< 2 Samuele 15 >

1 Na tango wana, Abisalomi azwaki shar, bampunda mpe basoda tuku mitano oyo bazalaki kotambola liboso na ye lokola bakengeli na ye.
It came about after this that Absalom prepared a chariot and horses for himself, with fifty men to run before him.
2 Abisalomi azalaki kolamuka na tongo makasi mpe azalaki kokende kotelema pembeni ya nzela oyo ekenda na ekotelo ya engumba. Bongo, tango nyonso moto azalaki koleka mpo na kokende epai ya mokonzi mpo ete akatela ye likambo, ye Abisalomi azalaki kobenga ye mpe kotuna ye: — Ozali moto ya engumba nini? Soki moto yango azongisi: — Mosali na yo azali moto ya moko kati na bikolo ya Isalaele.
Absalom would get up early and stand beside the road leading to the city gate. When any man had a dispute to come to the king for judgment, Absalom called to him and said, “From what city have you come?” Then the man would answer, “Your servant is from one of the tribes of Israel.”
3 Abisalomi azalaki koloba na ye: — Tala, likambo na yo ezali malamu mpe sembo; kasi ezali na moto moko te oyo akoki koyoka yo epai ya mokonzi.
So Absalom would say to him, “Look, your case is good and right, but there is no one empowered by the king to hear your case.”
4 Abisalomi azalaki kobakisa: — Ah! Soki nazalaki mosambisi kati na mokili oyo, moto nyonso oyo azali na likambo alingaki koya epai na ngai, mpe nalingaki kolongisa ye na likambo yango!
Absalom added, “I wish that I were made judge in the land, so that every man who had any dispute or cause might come to me, and I would bring him justice!”
5 Mpe tango nyonso moto azalaki kopusana mpo na kogumbama liboso na ye Abisalomi, Abisalomi azalaki kopesa loboko, koyamba mpe kopesa ye beze.
So it came about that when any man came to Absalom to honor him, Absalom would put out his hand and take hold of him and kiss him.
6 Azalaki kosala bongo epai ya bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kokende epai ya mokonzi mpo ete akata likambo na bango, mpe ezalaki bongo nde Abisalomi azalaki komikotisa na mayele kati na mitema ya bato ya Isalaele.
Absalom acted in this way to all Israel who came to the king for judgment. So Absalom stole the hearts of the men of Israel.
7 Sima na mibu minei, Abisalomi alobaki na mokonzi: — Pesa ngai nzela mpo ete nakende na Ebron mpo na kokokisa ndayi oyo nalapaki epai na Yawe,
It came about at the end of four years that Absalom said to the king, “Please let me go and pay a vow that I have made to Yahweh in Hebron.
8 pamba te tango mosali na yo azalaki kovanda na Geshuri kati na Siri, nalapaki ndayi oyo: « Soki Yawe azongisi ngai na Yelusalemi, nakogumbamela Ye. »
For your servant made a vow while I was living at Geshur in Aram, saying,' If Yahweh will indeed bring me again to Jerusalem, then I will worship Yahweh.'”
9 Mokonzi alobaki na ye: — Kende na kimia. Boye akendeki na Ebron.
So the king said to him, “Go in peace.” So Absalom arose and went to Hebron.
10 Mpe longwa kuna, Abisalomi atindaki bantoma kati na bikolo nyonso ya Isalaele mpo na koloba: « Tango kaka bokoyoka lokito ya kelelo, boloba: ‹ Abisalomi akomi mokonzi kati na Ebron. › »
But then Absalom sent spies throughout all the tribes of Israel, saying, “As soon as you hear the sound of the trumpet, then you must say, 'Absalom is king in Hebron.'”
11 Mibali nkama mibale babengisamaki wuta na Yelusalemi mpe bakendeki elongo na Abisalomi. Bakendeki na boboto mpe bayebaki ata likambo moko te.
With Absalom went two hundred men from Jerusalem, who were invited. They went in their innocence, not knowing anything that Absalom had planned.
12 Wana Abisalomi azalaki kobonza mbeka, abengisaki Ayitofeli, moto ya Gilo, mopesi toli ya Davidi, wuta na engumba na ye ya Gilo. Boye, likita ya batomboki ekomaki makasi; mpe lisanga ya Abisalomi ekomaki na bato ebele.
While Absalom offered sacrfices, he sent for Ahithophel from his hometown of Giloh. He was David's counselor. Absalom's conspiracy was strong, for the people following Absalom were constantly increasing.
