< 2 Samuele 7 >

1 Sima na mokonzi kovanda na ndako na ye mpe Yawe kopesa ye bopemi liboso ya banguna na ye nyonso oyo bazingelaki ye,
It happened, when the king lived in his house, and YHWH had given him rest from all his enemies all around,
2 mokonzi alobaki na mosakoli Natan: — Tala nanu likambo oyo! Ngai nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Nzambe ezali kovanda kati na ndako ya kapo.
that the king said to Nathan the prophet, "See now, I dwell in a house of cedar, but the ark of God dwells within curtains."
3 Natan azongiselaki mokonzi: — Sala nyonso oyo ozali na yango na motema, pamba te Yawe azali elongo na yo.
Nathan said to the king, "Go, do all that is in your heart; for YHWH is with you."
4 Kasi na butu wana, Yawe alobaki na Natan:
It happened the same night, that the word of YHWH came to Nathan, saying,
5 — Kende koyebisa Davidi, mosali na ngai: « Tala liloba oyo Yawe alobi: Boni, yo nde okotongela ngai ndako mpo ete navanda kati na yango?
"Go and tell my servant David, 'Thus says YHWH, "Shall you build me a house for me to dwell in?
6 Natikali nanu kovanda na ndako moko te, banda mokolo oyo nabimisaki Isalaele na Ejipito kino lelo; nazalaki kotambola bipai na bipai na se ya ndako ya kapo, wana nazalaki kovanda kati na Mongombo.
For I have not lived in a house since the day that I brought up the children of Israel out of Egypt, even to this day, but have moved around in a tent and in a tabernacle.
7 Na bisika nyonso oyo natamboli elongo na bana nyonso ya Isalaele, boni, nasilaki koloba ata na moko kati na bakambi na bango, oyo natiaki mpo na kobatela bato na ngai, Isalaele: ‹ Mpo na nini botongeli Ngai te ndako ya mabaya ya sedele? › »
In all places in which I have walked throughout Israel, did I say a word to any of the judges of Israel, whom I commanded to be shepherd of my people Israel, saying, 'Why have you not built me a house of cedar?'"'
8 Yebisa sik’oyo Davidi, mosali na Ngai: « Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Ezali Ngai nde nazwaki yo na zamba epai wapi ozalaki koleisa mpe kobatela bibwele, mpo ete nakomisa yo mokonzi ya bato na Ngai, Isalaele.
Now therefore you shall tell my servant David this, 'Thus says YHWH of hosts, "I took you from the sheep pen, from following the sheep, that you should be prince over my people Israel.
9 Nazalaki elongo na yo na bisika nyonso oyo okendeki, mpe nabomaki banguna na yo nyonso liboso na yo. Sik’oyo, nakokomisa kombo na yo monene lokola bakombo ya bato minene oyo bazali kati na mokili.
I have been with you wherever you went, and have cut off all your enemies from before you. I will make you a great name, like the name of the great ones who are in the earth.
10 Nakobongisa esika mpo na bato na Ngai, Isalaele; nakolona bango mpo ete bazala na esika na bango moko mpe batungisa bango lisusu te. Bato mabe bakonyokola bango lisusu te ndenge bazalaki konyokola bango liboso
I will appoint a place for my people Israel, and will plant them, that they may dwell in their own place, and be moved no more; neither shall the children of wickedness afflict them any more, as at the first,
11 mpe ndenge bazalaki kosala bango tango nyonso wuta tango oyo naponaki bakambi ya bato na Ngai, Isalaele. Nakopesa yo bopemi liboso ya banguna na yo nyonso. › Yawe atatoli mpo na yo ete Ye moko akosala ete bokonzi ewumela kati na libota na yo.
and from the time that I commanded judges to be over my people Israel. I will cause you to rest from all your enemies. Moreover YHWH tells you that he will build you a house.
12 Tango mikolo ya bomoi na yo ekosila mpe okokende kokutana na batata na yo, nakotombola moko kati na bakitani na yo, oyo akobima penza na mokongo na yo, mpo ete akitana na yo; mpe nakolendisa bokonzi na ye.
And it will come about when your days are fulfilled, and you sleep with your fathers, that I will raise up your descendant after you, who will come from your body, and I will establish his kingdom.
13 Ezali ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai, mpe Ngai nakolendisa mpo na libela kiti na ye ya bokonzi.
He will build a house for my name, and I will establish his throne forever.
14 Nakozala Tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai. Soki asali mabe, nakopesa ye etumbu; nakosalela bato lokola fimbu mpo na kobeta ye.
I will be his father, and he shall be my son. If he commits iniquity, I will chasten him with a human rod, and with the stripes from human beings;
15 Kasi nakotikala kolongola te bolingo na Ngai epai na ye ndenge nalongolaki yango epai ya Saulo oyo nalongolaki liboso na yo.
but my loving kindness I will not take from him, as I took it from Saul, whom I put away before you.
