< 2 Masolo ya Kala 31 >

1 Tango feti nyonso esilaki, bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kuna bakendeki na bingumba ya Yuda, babukaki makonzi ya bule, bakweyisaki bikeko ya nzambe mwasi Ashera mpe bapanzaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo kati na Yuda nyonso, kati na Benjame, kati na Efrayimi mpe kati na Manase. Sima na kobebisa biloko wana nyonso, bato ya Isalaele bazongaki kati na bingumba na bango mpe bandako na bango.
καὶ ὡς συνετελέσθη πάντα ταῦτα ἐξῆλθεν πᾶς Ισραηλ οἱ εὑρεθέντες ἐν πόλεσιν Ιουδα καὶ συνέτριψαν τὰς στήλας καὶ ἐξέκοψαν τὰ ἄλση καὶ κατέσπασαν τὰ ὑψηλὰ καὶ τοὺς βωμοὺς ἀπὸ πάσης τῆς Ιουδαίας καὶ Βενιαμιν καὶ ἐξ Εφραιμ καὶ ἀπὸ Μανασση ἕως εἰς τέλος καὶ ἐπέστρεψαν πᾶς Ισραηλ ἕκαστος εἰς τὴν κληρονομίαν αὐτοῦ καὶ εἰς τὰς πόλεις αὐτῶν
2 Ezekiasi atiaki Banganga-Nzambe mpe Balevi na masanga mpe apesaki na moko na moko mosala kati na lisanga na ye. Banganga-Nzambe mpe Balevi bapesamelaki mosala ya bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, mosala ya kozongisa matondi mpe ya koyemba banzembo mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe, na bikuke ya Tempelo ya Yawe.
καὶ ἔταξεν Εζεκιας τὰς ἐφημερίας τῶν ἱερέων καὶ τῶν Λευιτῶν καὶ τὰς ἐφημερίας ἑκάστου κατὰ τὴν ἑαυτοῦ λειτουργίαν τοῖς ἱερεῦσιν καὶ τοῖς Λευίταις εἰς τὴν ὁλοκαύτωσιν καὶ εἰς τὴν θυσίαν τοῦ σωτηρίου καὶ αἰνεῖν καὶ ἐξομολογεῖσθαι καὶ λειτουργεῖν ἐν ταῖς πύλαις ἐν ταῖς αὐλαῖς οἴκου κυρίου
3 Mokonzi azwaki ndambo ya bozwi na ye mpe apesaki mpo na bambeka ya kotumba: bambeka ya kotumba ya tongo mpe ya pokwa, ya mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, kolanda ndenge ekomama kati na mibeko ya Yawe.
καὶ μερὶς τοῦ βασιλέως ἐκ τῶν ὑπαρχόντων αὐτοῦ εἰς τὰς ὁλοκαυτώσεις τὴν πρωινὴν καὶ τὴν δειλινὴν καὶ ὁλοκαυτώσεις εἰς σάββατα καὶ εἰς τὰς νουμηνίας καὶ εἰς τὰς ἑορτὰς τὰς γεγραμμένας ἐν τῷ νόμῳ κυρίου
4 Mokonzi apesaki mitindo epai ya bavandi ya Yelusalemi ete bapesa ndambo oyo esengeli kopesama epai ya Banganga-Nzambe mpe Balevi mpo ete bamipesa na misala oyo mibeko ya Yawe ezali kotinda bango.
καὶ εἶπεν τῷ λαῷ τοῖς κατοικοῦσιν ἐν Ιερουσαλημ δοῦναι τὴν μερίδα τῶν ἱερέων καὶ τῶν Λευιτῶν ὅπως κατισχύσωσιν ἐν τῇ λειτουργίᾳ οἴκου κυρίου
5 Tango kaka bapanzaki sango ya mitindo oyo, bato ya Isalaele bapesaki na esengo bambuma na bango ya liboso ya ble, ya vino ya sika, ya mafuta, ya mafuta ya nzoyi mpe ya biloko nyonso oyo ebimaka na bilanga. Bamemaki lisusu biloko ebele lokola eteni ya zomi ya nyonso.
καὶ ὡς προσέταξεν τὸν λόγον ἐπλεόνασαν οἱ υἱοὶ Ισραηλ ἀπαρχὴν σίτου καὶ οἴνου καὶ ἐλαίου καὶ μέλιτος καὶ πᾶν γένημα ἀγροῦ καὶ ἐπιδέκατα πάντα εἰς πλῆθος ἤνεγκαν
6 Bato ya Isalaele elongo na bato ya Yuda oyo bazalaki kovanda kati na bingumba ya Yuda bamemaki eteni na bango ya zomi ya bangombe, ya bameme, ya bantaba mpe ya makabo ya bule oyo ebulisamaki mpo na Yawe, Nzambe na bango, mpe batiaki yango na mipiku.
