noch een wijsteen oprichten, want Jahweh, uw God, haat ze.

< Deteronomi 16 >