< 2 Samuele 19 >

1 Sango ekomelaki Joabi na koloba: « Mokonzi azali kolela mpe asali matanga mpo na Abisalomi. » 2 Mokolo wana, elonga ebongwanaki matanga mpo na bato nyonso, pamba te bato bayokaki na mokolo wana sango koloba: « Mokonzi azali na mawa makasi mpo na mwana na ye ya mobali. » 3 Na mokolo wana kaka, bato bazongaki na nkuku kati na engumba lokola mampinga oyo bazali koyoka soni mpo ete bakimi na bitumba. 4 Mokonzi azipaki elongi mpe alelaki makasi: « Oh mwana na ngai ya mobali, Abisalomi! Oh mwana na ngai ya mobali, Abisalomi! Mwana na ngai ya mobali! » 5 Joabi akendeki kokuta mokonzi kati na ndako mpe alobaki na ye: « Lelo, oyokisi bato na yo nyonso soni, bato oyo bawuti kobikisa bomoi na yo, bomoi ya bana na yo ya mibali mpe ya basi, bomoi ya basi na yo mpe bomoi ya bamakangu na yo. 6 Olingaka bato oyo bayinaka yo mpe oyinaka bato oyo balingaka yo. Lelo penza, otalisi yango polele ete bakonzi ya basoda mpe basoda na bango bazali pamba na miso na yo. Namoni ete olingaki kosepela lelo soki Abisalomi azalaki na bomoi mpe soki biso nyonso tokufaki. 7 Sik’oyo, bima mpe pesa longonya na basoda na yo. Nalapi ndayi na Kombo na Yawe ete soki obimi te, soda moko te akotikala elongo na yo kino butu eya. Ekozala mpo na yo pasi, koleka makama nyonso oyo ekweyela yo wuta na bolenge na yo kino lelo. » 8 Boye mokonzi atelemaki mpe avandaki na ekuke. Bongo tango bayebisaki basoda ete mokonzi avandi na ekuke, bango nyonso bayaki pene na ye. Mpe na tango wana, bana ya Isalaele bakimaki moto na moto na ndako na ye. 9 Kati na bikolo ya Isalaele, bato bazalaki kotiana tembe mpe koloba: « Mokonzi oyo akangolaki biso na maboko ya banguna na biso, bato ya Filisitia, ye nde sik’oyo akimi mokili likolo ya Abisalomi; 10 mpe Abisalomi oyo topakolaki mafuta mpo ete akamba biso asili kokufa na bitumba. Boye mpo na nini bozali koloba eloko te mpo na kozongisa mokonzi na Yelusalemi? » 11 Mokonzi Davidi atindaki sango epai ya Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari: « Botuna na bampaka ya Yuda: mpo na nini bosengeli kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi na ndako na ye, pamba te makambo oyo ezali kolobama kati na Isalaele mobimba esili kokoma na matoyi ya mokonzi? 12 Bozali bandeko na ngai ya mibali, nzoto na ngai mpe makila na ngai. Bongo mpo na nini kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi? 13 Mpe boloba na Amasa: ‹ Ozali mosuni na ngai mpe makila na ngai te? Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi ndenge alingi soki banda sik’oyo okomi te mokonzi ya mampinga na ngai na esika ya Joabi mpo na libela. › » 14 Makambo oyo Davidi alobaki ekotaki na mitema ya bato nyonso ya Yuda lokola moto moko. Boye batindaki maloba epai ya mokonzi mpo na koloba na ye: « Zonga, yo elongo na basali na yo nyonso. » 15 Mokonzi azongaki mpe akomaki kino na Yordani. Bato ya Yuda bayaki na Giligali mpo na kokende kokutana na mokonzi mpe kokatisa ye mayi ya Yordani. 16 Shimei, mwana mobali ya Gera, moto ya ekolo ya Benjame ya Bawurimi, akendeki mbangu elongo na bato ya Yuda mpo na kokutana na mokonzi Davidi. 17 Azalaki elongo na bato ya Benjame, nkoto moko, mpe Tsiba, moto oyo azalaki kosala kati na libota ya Saulo, elongo na bana na ye ya mibali zomi na mitano mpe basali na ye, tuku mibale. Bakendeki mbangu na Yordani epai wapi mokonzi azalaki. 18 Bamataki na bwato mpo na kokatisa libota ya mokonzi mpe mpo na kosala nyonso oyo ezali malamu na miso ya mokonzi. Tango Shimei, mwana mobali ya Gera, akatisaki Yordani, akweyaki liboso ya mokonzi 19 mpe alobaki na ye: « Tika ete nkolo na ngai atangela ngai ngambo te, akanisa te mabe oyo mosali na ye asalaki mokolo oyo mokonzi, nkolo na ngai, alongwaki na Yelusalemi. Tika ete mokonzi alongola likambo yango na makanisi na ye. 20 Pamba te ngai, mosali na yo, nayebi ete nasalaki masumu, mpe lelo nayei awa lokola moto ya liboso kati na libota mobimba ya Jozefi mpo na kokutana na mokonzi, nkolo na ngai. » 21 Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, alobaki: — Boni, Shimei asengelaki te kokufa mpo na likambo oyo, pamba te alakelaki mabe mopakolami na Yawe? 22 Davidi azongisaki: — Likambo nini kati na ngai mpe bino bana mibali ya Tseruya? Bokomi lelo banguna na ngai! Boni, basengeli koboma moto moko lelo kati na Isalaele? Nayebi te ete ngai nde nazali lelo mokonzi ya Isalaele? 