< 2 Masolo ya Kala 23 >

1 Na mobu ya sambo, Nganga-Nzambe Yeoyada alongolaki kobanga mpe azwaki mokano ya kosala boyokani elongo na bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko: Azaria, mwana mobali ya Yeroami; Isimaeli, mwana mobali ya Yoanani; Azaria, mwana mobali ya Obedi; Maaseya, mwana mobali ya Adaya; mpe Elishafati, mwana mobali ya Zikiri.
καὶ ἐν τῷ ἔτει τῷ ἑβδόμῳ ἐκραταίωσεν Ιωδαε καὶ ἔλαβεν τοὺς ἑκατοντάρχους τὸν Αζαριαν υἱὸν Ιωραμ καὶ τὸν Ισμαηλ υἱὸν Ιωαναν καὶ τὸν Αζαριαν υἱὸν Ωβηδ καὶ τὸν Μαασαιαν υἱὸν Αδαια καὶ τὸν Ελισαφαν υἱὸν Ζαχαρια μετ’ αὐτοῦ εἰς οἶκον
2 Batambolaki kati na Yuda mpe basangisaki Balevi elongo na bakonzi ya mabota ya Isalaele, oyo bawutaki na bingumba nyonso. Tango bayaki na Yelusalemi,
καὶ ἐκύκλωσαν τὸν Ιουδαν καὶ συνήγαγον τοὺς Λευίτας ἐκ πασῶν τῶν πόλεων Ιουδα καὶ ἄρχοντας πατριῶν τοῦ Ισραηλ καὶ ἦλθον εἰς Ιερουσαλημ
3 lisanga mobimba esalaki boyokani elongo na mokonzi kati na Tempelo ya Nzambe. Yeoyada alobaki na bango: « Mwana mobali ya mokonzi asengeli kokonza lokola mokonzi, kolanda elaka oyo Yawe apesaki na tina na bakitani ya Davidi.
καὶ διέθεντο πᾶσα ἐκκλησία Ιουδα διαθήκην ἐν οἴκῳ τοῦ θεοῦ μετὰ τοῦ βασιλέως καὶ ἔδειξεν αὐτοῖς τὸν υἱὸν τοῦ βασιλέως καὶ εἶπεν αὐτοῖς ἰδοὺ ὁ υἱὸς τοῦ βασιλέως βασιλευσάτω καθὼς ἐλάλησεν κύριος ἐπὶ τὸν οἶκον Δαυιδ
4 Sik’oyo, tala ndenge bokosala: ‹ kati na bandambo misato ya lisanga na bino Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bakosala na mokolo ya Saba, ndambo ya liboso bakokengela bikuke,
νῦν ὁ λόγος οὗτος ὃν ποιήσετε τὸ τρίτον ἐξ ὑμῶν εἰσπορευέσθωσαν τὸ σάββατον τῶν ἱερέων καὶ τῶν Λευιτῶν καὶ εἰς τὰς πύλας τῶν εἰσόδων
5 ndambo ya mibale bakokengela ndako ya mokonzi, mpe ndambo ya misato bakokengela ekuke ya Yesodi. Bato nyonso bakozala kati na mapango ya Tempelo ya Yawe.
καὶ τὸ τρίτον ἐν οἴκῳ τοῦ βασιλέως καὶ τὸ τρίτον ἐν τῇ πύλῃ τῇ μέσῃ καὶ πᾶς ὁ λαὸς ἐν αὐλαῖς οἴκου κυρίου
6 Moko te asengeli kokota kati na Tempelo ya Yawe longola kaka Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bakozala na mosala, pamba te bazali bule. Bato nyonso oyo batikali basengeli kotosa mobeko ya Yawe.
καὶ μὴ εἰσελθέτω εἰς οἶκον κυρίου ἐὰν μὴ οἱ ἱερεῖς καὶ οἱ Λευῖται καὶ οἱ λειτουργοῦντες τῶν Λευιτῶν αὐτοὶ εἰσελεύσονται ὅτι ἅγιοί εἰσιν καὶ πᾶς ὁ λαὸς φυλασσέτω φυλακὰς κυρίου
7 Balevi bakozingela mokonzi, moko na moko na ebundeli na ye na loboko. Moto mosusu oyo akomeka kokota na Tempelo ya Yawe, basengeli koboma ye. Bozala pene ya mokonzi na bisika nyonso oyo akokende. › »
καὶ κυκλώσουσιν οἱ Λευῖται τὸν βασιλέα κύκλῳ ἀνδρὸς σκεῦος ἐν χειρὶ αὐτοῦ καὶ ὁ εἰσπορευόμενος εἰς τὸν οἶκον ἀποθανεῖται καὶ ἔσονται μετὰ τοῦ βασιλέως εἰσπορευομένου καὶ ἐκπορευομένου
8 Balevi mpe bato nyonso ya Yuda basalaki ndenge kaka Nganga-Nzambe Yeoyada atindaki. Moko na moko akamataki basoda na ye, ba-oyo bazalaki kokota na mosala na mokolo ya Saba mpe ba-oyo basilisaki mosala na bango na mokolo yango ya Saba, pamba te Nganga-Nzambe Yeoyada apemisaki ndambo moko te.
