< 2 Batesalonika 1 >

1 Polo, Silasi mpe Timote; Epai ya Lingomba ya bandeko ya Tesalonika, oyo ezali kati na Nzambe, Tata na biso, mpe kati na Nkolo Yesu-Klisto:
바울과 실루아노와 디모데는 하나님 우리 아버지와 주 예수 그리스도 안에 있는 데살로니가인의 교회에 편지하노니
2 Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto!
하나님 아버지와 주 예수 그리스도로부터 은혜와 평강이 너희에게 있을지어다
3 Bandeko, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino. Solo, ezali malamu mpo na biso kosalaka bongo, pamba te kondima na bino ezali se kokola mpe bolingo oyo moko na moko kati na bino azali na yango mpo na moninga na ye ezali mpe kokola.
형제들아 우리가 너희를 위하여 항상 하나님께 감사할지니 이것이 당연함은 너희 믿음이 더욱 자라고 너희가 다 각기 서로 사랑함이 풍성함이며
4 Mpe kati na Mangomba ya Nzambe, tozali komikumisa na tina na molende mpe kondima na bino kati na minyoko nyonso mpe kati na pasi oyo bozali komona.
그리고 너희의 참는 모든 핍박과 환난 중에서 너희 인내와 믿음을 인하여 하나님의 여러 교회에서 우리가 친히 자랑함이라
5 Makambo oyo nyonso ezali kolakisa na polele ete Nzambe atalaka makambo na bosembo, mpe ete alingi kozwa bino lokola bato oyo babongi mpo na Bokonzi ya Nzambe, oyo bozali komonela pasi.
이는 하나님의 공의로운 심판의 표요 너희로 하여금 하나님의 나라에 합당한 자로 여기심을 얻게 하려 함이니 그 나라를 위하여 너희가 또한 고난을 받으리니
6 Solo, Nzambe azali sembo: akozongisa pasi lokola etumbu epai ya banyokoli na bino;
너희로 환난 받게 하는 자들에게는 환난으로 갚으시고
7 mpe akopesa bopemi epai na biso mpe epai na bino oyo bozali komona pasi, tango Nkolo Yesu akomimonisa wuta na Likolo, elongo na ba-anjelu na Ye ya nguya,
환난 받는 너희에게는 우리와 함께 안식으로 갚으시는 것이 하나님의 공의시니 주 예수께서 저의 능력의 천사들과 함께 하늘로부터 불꽃 중에 나타나실 때에
8 mpe kati na moto mpo na kopesa etumbu epai ya bato oyo bayebi Nzambe te mpe batosaka te Sango Malamu ya Yesu, Nkolo na biso.
하나님을 모르는 자들과 우리 주 예수의 복음을 복종치 않는 자들에게 형벌을 주시리니
9 Bakozwa etumbu ya libebi ya seko na seko, mosika ya bozalisami ya Nkolo mpe ya nguya ya nkembo na Ye (aiōnios g166)
이런 자들이 주의 얼굴과 그의 힘의 영광을 떠나 영원한 멸망의 형벌을 받으리로다 (aiōnios g166)
10 tango akoya na mokolo wana mpo na kopesamela nkembo kati na basantu na Ye, mpe lokumu kati na bandimi na Ye. Bino mpe bokozala elongo na bango, pamba te bondimaki mateya oyo toteyaki bino.
그 날에 강림하사 그의 성도들에게서 영광을 얻으시고 모든 믿는 자에게서 기이히 여김을 얻으시리라(우리의 증거가 너희에게 믿 어졌음이라)
11 Yango wana tobondelaka tango nyonso Nzambe na biso mpo na bino, mpo ete akomisa bino bato oyo babongi na bomoi oyo abengaki bino mpo na yango; mpe mpo ete, na nzela ya nguya na Ye, akokisa posa na bino ya kosala bolamu to makambo nyonso oyo kondima na bino ezali kotinda bino kosala.
이러므로 우리도 항상 너희를 위하여 기도함은 우리 하나님이 너희를 그 부르심에 합당한 자로 여기시고 모든 선을 기뻐함과 믿 음의 역사를 능력으로 이루게 하시고
12 Tosambelaka bongo mpo ete Kombo ya Yesu, Nkolo na biso, epesamela nkembo kati na bino, mpe bino bozwa lokumu kati na Ye kolanda ngolu ya Nzambe na biso mpe ya Nkolo Yesu-Klisto.
우리 하나님과 주 예수 그리스도의 은혜대로 우리 주 예수의 이름이 너희 가운데서 영광을 얻으시고 너희도 그 안에서 영광을 얻게 하려 함이니라

< 2 Batesalonika 1 >