< 2 Petelo 1 >

1 Ngai Simona Petelo, mosali mpe ntoma ya Yesu-Klisto; Epai ya bato oyo bazwaki kondima ya motuya moko na kondima na biso, na nzela ya bosembo ya Yesu-Klisto, Nzambe na biso mpe Mobikisi na biso:
Од Симона Петра, слуге и апостола Исуса Христа, онима што су примили с нама једну часну веру у правди Бога нашег и спаса Исуса Христа:
2 Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki, na nzela ya koyeba Nzambe mpe Yesu, Nkolo na biso!
Благодат и мир да вам се умножи познавањем Бога и Христа Исуса Господа нашег.
3 Nzambe apesaki biso, na nzela ya nguya na Ye ya bonzambe, nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kobika bomoi ya botosi kati na makambo ya Nzambe mpe mpo na kokangama na Ye; asalaki yango na kopesa biso boyebi ya Ye oyo abenga biso mpo ete tosangana na nkembo mpe na bolamu na Ye.
Будући да су нам све божанствене силе Његове, које требају к животу и побожности, дароване познањем Оног који нас позва славом и добродетељи,
4 Na nzela ya nkembo mpe bolamu yango, apesaki biso bilaka minene mpe ya motuya makasi mpo ete, na nzela na yango, bosangana na bonzambe mpe bokima libebi oyo baposa mabe ezali kovandisa kati na mokili.
Кроз које се нама дароваше часна и превелика обећања, да њих ради имате део у Божјој природи, ако утечете од телесних жеља овог света.
5 Mpo na yango, bosala makasi mpo na kobakisa na likolo ya kondima na bino, bolamu; na likolo ya bolamu, boyebi;
И на само ово окрените све старање своје да покажете у вери својој добродетељ, а у добродетељи разум,
6 na likolo ya boyebi, komikanga; na likolo ya komikanga, mpiko; na likolo ya mpiko, botosi kati na makambo ya Nzambe;
А у разуму уздржање, а у уздржању трпљење, а у трпљењу побожност,
7 na likolo ya botosi kati na makambo ya Nzambe, bondeko ya solo; mpe na likolo ya bondeko ya solo, bolingo.
А у побожности братољубље, а у братољубљу љубав.
8 Pamba te soki bozali na bizaleli oyo ya malamu kati na bino mpe botondi na yango, ekosala ete bozala basali ya goyigoyi te mpe bokola makasi na boyebi ya Nzambe na biso mpe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
Јер кад је ово у вама, и множи се, неће вас оставити лене нити без плода у познању Господа нашег Исуса Христа.
9 Kasi moto nyonso oyo azangi yango amonaka mosika te, azali lokola mokufi miso; abosani ete basila kopetola ye, wuta kala, na masumu na ye.
А ко нема овог слеп је, и пипа заборавивши очишћење од старих својих греха.
10 Yango wana, bandeko na ngai, bosala lisusu makasi koleka mpo na kolakisa na bato ete Nzambe abenga penza bino mpe apona bino; pamba te soki bosali bongo, bokotikala kokweya te.
Зато, браћо, постарајте се још већма да своју службу и избор утврдите; јер чинећи ово нећете погрешити никад;
11 Na bongo, bokoyambama malamu kati na Bokonzi ya seko ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. (aiōnios g166)
Јер вам се тако обилно допусти улазак у вечно царство Господа нашег и спаса Исуса Христа. (aiōnios g166)
12 Boye, nakobanda kozongisaka yango tango nyonso na makanisi na bino, atako boyebi yango malamu mpe bokangami makasi na bosolo oyo bozali na yango sik’oyo.
Зато се нећу оленити опомињати вам једнако ово, ако и знате и утврђени сте у овој истини;
13 Namoni ete ezali malamu mpo na ngai kolamusa makanisi na bino awa nazali nanu na bomoi kati na ndako ya kapo ya nzoto oyo;
Јер мислим да је право докле сам год у овом телу да вас будим опомињањем,
14 pamba te nayebi malamu ete, kala mingi te, nakokabwana na nzoto yango, ndenge Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ayebisaki ngai yango.
Знајући да ћу скоро тело своје одбацити као што ми каза и Господ наш Исус Христос.
15 Nzokande, nakosala makasi mpo ete bozalaka tango nyonso na makoki ya kokanisaka yango, ezala nasila na ngai kokende.
А трудићу се свакако да се и по растанку мом можете опомињати овог;
16 Solo, tango toyebisaki bino makambo oyo etali koya ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, kati na nguya na yango nyonso, tolandaki te basambole oyo bato basalaka na mayele na bango, kasi na miso na biso moko, tomonaki Ye kati na kongenga nyonso ya nkembo na Ye.
Јер вам не показасмо силу и долазак Господа нашег Исуса Христа по приповеткама мудро измишљеним, него смо сами видели славу Његову.
17 Pamba te Nzambe Tata apesaki Ye lokumu mpe nkembo, tango mongongo kowuta na nkembo monene ya Nzambe elobaki na Ye: « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »
Јер он прими од Бога Оца част и славу кад дође к Њему такав глас: Ово је Син мој љубазни, који је по мојој вољи.
18 Mpe, biso moko, tango tozalaki elongo na Ye na likolo ya ngomba ya bule, toyokaki mongongo yango kowuta na Likolo.
И овај глас ми чусмо где сиђе с неба кад бејасмо с Њим на светој гори.
19 Tozali lisusu kondima bosolo ya maloba ya basakoli oyo, bozali solo kosala malamu wana bozali kotia makanisi na bino kati na yango lokola na mwinda oyo ezali kopela kati na esika ya molili, kino tongo etana mpe monzoto ya tongo engenga kati na mitema na bino.
И имамо најпоузданију пророчку реч, и добро чините што пазите на њу, као на видело које светли у тамном месту, докле дан не осване и даница се не роди у срцима вашим.
20 Liboso na nyonso, boyeba malamu ete moko te, na mayele na ye moko, akoki kolimbola maloba ya basakoli, oyo ezali kati na Makomi,
И ово знајте најпре да ниједно пророштво књижевно не бива по свом казивању;
21 pamba te maloba yango ya basakoli eyaki te na nzela ya mokano ya moto, kasi ezali Molimo Mosantu nde atindikaki bato na koloba kowuta na Nzambe.
Јер никад пророштво не би од човечије воље, него научени од Светог Духа говорише свети Божији људи.

< 2 Petelo 1 >