13 Ntoma moko ayaki koyebisa Davidi: — Mitema ya bato ya Isalaele esangani elongo na Abisalomi.
A messenger came to David saying, “The hearts of the men of Israel are following after Absalom.”
14 Davidi alobaki na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi: — Boya! Tosengeli kokima, soki te moko te kati na biso akobika liboso ya Abisalomi. Tosengeli kobima na lombangu, soki te akoya na lombangu kokanga biso, kobebisa biso mpe koboma engumba na mopanga.
So David said to all his servants who were with him at Jerusalem, “Arise and let us flee, or none of us will escape from Absalom. Prepare to leave immediately, or he will quickly overtake us, and he will bring down disaster on us and attack the city with the edge of the sword.”
15 Bakalaka ya mokonzi bazongiselaki Davidi: — Basali na yo bazali ya kobongama mpo na kosala makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na biso, akopona.
The king's servants said to the king, “Look, your servants are ready to do whatever our master the king decides.”
16 Mokonzi akendeki na makolo elongo na libota na ye mobimba oyo ezalaki kolanda ye; kasi atikaki bamakangu zomi mpo na kobatela ndako na ye.
The king left and all his family after him, but the king left ten women, who were concubines, to keep the palace.
17 Boye mokonzi akendeki na makolo elongo na bato na ye nyonso oyo bazalaki kolanda ye mpe batelemaki pene ya ndako ya suka ya engumba.
After the king went out and all the people after him, they stopped at the last house.
18 Basoda na ye nyonso bazalaki kotambola na bapembeni na ye elongo na bato nyonso ya Kereti mpe ya Peleti. Mpe bato nyonso ya Gati, nkama motoba, oyo batambolaki elongo na ye longwa na Gati, bazalaki kotambola liboso ya mokonzi.
All his army marched with him, and before him went all the Kerethites, and all the Pelethites, and all the Gittites—six hundred men who had followed him from Gath.
19 Mokonzi alobaki na Itayi, moto ya Gati: — Mpo na nini yo mpe olingi koya elongo na biso? Zonga mpe vanda elongo na Abisalomi, mokonzi ya sika! Ozali mopaya, otikaki mboka na yo mpo na koya kokima awa.
Then the king said to Ittai the Gittite, “Why will you come with us? Return and stay with the king, for you are a foreigner and an exile. Return to your own place.
20 Oyaki mpe kaka lobi oyo ewuti koleka, bongo ndenge nini, lelo, namema yo elongo na biso wana nayebi kutu te epai nini nazali kokende? Zonga mpe zwa bato ya mboka na yo! Tika ete bolamu mpe boyengebene ya Yawe ezala elongo na yo!
Since you just left yesterday, why should I make you wander all over with us? I do not even know where I am going. So return and take your fellow countrymen back. May loyalty and faithfulness go with you.”
21 Itayi azongiselaki mokonzi: — Na Kombo na Yawe mpe na kombo ya mokonzi, nkolo na ngai, mosali na yo akozala bipai nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, akozala, ezala mpo na bomoi to mpo na kufa.
But Ittai answered the king and said, “As Yahweh lives, and as my master the king lives, surely in whatever place where my master the king goes, there also will your servant go, whether that means living or dying.”
22 Davidi alobaki na Itayi: — Malamu! Leka liboso mpe tambola! Boye Itayi, moto ya Gati, atambolaki liboso elongo na basoda nyonso mpe mabota oyo ezalaki elongo na ye.
So David said to Ittai, “Go ahead and continue with us.” So Ittai the Gittite marched with the king, along with all his men and all the families who were with him.
23 Tango bato nyonso bazalaki koleka, mboka mobimba ezalaki kolela makasi. Mokonzi akatisaki lubwaku ya Sedron, mpe bato nyonso bakendeki na nzela oyo ekenda na esobe.
All the country wept with a loud voice as all the people passed by over the Kidron Valley, and as the king also himself crossed over. All the people traveled on the road toward the wilderness.
24 Tsadoki mpe azalaki wana elongo na Balevi oyo bazalaki elongo na ye mpe bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Nzambe. Bakitisaki Sanduku ya Nzambe, mpe Abiatari abonzaki mbeka kino tango bato nyonso basilisaki kobima na engumba.
Even Zadok with all the Levites, carrying the ark of the covenant of God, were present. They set the ark of God down, and then Abiathar joined them. They waited until all the people had passed by out of the city.