καὶ ἐποίησαν οἱ Λευῖται καὶ πᾶς Ιουδα κατὰ πάντα ὅσα ἐνετείλατο Ιωδαε ὁ ἱερεύς καὶ ἔλαβον ἕκαστος τοὺς ἄνδρας αὐτοῦ ἀπ’ ἀρχῆς τοῦ σαββάτου ἕως ἐξόδου τοῦ σαββάτου ὅτι οὐ κατέλυσεν Ιωδαε τὰς ἐφημερίας
9 Nganga-Nzambe Yeoyada apesaki na bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko makonga, banguba minene mpe banguba mike ya mokonzi Davidi, oyo ezalaki kati na Tempelo ya Nzambe.
καὶ ἔδωκεν τὰς μαχαίρας καὶ τοὺς θυρεοὺς καὶ τὰ ὅπλα ἃ ἦν τοῦ βασιλέως Δαυιδ ἐν οἴκῳ τοῦ θεοῦ
10 Atiaki bato nyonso zingazinga ya mokonzi, moko na moko na ebundeli na ye na loboko, pembeni ya etumbelo mpe ya Tempelo, wuta na ngambo ya sude kino na ngambo ya nor ya Tempelo.
καὶ ἔστησεν πάντα τὸν λαόν ἕκαστον ἐν τοῖς ὅπλοις αὐτοῦ ἀπὸ τῆς ὠμίας τοῦ οἴκου τῆς δεξιᾶς ἕως τῆς ὠμίας τῆς ἀριστερᾶς τοῦ θυσιαστηρίου καὶ τοῦ οἴκου ἐπὶ τὸν βασιλέα κύκλῳ
11 Babimisaki mwana mobali ya mokonzi, balatisaki ye motole, bapesaki ye mokanda ya boyokani mpe bakomisaki ye mokonzi. Yeoyada mpe bana na ye ya mibali bapakolaki ye mafuta ya bokonzi mpe bagangaki: « Tika ete mokonzi awumela na bomoi! »
καὶ ἐξήγαγεν τὸν υἱὸν τοῦ βασιλέως καὶ ἔδωκεν ἐπ’ αὐτὸν τὸ βασίλειον καὶ τὰ μαρτύρια καὶ ἐβασίλευσαν καὶ ἔχρισαν αὐτὸν Ιωδαε καὶ οἱ υἱοὶ αὐτοῦ καὶ εἶπαν ζήτω ὁ βασιλεύς
12 Tango Atali ayokaki makelele ya bato oyo bazalaki kopota mbangu mpe kobetela mokonzi maboko, akendeki epai ya bato, na Tempelo ya Yawe,
καὶ ἤκουσεν Γοθολια τὴν φωνὴν τοῦ λαοῦ τῶν τρεχόντων καὶ ἐξομολογουμένων καὶ αἰνούντων τὸν βασιλέα καὶ εἰσῆλθεν πρὸς τὸν βασιλέα εἰς οἶκον κυρίου
13 atalaki mpe amonaki mokonzi atelemi na etemelo na ye ya kolobela, pembeni ya ekotelo ya Tempelo. Bakonzi ya basoda mpe bato oyo babetaka bakelelo bazalaki pembeni ya mokonzi. Bato nyonso ya mokili bazalaki kosepela wana bazalaki kobeta bakelelo; mpe bayembi elongo na bibetelo na bango ya mindule bazalaki kokamba nzembo mpo na kokumisa Nkolo. Atali apasolaki bilamba na ye mpe agangaki: — Basaleli ngai likita! Basaleli ngai likita!
καὶ εἶδεν καὶ ἰδοὺ ὁ βασιλεὺς ἐπὶ τῆς στάσεως αὐτοῦ καὶ ἐπὶ τῆς εἰσόδου οἱ ἄρχοντες καὶ αἱ σάλπιγγες περὶ τὸν βασιλέα καὶ πᾶς ὁ λαὸς ηὐφράνθη καὶ ἐσάλπισαν ἐν ταῖς σάλπιγξιν καὶ οἱ ᾄδοντες ἐν τοῖς ὀργάνοις ᾠδοὶ καὶ ὑμνοῦντες αἶνον καὶ διέρρηξεν Γοθολια τὴν στολὴν αὐτῆς καὶ ἐβόησεν καὶ εἶπεν ἐπιτιθέμενοι ἐπιτίθεσθε
14 Nganga-Nzambe Yeoyada abengisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko mpe alobaki na bango: — Bobimisa ye na molongo! Mpe boboma na mopanga moto nyonso oyo akolanda ye! Pamba te Nganga-Nzambe alobaki: « Boboma ye te kati na Tempelo ya Yawe! »
καὶ ἐξῆλθεν Ιωδαε ὁ ἱερεύς καὶ ἐνετείλατο Ιωδαε ὁ ἱερεὺς τοῖς ἑκατοντάρχοις καὶ τοῖς ἀρχηγοῖς τῆς δυνάμεως καὶ εἶπεν αὐτοῖς ἐκβάλετε αὐτὴν ἐκτὸς τοῦ οἴκου καὶ εἰσέλθατε ὀπίσω αὐτῆς καὶ ἀποθανέτω μαχαίρᾳ ὅτι εἶπεν ὁ ἱερεύς μὴ ἀποθανέτω ἐν οἴκῳ κυρίου
15 Boye, wana Atali azwaki nzela ya ekotelo ya bampunda mpo na kokende na ndako ya mokonzi, bakangaki ye mpe babomaki ye kuna.