οἱ υἱοὶ Ισραηλ καὶ Ιουδα καὶ οἱ κατοικοῦντες ἐν ταῖς πόλεσιν Ιουδα καὶ αὐτοὶ ἤνεγκαν ἐπιδέκατα μόσχων καὶ προβάτων καὶ ἐπιδέκατα αἰγῶν καὶ ἡγίασαν τῷ κυρίῳ θεῷ αὐτῶν καὶ εἰσήνεγκαν καὶ ἔθηκαν σωροὺς σωρούς
7 Babandaki kosala mipiku yango na sanza ya misato mpe basilisaki na sanza ya sambo.
ἐν τῷ μηνὶ τῷ τρίτῳ ἤρξαντο οἱ σωροὶ θεμελιοῦσθαι καὶ ἐν τῷ ἑβδόμῳ μηνὶ συνετελέσθησαν
8 Tango Ezekiasi elongo na bakalaka na ye bayaki komona mipiku yango, bakumisaki Yawe mpe bapambolaki Isalaele, bato na Ye.
καὶ ἦλθεν Εζεκιας καὶ οἱ ἄρχοντες καὶ εἶδον τοὺς σωροὺς καὶ ηὐλόγησαν τὸν κύριον καὶ τὸν λαὸν αὐτοῦ Ισραηλ
9 Ezekiasi atunaki Banganga-Nzambe mpe Balevi na tina na mipiku yango.
καὶ ἐπυνθάνετο Εζεκιας τῶν ἱερέων καὶ τῶν Λευιτῶν ὑπὲρ τῶν σωρῶν
10 Azaria, mokonzi ya Banganga-Nzambe, moto ya libota ya Tsadoki, azongisaki: — Wuta tango bato babandaki komema makabo na bango kati na Tempelo ya Yawe, toliaki, totondaki mpe totiki ebele, pamba te Yawe apambolaki bato na Ye. Mipiku ya biloko oyo ozali komona awa ezali nde oyo etikali.
καὶ εἶπεν πρὸς αὐτὸν Αζαριας ὁ ἱερεὺς ὁ ἄρχων εἰς οἶκον Σαδωκ καὶ εἶπεν ἐξ οὗ ἦρκται ἡ ἀπαρχὴ φέρεσθαι εἰς οἶκον κυρίου ἐφάγομεν καὶ ἐπίομεν καὶ κατελίπομεν ὅτι κύριος ηὐλόγησεν τὸν λαὸν αὐτοῦ καὶ κατελίπομεν ἔτι τὸ πλῆθος τοῦτο
11 Ezekiasi apesaki mitindo ete babongisa bisika mpo na kobomba biloko yango kati na Tempelo ya Yawe; mpe esalemaki bongo.
καὶ εἶπεν Εζεκιας ἑτοιμάσαι παστοφόρια εἰς οἶκον κυρίου καὶ ἡτοίμασαν
12 Bakomaki kotia kuna na boyengebene makabo ya bato, biteni ya zomi mpe makabo mosusu ya bule. Molevi Konania azalaki na mokumba ya kobatela biloko yango elongo na Shimei, ndeko na ye ya mobali, lokola molandi na ye.
καὶ εἰσήνεγκαν ἐκεῖ τὰς ἀπαρχὰς καὶ τὰ ἐπιδέκατα ἐν πίστει καὶ ἐπ’ αὐτῶν ἐπιστάτης Χωνενιας ὁ Λευίτης καὶ Σεμεϊ ὁ ἀδελφὸς αὐτοῦ διαδεχόμενος
13 Kolandisama na mokano ya mokonzi Ezekiasi mpe ya Azaria, mokonzi ya Banganga-Nzambe ya Tempelo ya Nzambe, Yeyeli, Azazia, Naati, Asaeli, Yerimoti, Yozabadi, Elieli, Yisimakia, Maati mpe Benaya bazalaki bakengeli ya misala na bokambami ya Konania mpe Shimei, ndeko na ye ya mobali.
καὶ Ιιηλ καὶ Οζαζιας καὶ Ναεθ καὶ Ασαηλ καὶ Ιεριμωθ καὶ Ιωζαβαθ καὶ Ελιηλ καὶ Σαμαχια καὶ Μααθ καὶ Βαναιας καὶ οἱ υἱοὶ αὐτοῦ καθεσταμένοι διὰ Χωνενιου καὶ Σεμεϊ τοῦ ἀδελφοῦ αὐτοῦ καθὼς προσέταξεν ὁ βασιλεὺς Εζεκιας καὶ Αζαριας ὁ ἡγούμενος οἴκου κυρίου
14 Molevi Kore, mwana mobali ya Yimina, oyo azalaki mokengeli ekuke ya ngambo ya este azalaki na mokumba ya koyamba makabo oyo bato bazalaki kopesa epai ya Nzambe, wuta na mokano ya mitema na bango; azalaki mpe na mokumba ya kokabola makabo oyo bazalaki kokongola mpo na Yawe mpe makabo ya bule.
