< 2 Batesalonika 2 >

1 Bandeko, mpo na oyo etali boyei ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe bosangani na biso epai na Ye, tozali kosenga na bino boye:
Now, brothers, concerning the coming of our Lord Jesus Christ and our gathering together to him, we ask you
2 bopesaka na mobulu nzela te ya kokota na pete kati na makanisi na bino to tika ete mitema na bino etungisamaka te likolo na emoniseli, liloba to mokanda oyo bato bakoki koloba na tina na yango ete ewuti epai na biso mpe ezali koloba ete mokolo ya Nkolo esili kokoma.
not to be quickly shaken in your mind or troubled, either by spirit or by word or by letter as if from us, saying that the day of Christ has already come.
3 Tika ete moko te akosa bino; pamba te liboso ete mokolo yango ekoma, bato basengeli nanu kobwaka kondima, mpe motomboki oyo abongisami mpo na libebi asengeli nanu komonana.
Let no one deceive you in any way. For it will not be unless the rebellion comes first, and the man of sin is revealed, the son of destruction.
4 Motomboki yango akotelemela makambo nyonso ya Nzambe mpe akomitombola na likolo ya nyonso oyo bato babengaka Nzambe to na likolo ya oyo bato bagumbamelaka, kino kokende kovanda kati na Tempelo ya Nzambe mpe komibenga Nzambe.
He opposes and exalts himself against all that is called God or that is worshiped, so that he sits as God in the temple of God, setting himself up as God.
5 Boni, bobosani ete nazalaki koyebisa bino makambo yango tango nazalaki elongo na bino?
Don’t you remember that when I was still with you, I told you these things?
6 Nzokande boyebi sik’oyo nini ezali kokanga ye nzela mpo ete amonisama te na tango na ye.
Now you know what is restraining him, to the end that he may be revealed in his own season.
7 Pamba te nguya ya botomboki, oyo ebombama esili kobanda kosala; kasi esengeli ete Ye oyo, kino sik’oyo, azali kokanga ye nzela ya komimonisa alongwa
For the mystery of lawlessness already works. Only there is one who restrains now, until he is taken out of the way.
8 mpo ete motomboki amonisama, ye oyo Nkolo Yesu akoboma na nzela ya Liloba kowuta na monoko na Ye mpe akobebisa tango akoya na nzela ya nkembo ya boyei na Ye.
Then the lawless one will be revealed, whom the Lord will kill with the breath of his mouth and destroy by the manifestation of his coming;
9 Motomboki yango akoya na nguya ya Satana mpe akosala bikamwa ya lolenge nyonso, bilembo, misala minene ya lokuta
even he whose coming is according to the working of Satan with all power and signs and lying wonders,
10 mpe lolenge nyonso ya mabe, mpo na kokosa bato oyo bazali kokende na libebi, pamba te bayambaki te bolingo ya bosolo oyo esengeli kobikisa bango.
and with all deception of wickedness for those who are being lost, because they didn’t receive the love of the truth, that they might be saved.
11 Yango wana Nzambe atindeli bango molimo ya libunga mpo ete bandima makambo ya lokuta,
Because of this, God sends them a powerful delusion, that they should believe a lie,
12 mpe mpo ete bato nyonso oyo baboyaki kondimela solo kasi basepelaki na mabe bazwa etumbu.
that they all might be judged who didn’t believe the truth, but had pleasure in unrighteousness.
13 Kasi biso bandeko balingami ya Nkolo, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino oyo Nkolo alingaka, pamba te Nzambe asila kopona bino wuta na ebandeli mpo ete bozwa lobiko, na nzela ya libulisi ya Molimo mpe ya kondima kati na solo.
But we are bound to always give thanks to God for you, brothers loved by the Lord, because God chose you from the beginning for salvation through sanctification of the Spirit and belief in the truth,
14 Na nzela ya Sango Malamu oyo toteyaki bino, Nzambe abengaki bino mpo ete bozwa lobiko mpe nkembo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto.
to which he called you through our Good News, for the obtaining of the glory of our Lord Jesus Christ.
15 Yango wana bandeko, botelema ngwi mpe bobatela malamu malakisi oyo toteyaki bino, ezala na nzela ya maloba to na nzela ya mokanda.
So then, brothers, stand firm and hold the traditions which you were taught by us, whether by word or by letter.
16 Tika ete Ye moko Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe Nzambe, Tata na biso, oyo alingaki biso mpe apesaki biso, na ngolu na Ye, malendisi ya seko mpe elikya ya malamu, (aiōnios g166)
Now our Lord Jesus Christ himself, and God our Father, who loved us and gave us eternal comfort and good hope through grace, (aiōnios g166)
17 balendisa mitema na bino mpe bapesa bino makasi ya kosala bolamu kati na misala mpe maloba nyonso!
comfort your hearts and establish you in every good work and word.

< 2 Batesalonika 2 >