< Amosi 8 >

1 Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai: kitunga etonda na bambuma etela.
This is what Jehovah showed me: And look, a basket of summer fruit.
2 Atunaki ngai: — Amosi, ozali komona nini? Nazongisaki: — Nazali komona kitunga etonda na bambuma etela. Yawe alobaki na ngai: — Tango ekoki mpo na bato na Ngai, Isalaele; pamba te nakolimbisa bango lisusu te.
He said, "Amos, what do you see?" I said, "A basket of summer fruit." Then Jehovah said to me, "The end has come on my people Israel. I will not again pass by them any more.
3 Na mokolo wana, banzembo ya esengo kati na bandako ekobongwana bileli, elobi Nkolo Yawe. Bakobwaka bibembe ebele bipai na bipai mpe bakosalela bango matanga te.
The songs of the temple will be wailings in that day," says Jehovah. "The dead bodies will be many. In every place they will throw them out with silence.
4 Boyoka makambo oyo, bino bato oyo bonyokolaka bato bakelela mpe bonyataka babola kati na mokili.
Hear this, you who trample the needy, and destroy the poor of the land,
5 Bozali koloba: « Feti ya ebandeli ya sanza ekoleka tango nini mpo ete toteka ble na biso? Tango nini mokolo ya Saba ekosila mpo ete tofungola bibombelo na biso ya ble? » Tokosalela bakopo ya mike mpo ete tomatisa talo, mpe tokosalela bimekelo ya lokuta.
saying, 'When will the new moon be gone, that we may sell grain? And the Sabbath, that we may market wheat, making the ephah small, and the shekel large, and dealing falsely with balances of deceit;
6 Tokosomba mobola na palata mpe moto akelela na motuya ya mapapa mibale, bongo tokoteka ata basalite ya ble.
that we may buy the poor for silver, and the needy for a pair of shoes, and sell the sweepings with the wheat?'"
7 Mpo na lolendo ya Jakobi, Yawe alapi ndayi na maloba oyo: « Nakobosana misala na bango ata moko te.
Jehovah has sworn by the pride of Jacob, "Surely I will never forget any of their works.
8 Mpo na yango, mokili ekolenga, mpe bato na yango nyonso bakozala na matanga. Mokili mobimba ekotomboka lokola ebale Nili oyo etondi na mayi; ekokoma koningana-ningana mpe ekokita lokola ebale ya Ejipito.
Won't the land tremble for this, and everyone mourn who dwells in it? Yes, it will rise up wholly like the River; and it will be stirred up and sink again, like the River of Egypt.
9 Na mokolo wana, » elobi Nkolo Yawe, « nakosala ete moyi elala na midi, mpe nakoyeisa molili na mokili na moyi makasi.
It will happen in that day," says Jehovah, "that I will cause the sun to go down at noon, and I will darken the earth in the clear day.
10 Nakokomisa mikolo ya bafeti na bino mikolo ya matanga, banzembo na bino ya esengo banzembo ya mawa. Nakosala ete bino nyonso bolata basaki, mpe bakokokola bino suki ya moto. Nakoyeisa matanga kati na mokili lokola matanga ya libota oyo esili kokufisa mwana se moko oyo bazalaki na ye, mpe suka na yango ekozala bobele se pasi makasi.
I will turn your feasts into mourning, and all your songs into lamentation; and I will make you wear sackcloth on all your bodies, and baldness on every head. I will make it like the mourning for an only son, and its end like a bitter day.
11 Na mikolo ekoya, » elobi Nkolo Yawe, « nakotinda nzala makasi kati na mokili; ekozala te nzala ya bilei to posa ya mayi, kasi ekozala nzala ya koyoka Liloba na Yawe.
Look, the days come," says Jehovah, "that I will send a famine in the land, not a famine of bread, nor a thirst for water, but of hearing the word of Jehovah.
12 Bato bakotelengana na bibale nyonso, bakoyengayenga longwa na nor kino na este mpo na koluka Liloba na Yawe, kasi bakotikala komona yango te.
They will wander from sea to sea, and from the north even to the east; they will run back and forth to seek the word of Jehovah, and will not find it.
13 Na mokolo wana, bilenge basi ya kitoko mpe mibali ya makasi bakokufa na posa ya mayi.
In that day the beautiful virgins and the young men will faint for thirst.
14 Bato oyo balapaka ndayi na kombo ya nzambe ya ekeko ya Samari mpe balobaka: ‹ Dani, lokola nzambe na yo azali na bomoi › to ‹ lokola nzambe ya Beri-Sheba azali na bomoi, › bakokweya mpe bakotelema lisusu te. »
Those who swear by the sin of Samaria, and say, 'As your god, Dan, lives;' and, 'As the way of Beersheba lives;' they will fall, and never rise up again."

< Amosi 8 >