< 2 Bakonzi 24 >

1 Wana Yeoyakimi azalaki mokonzi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akotaki na makasi kati na mokili; mpe Yeoyakimi akomaki mosali na ye mibu misato. Kasi sima, abongolaki makanisi mpe atombokelaki Nabukodonozori.
In his days Nebuchadnezzar king of Babylon came up, and Jehoiakim became his servant three years: then he turned and rebelled against him.
2 Yawe atindaki mampinga ya bato ya Chalide, ya Siri, ya Moabi mpe ya Amoni mpo na kobundisa ye. Yawe atindaki bango mpo na kobebisa Yuda kolanda liloba oyo Yawe asakolaki na nzela ya basali na Ye, basakoli.
Jehovah sent against him bands of the Chaldeans, and bands of the Arameans, and bands of the Moabites, and bands of the people of Ammon, and sent them against Judah to destroy it, according to the word of Jehovah, which he spoke by his servants the prophets.
3 Solo, makambo yango ekomelaki Yuda kolanda mitindo na Yawe mpo na kolongola bango na miso na Ye likolo ya masumu ya Manase mpe likolo ya makambo nyonso oyo asalaki;
Surely at the commandment of Jehovah this came on Judah, to remove them out of his sight, for the sins of Manasseh, according to all that he did,
4 bakisa makila oyo asopaki, makila ya bato oyo bayebi likambo te. Pamba te atondisaki Yelusalemi na makila ya bato oyo bayebaki likambo te; mpe Yawe aboyaki kolimbisa ye.
and also for the innocent blood that he shed; for he filled Jerusalem with innocent blood: and Jehovah would not pardon.
5 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yeoyakimi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
Now the rest of the acts of Jehoiakim, and all that he did, aren't they written in the book of the chronicles of the kings of Judah?
6 Tango Yeoyakimi akufaki, Yeoyakini, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
So Jehoiakim slept with his fathers; and Jehoiachin his son reigned in his place.
7 Mokonzi ya Ejipito azalaki kobima lisusu te elongo na mampinga na ye mpo na kokota na mikili mosusu, mpo ete mokonzi ya Babiloni abotolaki mabele na ye nyonso, longwa na moluka ya nor ya Ejipito kino na ebale Efrate.
The king of Egypt did not come again out of his land any more; for the king of Babylon had taken, from the Wadi of Egypt to the river Perath, all that pertained to the king of Egypt.
8 Yeoyakini azalaki na mibu zomi na mwambe ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki basanza misato na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Newushita. » Newushita azalaki mwana ya Elinatani, moto ya Yelusalemi.
Jehoiachin was eighteen years old when he began to reign; and he reigned in Jerusalem three months: and his mother's name was Nehushta the daughter of Elnathan of Jerusalem.
9 Yeoyakini asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge kaka tata na ye asalaki.
He did that which was evil in the sight of Jehovah, according to all that his father had done.
10 Ezalaki na tango wana nde bakonzi ya basoda ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, babundisaki Yelusalemi mpe bazingelaki engumba yango.
At that time the servants of Nebuchadnezzar king of Babylon came up to Jerusalem, and the city was besieged.
11 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, ayaki ye moko na engumba tango basoda na ye bazalaki kozingela yango.
Nebuchadnezzar king of Babylon came to the city, while his servants were besieging it;
12 Yeoyakini, mokonzi ya Yuda; mama na ye, basali na ye, bakambi na ye mpe bakalaka na ye ya lokumu bamipesaki bango nyonso epai ya mokonzi Nabukodonozori. Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atiaki Yeoyakini na boloko na mobu ya mwambe ya bokonzi na ye.
and Jehoiachin the king of Judah went out to the king of Babylon, he, and his mother, and his servants, and his officers, and his officers. And the king of Babylon took him in the eighth year of his reign.
13 Ndenge Yawe alobaki yango, Nabukodonozori azwaki bomengo nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na ndako ya mokonzi; bongo amemaki biloko nyonso ya wolo oyo Salomo, mokonzi ya Isalaele, asalaki mpo na Tempelo ya Yawe.
He carried out there all the treasures of the house of Jehovah, and the treasures of the king's house, and cut in pieces all the vessels of gold, which Solomon king of Israel had made in Jehovah's temple, as Jehovah had said.
14 Amemaki Yelusalemi mobimba na bowumbu: bakonzi nyonso ya basoda mpe basoda, bato nyonso ya mayele ya misala ya maboko mpe ba-oyo basalelaka bibende. Bango nyonso bazalaki bato nkoto zomi. Kaka babola nde batikalaki kati na mokili.
He carried away all Jerusalem, and all the officials, and all the mighty men of valor, even ten thousand captives, and all the craftsmen and the smiths; none remained, except the poorest sort of the people of the land.
15 Nabukodonozori amemaki Yeoyakini na bowumbu na Babiloni; amemaki mpe, longwa na Yelusalemi kino na Babiloni, mama ya mokonzi, basi ya mokonzi, bakalaka ya lokumu mpe bankumu ya mokili.
He carried away Jehoiachin to Babylon; and the king's mother, and the king's wives, and his officers, and the chief men of the land, carried he into captivity from Jerusalem to Babylon.
16 Mokonzi ya Babiloni amemaki mpe na bowumbu na Babiloni mampinga nyonso ya bato nkoto sambo oyo bazalaki makasi mpe babongisama mpo na bitumba, bakisa bato nkoto moko oyo basalaka misala ya maboko mpe oyo basalelaka bibende.
All the men of might, even seven thousand, and the craftsmen and the smiths one thousand, all of them strong and apt for war, even them the king of Babylon brought captive to Babylon.
17 Mokonzi ya Babiloni akomisaki Matania, noko ya Yeoyakini, mokonzi na esika na ye; mpe abongolaki kombo na ye, akomisaki yango « Sedesiasi. »
The king of Babylon made Mattaniah, Jehoiachin's father's brother, king is his place, and changed his name to Zedekiah.
18 Sedesiasi azalaki na mibu tuku mibale na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Amutali. » Amutali azalaki mwana ya Jeremi, moto ya Libina.
Zedekiah was twenty-one years old when he began to reign; and he reigned eleven years in Jerusalem: and his mother's name was Hamutal the daughter of Jeremiah of Libnah.
19 Sedesiasi asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, ndenge kaka Yeoyakimi asalaki.
He did that which was evil in the sight of Jehovah, according to all that Jehoiakim had done.
20 Ezalaki mpo na kanda makasi ya Yawe nde makambo oyo nyonso esalemelaki Yelusalemi mpe Yuda, kino Yawe kobengana bango mosika ya elongi na Ye. Nzokande, Sedesiasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni.
For through the anger of Jehovah, it happened in Jerusalem and Judah, until he had cast them out from his presence. Zedekiah rebelled against the king of Babylon.

< 2 Bakonzi 24 >