καὶ ἔδωκαν αὐτῇ ἄνεσιν καὶ διῆλθεν διὰ τῆς πύλης τῶν ἱππέων τοῦ οἴκου τοῦ βασιλέως καὶ ἐθανάτωσαν αὐτὴν ἐκεῖ
16 Yeoyada asalaki boyokani kati na ye, bato nyonso mpe mokonzi, mpo ete bazala bato ya Yawe.
καὶ διέθετο Ιωδαε διαθήκην ἀνὰ μέσον αὐτοῦ καὶ τοῦ λαοῦ καὶ τοῦ βασιλέως εἶναι λαὸν τῷ κυρίῳ
17 Bato nyonso bakendeki na ndako ya nzambe Bala, babukaki yango elongo na bitumbelo mpe bikeko, mpe babomaki Matani, nganga-nzambe ya Bala, liboso ya bitumbelo.
καὶ εἰσῆλθεν πᾶς ὁ λαὸς τῆς γῆς εἰς οἶκον Βααλ καὶ κατέσπασαν αὐτὸν καὶ τὰ θυσιαστήρια καὶ τὰ εἴδωλα αὐτοῦ ἐλέπτυναν καὶ τὸν Ματθαν ἱερέα τῆς Βααλ ἐθανάτωσαν ἐναντίον τῶν θυσιαστηρίων αὐτοῦ
18 Yeoyada apesaki mosala ya kokengela Tempelo ya Yawe epai ya Banganga-Nzambe Balevi oyo Davidi apesaki mosala ya Tempelo ya Yawe, mpo na kotumba mbeka epai na Yawe, ndenge ekomama kati na mibeko ya Moyize, na esengo mpe na koyemba banzembo, ndenge Davidi atindaki.
καὶ ἐνεχείρησεν Ιωδαε ὁ ἱερεὺς τὰ ἔργα οἴκου κυρίου διὰ χειρὸς ἱερέων καὶ Λευιτῶν καὶ ἀνέστησεν τὰς ἐφημερίας τῶν ἱερέων καὶ τῶν Λευιτῶν ἃς διέστειλεν Δαυιδ ἐπὶ τὸν οἶκον κυρίου καὶ ἀνενέγκαι ὁλοκαυτώματα κυρίῳ καθὼς γέγραπται ἐν νόμῳ Μωυσῆ ἐν εὐφροσύνῃ καὶ ἐν ᾠδαῖς διὰ χειρὸς Δαυιδ
19 Atiaki lisusu bakengeli na bikuke ya Tempelo ya Yawe mpo na kopekisa moto nyonso ya mbindo kokota kuna.
καὶ ἔστησαν οἱ πυλωροὶ ἐπὶ τὰς πύλας οἴκου κυρίου καὶ οὐκ εἰσελεύσεται ἀκάθαρτος εἰς πᾶν πρᾶγμα
20 Asangisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko, bato ya lokumu, bakambi ya bato mpe bato nyonso ya mokili; amemaki mokonzi longwa na Tempelo ya Yawe kino na ndako ya mokonzi, na nzela ya ekuke ya likolo. Mpe kuna, bavandisaki ye na kiti ya bokonzi.
καὶ ἔλαβεν τοὺς πατριάρχας καὶ τοὺς δυνατοὺς καὶ τοὺς ἄρχοντας τοῦ λαοῦ καὶ πάντα τὸν λαὸν τῆς γῆς καὶ ἀνεβίβασαν τὸν βασιλέα εἰς οἶκον κυρίου καὶ εἰσῆλθεν διὰ τῆς πύλης τῆς ἐσωτέρας εἰς τὸν οἶκον τοῦ βασιλέως καὶ ἐκάθισαν τὸν βασιλέα ἐπὶ τὸν θρόνον τῆς βασιλείας
21 Bato nyonso ya mokili basepelaki, mpe engumba ekomaki na kimia, pamba te babomaki Atali na mopanga.
καὶ ηὐφράνθη πᾶς ὁ λαὸς τῆς γῆς καὶ ἡ πόλις ἡσύχασεν καὶ τὴν Γοθολιαν ἐθανάτωσαν μαχαίρᾳ

< 2 Masolo ya Kala 23 >