16 Libota na yo ya bokonzi mpe bokonzi na yo ekowumela tango nyonso liboso na Ngai, mpe kiti na yo ya bokonzi ekolendisama mpo na libela. »
And your house and your kingdom shall be made sure forever before me, and your throne shall be established forever."'"
17 Natan ayebisaki Davidi maloba oyo nyonso mpe emoniseli oyo nyonso.
According to all these words, and according to all this vision, so Nathan spoke to David.
18 Bongo mokonzi Davidi akotaki, avandaki liboso ya Yawe mpe alobaki: « Nkolo Yawe, ngai nazali nani, mpe libota na ngai ezali nini, mpo ete okomisa ngai na esika oyo nazali?
Then king David went in and sat before YHWH and said, "Who am I, Lord YHWH, and what is my house, that you have brought me thus far?
19 Ah Nkolo Yawe, lokola nde ekokaki te na miso na Yo, olobi lisusu na tina na lobi ya libota ya bokonzi ya mosali na Yo! Ah Nkolo Yawe, boni, ezali boye nde osalaka mpo na bato?
This was a small thing in your eyes, Lord YHWH, and you have spoken of your servant's house for a great while to come, and you have let me look upon the generation of humankind to come, Lord YHWH.
20 Nini oyo Davidi akoki lisusu koloba na Yo? Pamba te, oh Nkolo Yawe, oyebi mosali na Yo?
And what more can David add to you concerning the honor which is done to your servant? For you know your servant, YHWH.
21 Ezali mpo na Liloba na Yo mpe kolanda mokano na Yo nde okokisi likambo monene oyo, mpe osali ete eyebana epai ya mosali na Yo.
For your servant's sake, and according to your own heart, you have worked all this greatness, to make your servant know it.
22 Oh Nkolo Yawe, ozali monene ndenge nini! Moko te akokani na Yo; mpe, kolanda nyonso oyo toyoki na matoyi na biso, Nzambe mosusu azali te, bobele Yo!
Therefore you are great, Lord YHWH. For there is none like you, neither is there any God besides you, according to all that we have heard with our ears.
23 Ekolo nini ekokani na bato na Yo, Isalaele, oyo, kati na mokili, Nzambe akendeki kosikola lokola bato mpo na Ye moko, mpo na kopesa yango kombo mpe kokokisa makambo minene, makambo ya kokamwa mpe ya somo na nzela ya kobengana bikolo elongo na banzambe na bango liboso ya bato na Yo, oyo osikolaki wuta na Ejipito?
And who is like your people Israel, the one nation on earth whom God went out to redeem to be a people for himself, and to make a name for yourself, and to do great and awesome deeds by driving out before your people, whom you redeemed for yourself from Egypt, a nation and its gods?
24 Otiaki Isalaele, bato na Yo, mpo ete bazala bato na Yo mpo na libela; bongo Yo, oh Yawe, okomaki Nzambe na bango.
And you established your people Israel for yourself to be your people forever; and you, YHWH, became their God.
25 Sik’oyo, oh Yawe Nzambe, kokisa mpo na libela elaka oyo opesaki epai ya mosali na Yo mpe epai ya libota na ye. Sala ndenge olakaki
Now, Lord YHWH, the word that you have spoken concerning your servant, and concerning his house, confirm it forever, and do as you have spoken.
26 mpo ete Kombo na Yo ekumisama seko na seko, mpe bato bakoma kolobaka: ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali Nzambe ya Isalaele. › Boye bokonzi ya libota ya Davidi, mosali na Yo, ekolendisama liboso na Yo.
Let your name be magnified forever, saying, 'YHWH of hosts is the God of Israel,' and the house of your servant David shall be established before you.
27 Oh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, olakisaki na mosali na Yo makambo oyo na koloba: ‹ Nakosala ete bokonzi ewumela na libota na yo. › Yango wana mosali na Yo azwi makasi ya kosambela Yo na maloba oyo.
For you have revealed to your servant, saying, 'I will build you a house.' Therefore your servant has found in his heart to pray this prayer to you.
28 Sik’oyo, oh Nkolo Yawe, ozali penza Nzambe! Maloba na Yo ezali solo, mpe olakaki makambo oyo ya malamu epai ya mosali na Yo.
"Now, O Lord YHWH, you are God, and your words are truth, and you have promised this good thing to your servant.
29 Sik’oyo, tika ete opambola libota ya mosali na Yo mpo ete ewumela seko liboso na Yo; pamba te oh Nkolo Yawe, Yo nde olobaki, mpe na nzela ya lipamboli na Yo, libota ya mosali na Yo ekopambolama mpo na libela. »
Now therefore let it please you to bless the house of your servant, that it may continue forever before you; for you, Lord YHWH, have spoken it. Let the house of your servant be blessed forever with your blessing."

< 2 Samuele 7 >