23 Bongo mokonzi alobaki na Shimei: — Okokufa te. Mpe mokonzi alakaki Shimei na nzela ya ndayi. 24 Mefibosheti, koko ya Saulo, akendeki mpe kokutana na mokonzi. Banda mokolo oyo mokonzi abimaki kino azongaki, Mefibosheti atikalaki kosukola makolo na ye te, akataki mandefu te mpe asukolaki bilamba na ye te. 25 Tango akomaki na Yelusalemi mpo na kokutana na mokonzi, Davidi atunaki ye: — Mefibosheti, mpo na nini okendeki te elongo na ngai? 26 Mefibosheti azongisaki: — Mokonzi, nkolo na ngai, mosali na ngai akosaki ngai. Pamba te lokola ngai, mosali na yo, nazali na mbeba na makolo, namilobelaki: « Nakosenga ete babongisela ngai ane na ngai, mpe nakomata yango mpo ete nakende elongo na mokonzi. » 27 Kasi Tsiba, mosali na ngai, akosaki ngai. Akoselaki mosali na yo makambo epai ya mokonzi, nkolo na ngai. Mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe. Boye sala sik’oyo makambo oyo omoni ete ezali malamu. 28 Pamba te na makanisi ya mokonzi, nkolo na ngai, esengelaki koboma bato nyonso ya libota ya koko na ngai, Saulo; kasi atako bongo, ondimaki mosali na yo na mesa, kati na bato oyo bazali kolia elongo na yo. Boye makoki nini nakoki lisusu kozala na yango ya kosenga eloko epai ya mokonzi? 29 Mokonzi alobaki na ye: — Mpo na nini maloba ebele boye? Nasili kopesa mitindo ete yo mpe Tsiba bokabola bilanga. 30 Mefibosheti alobaki na ye: — Lokola mokonzi, nkolo na ngai, azongi mobimba na ndako na ye, tika ete akamata na ye ata nyonso. 31 Barizilayi, moto ya Galadi, awutaki na Rogelimi mpo na kokatisa ebale Yordani elongo na mokonzi mpe kotika ye kokoba mobembo na ye. 32 Nzokande, Barizilayi akomaki mobange, azalaki na mibu tuku mwambe, mpe ezalaki ye nde asungaki mokonzi na mikolo nyonso oyo mokonzi avandaki na Maanayimi, pamba te azalaki moto ya bozwi mingi. 33 Mokonzi alobaki na Barizilayi: — Katisa elongo na ngai mpe vanda epai na ngai na Yelusalemi, mpe ngai nakosunga yo. 34 Kasi Barizilayi azongiselaki mokonzi: — Natikali na mibu boni mpo ete nakende elongo na mokonzi na Yelusalemi? 35 Nazali sik’oyo na mibu tuku mwambe. Boni, nakoki na ngai lisusu kokesenisa malamu mpe mabe? Mosali na yo akoki koyoka lisusu elengi ya biloko oyo azali kolia mpe komela? Nakoki lisusu koyoka mongongo ya bayembi ya mibali mpe ya basi? Bongo mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, akoki lisusu komitungisa mpo na mosali na yo? 36 Mosali na yo akokatisa Yordani elongo na mokonzi mpo na mwa tango moke kaka. Kasi mpo na nini mokonzi akoki kopesa ngai lifuti ya boye? 37 Nabondeli yo, tika ete mosali na yo azonga mpo na kokufa na engumba na ngai pene ya kunda ya tata mpe mama na ngai! Kasi tala mwana na ngai ya mobali, mosali na yo, Kimeami. Tika ete akende elongo na mokonzi, nkolo na ngai, mpe salela ye makambo oyo yo omoni ete ezali malamu. 38 Mokonzi azongisaki: — Tika ete Kimeami akende elongo na ngai, mpe ngai nakosalela ye makambo oyo ezali malamu na miso na yo. Nakosalela ye nyonso oyo akosenga ngai. 39 Sima na bato nyonso kokatisa ebale Yordani, mokonzi mpe akatisaki. Bongo mokonzi apesaki Barizilayi beze mpe apambolaki ye. Mpe Barizilayi azongaki na ndako na ye. 40 Tango mokonzi akatisaki na Giligali, Kimeami mpe akatisaki elongo na ye. Bato nyonso ya Yuda mpe ndambo ya mabota ya Isalaele balekisaki mokonzi. 41 Kasi na mbala moko, bato nyonso ya Isalaele bayaki epai ya mokonzi mpe balobaki na ye: — Mpo na nini bandeko na biso, bato ya Yuda, bazwaki yo na kobombama? Mpo na nini balekisaki mokonzi na ebale Yordani, elongo na libota na ye mpe bato nyonso ya Davidi elongo na ye? 42 Bato nyonso ya Yuda bazongiselaki bato ya Isalaele: — Tosalaki bongo, pamba te mokonzi azali ndeko na biso ya mosika te. Bongo mpo na nini kosilika na tina na yango? Boni, tobikaki bomoi na biso mpo na mokonzi? Tozwaki ata eloko moko mpo na biso? 43 Bato ya Isalaele bazongiselaki bato ya Yuda: — Tozali na makoki kati na mokonzi koleka mbala zomi, mpe biso nde tozali na makoki mingi koleka bino na tina na Davidi. Mpo na nini bozali komona biso lokola bato pamba. Tozalaki bato ya liboso te na koluka ndenge nini kozongisa mokonzi na biso? Kasi bato ya Yuda bazongiselaki bato ya Isalaele na maloba makasi.

< 2 Samuele 19 >