25 Mokonzi alobaki na Tsadoki: — Zongisa Sanduku ya Nzambe kati na engumba. Soki nazwi ngolu na miso ya Yawe, akozongisa ngai mpe akopesa ngai nzela ya komona lisusu Sanduku yango mpe ndako na yango.
The king said to Zadok, “Carry the ark of God back into the city. If I find favor in the eyes of Yahweh, he will bring me back here and show me again the ark and the place where he lives.
26 Kasi soki Nzambe alobi: « Nasepeli na yo te, » wana tika ete asala epai na ngai makambo oyo amoni ete ezali malamu, pamba te nazali ya kobongama.
But if he says, 'I am not pleased with you,' look, here am I, let him do to me whatever seems good to him.”
27 Mokonzi alobaki lisusu epai ya Nganga-Nzambe Tsadoki: — Ozali momoni makambo te? Zonga na kimia na engumba elongo na Ayimaatsi, mwana na yo ya mobali, mpe Jonatan, mwana mobali ya Abiatari. Yo mpe Abiatari, bozwa mpe bomema bana na bino mibale ya mibali.
The king also said to Zadok the priest, “Are you not a seer? Return into the city in peace, and your two sons with you, Ahimaaz your son, and Jonathan son of Abiathar.
28 Nakozela na bitando ya esobe kino nakoyoka liloba kowuta epai na bino.
See, I will wait at the fords of the Arabah until word comes from you to inform me.”
29 Boye Tsadoki mpe Abiatari bazongisaki Sanduku ya Nzambe, na Yelusalemi, mpe batikalaki kuna.
So Zadok and Abiathar carried the ark of God back into Jerusalem, and they stayed there.
30 Kasi Davidi azalaki komata ngomba ya banzete ya olive na kolela, moto na ye ya kozipama mpe makolo ngulu. Bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bazipaki bango mpe mito na bango mpe bazalaki kolela wana bazalaki komata.
But David ascended barefoot and weeping up the Mount of Olives, and he had his head covered. Every man of the people who were with him covered his head, and they went up weeping as they walked.
31 Bayaki koyebisa Davidi ete Ayitofeli azali kati na bato oyo basalaki likita elongo na Abisalomi. Boye Davidi asambelaki: « Eh Yawe, sala ete batoli ya Ayitofeli ezanga tina. »
Someone told David saying, “Ahithophel is among the conspirators with Absalom.” So David prayed, “O Yahweh, please turn Ahithophel's advice into foolishness.”
32 Tango Davidi akomaki na songe ya ngomba epai wapi bato bazalaki na momesano ya kokende kogumbamela Nzambe, Ushayi, moto ya Ariki, mopesi toli ya Davidi, azalaki kuna mpo na kokutana na ye, na nzambala na ye epasuka mpe moto na ye etonda na putulu.
It came about that when David arrived at the top of the road, where God used to be worshiped, Hushai the Arkite came to meet him with his coat torn and earth on his head.
33 Davidi alobaki na ye: — Soki okeyi elongo na ngai, okozala mokumba mpo na ngai.
David said to him, “If you travel with me, then you will be a burden to me.
34 Kasi soki ozongi na engumba mpe olobi na Abisalomi: « Nakozala mosali na yo, oh mokonzi! Kala, nazalaki mosali ya tata na yo, kasi sik’oyo, nakozala mosali na yo, » wana okosunga ngai na kobebisa toli ya Ayitofeli.
But if you return to the city and say to Absalom, 'I will be your servant, king, as I have been your father's servant in time past, so will I now be your servant,' then you will confuse Ahithophel's advice for me.
35 Lokola Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari bakozala kuna elongo na yo, okoyebisa bango makambo nyonso oyo okoyoka na ndako ya mokonzi.
Will you not have the priests Zadok and Abiathar with you? So whatever you hear in the king's palace, you must tell it to Zadok and Abiathar the priests.
36 Bana na bango ya mibali mibale, Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, mpe Jonatan, mwana mobali ya Abiatari, bazali mpe kuna elongo na bango. Okotinda bango mpo ete baya koyebisa ngai makambo nyonso oyo okoyoka.
See that they have there with them their two sons, Ahimaaz, Zadok's son, and Jonathan, Abiathar's son. You must send to me by their hand everything that you hear.”
37 Boye Ushayi, moninga ya Davidi, azongaki na engumba, kaka na tango oyo Abisalomi mpe akotaki kati na Yelusalemi.
So Hushai, David's friend, came into the city as Absalom arrived and entered into Jerusalem.

< 2 Samuele 15 >