< 2 Samuele 20 >

1 Moto moko ya mobulu na kombo Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya ekolo ya Benjame, abetaki kelelo mpe agangaki: « Tozali na eteni ata moko te ya lisanga na Davidi, tozali ata na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi. Isalaele, tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye ya kapo. »
And there happened to be there a man of Belial, whose name was Sheba, the son of Bichri, a Benjamite: and he blew a trumpet, and said, We have no part in David, neither have we inheritance in the son of Jesse: every man to his tents, O Israel.
2 Bato nyonso ya Isalaele bakimaki Davidi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri. Kasi bato ya Yuda batikalaki pembeni ya mokonzi na bango, na nzela mobimba, longwa na Yordani kino na Yelusalemi.
So every man of Israel went up from after David, and followed Sheba the son of Bichri: but the men of Judah clave unto their king, from Jordan even to Jerusalem.
3 Tango mokonzi Davidi azongaki na ndako na ye, na Yelusalemi, azwaki bamakangu na ye zomi oyo atikaki mpo na kokengela ndako, mpe atiaki bango kati na ndako moko oyo bazalaki kokengela malamu. Atako azalaki kosunga bango, kasi akendeki te kosangisa na bango nzoto. Bazalaki kokengela bango kino na mokolo na bango ya kufa, mpe bazalaki lokola basi bakufisa mibali.
And David came to his house at Jerusalem; and the king took the ten women his concubines, whom he had left to keep the house, and put them in ward, and fed them, but went not in unto them. So they were shut up unto the day of their death, living in widowhood.
4 Mokonzi alobaki na Amasa: « Bengela ngai bato nyonso ya Yuda na mikolo misato, yo moko mpe zala awa. »
Then said the king to Amasa, Assemble me the men of Judah within three days, and be you here present.
5 Kasi tango Amasa akendeki kobenga bato ya Yuda, azwaki tango molayi koleka oyo mokonzi apesaki ye.
So Amasa went to assemble the men of Judah: but he tarried longer than the set time which he had appointed him.
6 Davidi ayebisaki Abishayi: « Sheba, mwana mobali ya Bikiri, akomonisa biso pasi mingi koleka Abisalomi. Kamata basali ya mokonzi mpe landa ye, noki te akomona bingumba batonga makasi mpe akokima biso. »
And David said to Abishai, Now shall Sheba the son of Bichri do us more harm than did Absalom: take you your lord's servants, and pursue after him, lest he get him fenced cities, and escape us.
7 Boye na bokambami ya Abishayi, bato ya Joabi, bato ya Kereti, bato ya Peleti mpe basoda nyonso ya mpiko, babimaki na Yelusalemi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri.
And there went out after him Joab's men, and the Cherethites, and the Pelethites, and all the mighty men: and they went out of Jerusalem, to pursue after Sheba the son of Bichri.
8 Tango bakomaki na libanga monene kati na Gabaoni, Amasa ayaki kokutana na bango. Joabi alataki bilamba na ye ya basoda: na loketo na ye, alataki mokaba oyo kati na yango atiaki mopanga oyo ezalaki kati na ebombelo na yango na loketo. Bongo tango abandaki kopusana, mopanga yango ekweyaki.
When they were at the great stone which is in Gibeon, Amasa went before them. And Joab's garment that he had put on was girded unto him, and upon it a girdle with a sword fastened upon his loins in the sheath thereof; and as he went forth it fell out.
9 Joabi alobaki na Amasa: « Boni ndeko na ngai ya mobali, ozali malamu? » Bongo Joabi asalelaki loboko na ye ya mobali mpo na kosimba Amasa na mandefu mpe kopesa ye beze.
And Joab said to Amasa, Are you in health, my brother? And Joab took Amasa by the beard with the right hand to kiss him.
10 Amasa azalaki na bokebi te mpo na kotala mopanga oyo ezalaki na loboko ya mwasi ya Joabi. Bongo Joabi atobolaki ye libumu, mpe misopo na ye nyonso epanzanaki kino na se; mpe Amasa akufaki mbala moko. Joabi azalaki te na tina na kotuba ye mopanga na mbala ya mibale. Boye Joabi mpe ndeko na ye ya mobali, Abishayi, balandaki Sheba, mwana mobali ya Bikiri.
But Amasa took no heed to the sword that was in Joab's hand: so he stroke him therewith in the fifth rib, and shed out his bowels to the ground, and struck him not again; and he died. So Joab and Abishai his brother pursued after Sheba the son of Bichri.
11 Moto moko kati na bato ya Joabi atelemaki pembeni ya Amasa mpe alobaki: « Tika ete bato nyonso oyo bazali mpo na Joabi mpe mpo na Davidi balanda Joabi! »
And one of Joab's men stood by him, and said, He that favours Joab, and he that is for David, let him go after Joab.
12 Nzokande, wana Amasa azalaki kobaluka kati na makila na ye na kati-kati ya nzela, moto yango amonaki ete mampinga nyonso bayaki kotelema wana. Boye abendaki Amasa libanda ya nzela, atandaki ye kati na elanga mpe afinikaki ye elamba.