καὶ Κωρη ὁ τοῦ Ιεμνα ὁ Λευίτης ὁ πυλωρὸς κατὰ ἀνατολὰς ἐπὶ τῶν δομάτων δοῦναι τὰς ἀπαρχὰς κυρίῳ καὶ τὰ ἅγια τῶν ἁγίων
15 Kati na bingumba ya Banganga-Nzambe, Kore asungamaki na Edeni, Minyamini, Jozue, Shemaya, Amaria mpe Shekania, mpo na kokabola biloko na boyengebene epai ya bandeko na bango Banganga-Nzambe kolanda masanga na bango; bazalaki kosala bokeseni te kati na bato minene mpe bato mike.
διὰ χειρὸς Οδομ καὶ Βενιαμιν καὶ Ἰησοῦς καὶ Σεμεϊ καὶ Αμαριας καὶ Σεχονιας διὰ χειρὸς τῶν ἱερέων ἐν πίστει δοῦναι τοῖς ἀδελφοῖς αὐτῶν κατὰ τὰς ἐφημερίας κατὰ τὸν μέγαν καὶ τὸν μικρὸν
16 Bazalaki kopesa kaka te na mibali oyo bakombo na bango ekomamaki, kobanda na mibu misato ya mbotama mpe komata, kasi bazalaki mpe kopesa na bato nyonso oyo bazalaki kokota na Tempelo ya Yawe mpo na kosala misala na bango ya mokolo na mokolo kolanda mikumba mpe masanga na bango.
ἐκτὸς τῆς ἐπιγονῆς τῶν ἀρσενικῶν ἀπὸ τριετοῦς καὶ ἐπάνω παντὶ τῷ εἰσπορευομένῳ εἰς οἶκον κυρίου εἰς λόγον ἡμερῶν εἰς ἡμέραν εἰς λειτουργίαν ἐφημερίαις διατάξεως αὐτῶν
17 Bapesaki na Banganga-Nzambe oyo bakombo na bango ekomamaki kolanda mabota na bango ya botata mpe na Balevi oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda mibu tuku mibale mpe komata, kolanda mikumba mpe masanga na bango;
οὗτος ὁ καταλοχισμὸς τῶν ἱερέων κατ’ οἴκους πατριῶν καὶ οἱ Λευῖται ἐν ταῖς ἐφημερίαις αὐτῶν ἀπὸ εἰκοσαετοῦς καὶ ἐπάνω ἐν διατάξει
18 bapesaki na bana mike nyonso, na basi, na bana mibali mpe na bana basi ya lisanga mobimba, ba-oyo bakombo na bango ekomamaki kati na buku ya milongo ya mbotama, pamba te bazalaki kokokisa na boyengebene mibeko ya libulisi mpo na kozala bule.
ἐν καταλοχίαις ἐν πάσῃ ἐπιγονῇ υἱῶν αὐτῶν καὶ θυγατέρων αὐτῶν εἰς πᾶν τὸ πλῆθος ὅτι ἐν πίστει ἥγνισαν τὸ ἅγιον
19 Lokola ndenge ezalaki mpo na Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, oyo bazalaki kovanda na bamboka ya zingazinga ya bingumba na bango, bato baponamaki na bakombo mpo na kokabola biloko epai ya bato nyonso kati na Banganga-Nzambe mpe epai ya Balevi nyonso oyo bakomamaki.
τοῖς υἱοῖς Ααρων τοῖς ἱερατεύουσιν καὶ οἱ ἀπὸ τῶν πόλεων αὐτῶν ἐν πάσῃ πόλει καὶ πόλει ἄνδρες οἳ ὠνομάσθησαν ἐν ὀνόματι δοῦναι μερίδα παντὶ ἀρσενικῷ ἐν τοῖς ἱερεῦσιν καὶ παντὶ καταριθμουμένῳ ἐν τοῖς Λευίταις
20 Ezali boye nde Ezekiasi asalaki kati na mokili na ye mobimba ya Yuda. Asalaki makambo ya malamu, ya sembo mpe ya solo na miso ya Yawe, Nzambe na ye.
καὶ ἐποίησεν οὕτως Εζεκιας ἐν παντὶ Ιουδα καὶ ἐποίησεν τὸ καλὸν καὶ τὸ εὐθὲς ἐναντίον τοῦ κυρίου θεοῦ αὐτοῦ
21 Kati na nyonso oyo Ezekiasi asalaki, ezala mpo na mosala ya Ndako ya Nzambe to mpo na botosi mibeko mpe mitindo, azalaki koluka Nzambe na ye mpe kosala na motema na ye mobimba; mpe azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala.
καὶ ἐν παντὶ ἔργῳ ἐν ᾧ ἤρξατο ἐν ἐργασίᾳ ἐν οἴκῳ κυρίου καὶ ἐν τῷ νόμῳ καὶ ἐν τοῖς προστάγμασιν ἐξεζήτησεν τὸν θεὸν αὐτοῦ ἐξ ὅλης ψυχῆς αὐτοῦ καὶ ἐποίησεν καὶ εὐοδώθη

< 2 Masolo ya Kala 31 >