< Bakolose 2 >

1 Nalingi boyeba ete nazali kobunda etumba makasi mpo na bino, mpo na bandeko ya Laodise mpe mpo na bandeko nyonso oyo bamoni ngai nanu te.
我想让你们知道我是多么的努力工作,为了你们、为了老底嘉的人们,事实上还为那些不曾见过面的人们。
2 Nazali kosala bongo mpo ete balendisama, bazala moko kati na bolingo, batonda na elikya oyo ewutaka na bososoli ya mabombami ya Nzambe, mpe batonda na boyebi ya mabombami yango; mabombami yango ezali Klisto.
我的努力是为了让你们能够受到鼓舞,让你们在爱中彼此联系,可以凭借领悟而感到完全的确信,以此获得巨大的益处,因为这才是上帝带来的真正知识。希望你们知道,上帝显化的奥秘,那就是耶稣!
3 Ezali kati Klisto nde bomengo nyonso ya bwanya mpe ya boyebi ya Nzambe ebombami.
通过耶稣,你们可以发现一切智慧和知识。
4 Nalobi na bino bongo mpo ete moko te akosa bino na nzela ya maloba ya lokuta.
我说这些话,免得有人用花言巧语欺骗你们。
5 Pamba te, atako na nzoto, nazali mosika na bino, kasi na molimo, nazali elongo na bino; mpe nazali kosepela komona ete bozali kotambola na botosi mpe bozali kobatela kondima na bino kati na Klisto.
我的身体虽然没有和你们在一起,灵却与你们同在。很高兴看见团结在一起,坚定地信基督。
6 Yango wana, lokola bosilaki koyamba Yesu-Klisto lokola Nkolo, botambolaka lokola bato oyo bazali moko na Ye:
一如你们如何接受基督耶稣为主,就按照这种方式追随他,
7 bomilendisaka mpe botongaka bomoi na bino kati na Ye, bokangamaka na kondima ndenge bateyaki bino, mpe bozongisaka matondi epai ya Nzambe.
以他为根基,以他进行修建。希望你们对他的信能继续变得更强壮,遵循一直向你们教导的,对上帝充满感激。
8 Bosalaka keba ete moko te akanga bino na motambo ya mayele ya lokuta mpe ezanga tina, kolanda bokoko ya bato mpe etamboli ya mokili oyo, pamba te ewutaka na Klisto te.
要小心,不要哪些不遵循基督、而是按照人的传统和世俗言论,皆有其哲学和骗人的空谈,奴役你们。
9 Ezali kati na Klisto, kati na nzoto na Ye, nde mobimba ya nyonso oyo ezali kati na Nzambe evandi.
因为上帝神圣本性,以基督身体的形式完整存在,
10 Ezali mpe kati na Ye nde bino botondisamaki, pamba te azali Mokonzi ya milimo nyonso mpe ya nguya nyonso.
你们也因他而完整。他远远高于所有执政掌权者。
11 Ezali lisusu kati na Ye nde bakataki bino ngenga, na nzela ya maboko ya bato te kasi na lolenge ya Klisto: balongolaki kati na bino nzoto ya bomoto mpe ya masumu,
通过它,你们接受了“割礼”,但并非由人手进行,而是通过基督提供的割礼,从人类罪的天性中获得自由。
12 bakundaki bino elongo na Klisto na nzela ya libatisi; mpe, kati na Ye, bosekwaki elongo na Ye na nzela ya kondima kati na nguya ya Nzambe oyo asekwisaki Ye kati na bakufi.
你们在洗礼中已与他埋葬在一起,也因信上帝将基督从死人中复活的行为,与耶稣一同复活了。
13 Bino oyo bozalaki bakufi kati na masumu na bino mpe kati na bozangi kokatisa ngenga ya nzoto na bino, Nzambe akomisaki bino bato ya bomoi elongo na Klisto. Alimbisaki masumu na biso nyonso,
尽管你们因罪和肉体未受割礼而死亡,但上帝让你们与基督一起复活,上帝赦免了我们的一切罪。
14 apasolaki mokanda oyo mibeko na yango ekatelaki biso etumbu, asilisaki bokonzi ya mibeko yango, wana abakaki yango na ekulusu.
他根据那用于反对我们的律法,抹去了我们的债;他把这障碍钉在十字架上,以此将其移除。
15 Asilisaki makasi ya milimo mabe mpe ya nguya ya bakonzi ya molili, asambwisaki yango na miso ya bato nyonso mpe atambolisaki yango lokola bakangami ya etumba tango alongaki yango na ekulusu.
他废除了精神统治者和掌权者的权利,将他们的真正的样子公开显示,用胜利彻底征服他们。
16 Yango wana, bopesaka na moto moko te nzela ya kosambisa bino na tina na biloko ya kolia to ya komela to mpe na tina na mokolo ya feti lokola feti ya ebandeli ya sanza to ya Saba.
所以不要让任何人因你们所选择遵循的饮食、宗教节日、新的拜月仪式或安息日庆祝,而批评你们。
17 Nyonso wana ezalaki kaka elilingi ya makambo oyo esengelaki koya, kasi bosolo na yango ezali penza kati na Klisto.
这些不过是即将到来之事的影子,因为那真正的现实就是基督。
18 Botelemelaka bato oyo bamisepelisaka na komikitisa ya lokuta to na kosambela ba-anjelu, bopesaka bango nzela te ya kozangisa bino elonga. Bamipesaka na bimoniseli ya makanisi na bango, batondi na lolendo ezanga tina,
不要让人通过欺骗夺去你们的奖赏,他们坚持让你们故作谦卑或敬拜天使。他们说自己曾看到过异像,所以就认为自己好于任何人,他们的有罪思想也变得如此自负,令人可笑。
19 baboyaka kokangama na Klisto oyo azali Mokonzi, Moto. Ezali Klisto nde asalaka ete nzoto mobimba ekola malamu kolanda mokano ya Nzambe mpe ekangana na nzela ya misisa mpe misuni.
这样的人并没有与自己的头连接,没有用头指导身体,没有通过身体的关节和筋络获得滋养,连接在一起。因为身体是连接在一起的,按照上帝希望它成长的方式成长。
20 Bokufaki elongo na Klisto mpe bokangolamaki longwa na bowumbu ya milimo mabe ya mokili oyo. Boye mpo na nini, lokola nde bozali nanu bato ya mokili oyo, bozali lisusu kondima mibeko na yango lokola:
你们若与基督一同死去,摆脱世俗强加给你们的宗教要求,为什么好像仍然是这个世界的一部分,仍然要受这些要求的摆布,
21 « kozwa te, komeka elengi te, kosimba te? »
比如“不可拿、不可尝、不可触”的要求?
22 Boni, biloko oyo nyonso ebongisami te mpo na kobebisama sima na kosalela yango? Tala, ezali na yango kaka mibeko mpe malakisi ya bomoto!
这些要求所指,是一经使用就会坏掉的东西。这些规条是照着人的要求和教训而定。
23 Solo, mibeko ya bongo emonanaka lokola nde etondi na bwanya, pamba te esengaka na bato ete basambelaka ndenge balingi, bamilakisaka lokola bato ya komikitisa mpe bamipesaka pasi na nzoto; nzokande ezali na tina moko te, soki kaka te kokokisa baposa ya nzoto.
对于那些以自我为中心敬拜之人、故作谦卑之人和“苦修身体”之人,这些规则似乎合情合理。但事实上,它们在应对所有罪恶欲望方面,没有任何帮助。

< Bakolose 2 >