And Amasa wallowed in blood in the midst of the highway. And when the man saw that all the people stood still, he removed Amasa out of the highway into the field, and cast a cloth upon him, when he saw that every one that came by him stood still.
13 Sima na ye kolongola Amasa na nzela, bato nyonso bakendeki elongo na Joabi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri.
When he was removed out of the highway, all the people went on after Joab, to pursue after Sheba the son of Bichri.
14 Mpo na kokoma na Abele-Beti-Maaka, Sheba akatisaki bikolo nyonso ya Isalaele mpe etuka mobimba ya bato ya Berimi oyo mpe basanganaki mpe balandaki Joabi.
And he went through all the tribes of Israel unto Abel, and to Bethmaachah, and all the Berites: and they were gathered together, and went also after him.
15 Joabi elongo na mampinga na ye nyonso bazingelaki Sheba kati na Abele-Beti-Maaka mpe batongaki na libanda ya engumba mwa ngomba oyo ekomaki na molayi ya mir. Tango bazalaki kotimola mabele mpo na koluka kokweyisa mir,
And they came and besieged him in Abel of Bethmaachah, and they cast up a bank against the city, and it stood in the trench: and all the people that were with Joab battered the wall, to throw it down.
16 mwasi moko ya bwanya agangaki wuta na engumba: « Boyoka! Boyoka! Boyebisa Joabi ete aya awa mpo ete naloba na ye. »
Then cried a wise woman out of the city, Hear, hear; say, I pray you, unto Joab, Come near here, that I may speak with you.
17 Joabi apusanaki pene na ye, mpe mwasi yango atunaki ye: — Yo nde Joabi? Azongisaki: — Iyo, ezali ngai. Mwasi alobaki: — Yoka makambo oyo mwasi mosali na yo azali koloba. Joabi azongisaki: — Nazali koyoka.
And when he was come near unto her, the woman said, Are you Joab? And he answered, I am he. Then she said unto him, Hear the words of your handmaid. And he answered, I do hear.
18 Mwasi yango akobaki koloba: — Na kala, bazalaki na ezaleli ya koloba: « Botuna mayele na mboka Abele, » mpe likambo esili.
Then she spoke, saying, They were known to speak in old time, saying, They shall surely ask counsel at Abel: and so they ended the matter.
19 Tozali bato ya kimia mpe ya sembo kati na Isalaele. Kasi yo ozali koluka koboma engumba oyo ezali mama kati na Isalaele! Mpo na nini olingi kobebisa libula ya Yawe?
I am one of them that are peaceable and faithful in Israel: you seek to destroy a city and a mother in Israel: why will you swallow up the inheritance of the LORD?
20 Joabi azongisaki: — Mosika na ngai! Mosika na ngai likanisi ya kobebisa to koboma!
And Joab answered and said, Far be it, far be it from me, that I should swallow up or destroy.
21 Ezali bongo te. Kasi Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya etuka ya bangomba ya Efrayimi, atombokelaki mokonzi Davidi. Kaba ye, ye moko kaka, mpe nakotika kozingela engumba. Mwasi yango alobaki na Joabi: — Bakobwakela yo moto na ye na likolo ya mir.
The matter is not so: but a man of mount Ephraim, Sheba the son of Bichri by name, has lifted up his hand against the king, even against David: deliver him only, and I will depart from the city. And the woman said unto Joab, Behold, his head shall be thrown to you over the wall.
22 Bongo mwasi akendeki epai ya bato nyonso mpe ayebisaki bango maloba na ye ya bwanya. Boye bakataki moto ya Sheba, mwana mobali ya Bikiri, mpe babwakelaki yango Joabi. Bongo Joabi abetaki kelelo, mpe bato na ye bapanzanaki liboso ya engumba; moto na moto azongaki na ndako na ye. Joabi mpe azongaki na Yelusalemi epai ya mokonzi.
Then the woman went unto all the people in her wisdom. And they cut off the head of Sheba the son of Bichri, and cast it out to Joab. And he blew a trumpet, and they retired from the city, every man to his tent. And Joab returned to Jerusalem unto the king.
23 Joabi azalaki kokamba mampinga nyonso ya Isalaele; Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe bato ya Peleti.
Now Joab was over all the host of Israel: and Benaiah the son of Jehoiada was over the Cherethites and over the Pelethites:
24 Adorami azalaki kokamba misala makasi; Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda;
And Adoram was over the tribute: and Jehoshaphat the son of Ahilud was recorder:
25 Sheva azalaki mokomi mikanda; Tsadoki mpe Abiatari bazalaki Banganga-Nzambe;
And Sheva was scribe: and Zadok and Abiathar were the priests:
26 mpe Ira, moto ya Yairi, azalaki Nganga-Nzambe ya Davidi.
And Ira also the Jairite was a chief ruler about David.

< 2 Samuele 20 >