< 2 Masolo ya Kala 20 >

1 Sima na yango, bato ya Moabi mpe ya Amoni elongo na ndambo ya bato ya Maoni bayaki kobundisa Jozafati.
It happened after this, that the people of Moab, and the people of Ammon, and with them some of the Meunites, came against Jehoshaphat to battle.
2 Bongo sango ekomaki na matoyi ya Jozafati na maloba oyo: « Mampinga minene ezali koya kobundisa yo longwa na Siri mpe na ngambo mosusu ya ebale monene; esili kokoma na Atsatsoni-Tamari oyo babengaka Eyini-Gedi. »
Then some came who told Jehoshaphat, saying, "A great multitude is coming against you from beyond the sea from Edom. Look, they are in Hazazon Tamar" (that is, En Gedi).
3 Jozafati abangaki makasi; azwaki mokano ya kotuna toli ya Yawe mpe akataki ete mokili mobimba ya Yuda ekila bilei.
Jehoshaphat was alarmed, and set himself to seek to Jehovah. He proclaimed a fast throughout all Judah.
4 Bato ya Yuda oyo bawutaki na bingumba nyonso ya Yuda basanganaki mpo na koluka Yawe.
Judah gathered themselves together, to seek help from Jehovah. They came out of all the cities of Judah to seek Jehovah.
5 Jozafati atelemaki kati na lisanga ya Yuda mpe ya Yelusalemi, kati na Tempelo ya Yawe, liboso ya lopango ya sika.
Jehoshaphat stood in the assembly of Judah and Jerusalem, in the house of Jehovah, before the new court;
6 Asambelaki: « Oh Yawe, Nzambe ya bakoko na biso! Ezali Yo te Nzambe oyo azali kati na likolo? Ezali Yo te oyo okonzaka bikolo nyonso ya mokili? Nguya mpe makasi ezali kati na loboko na Yo, mpe moko te akoki kotelemela Yo!
and he said, "Jehovah, the God of our fathers, aren't you God in heaven? Aren't you ruler over all the kingdoms of the nations? Power and might are in your hand, so that no one is able to withstand you.
7 Oh Nzambe na biso, ezali Yo te oyo obenganaki bavandi ya mokili oyo liboso ya Isalaele, bato na Yo, mpo na kopesa yango mpo na libela epai ya bakitani ya Abrayami, molingami na Yo?
Did you not, our God, drive out the inhabitants of this land before your people Israel, and give it forever to the descendants of Abraham your friend?
8 Bavandaki mpe na mokili yango, batongaki awa Esika ya bule mpo na Yo, mpo na Kombo na Yo, na koloba:
They lived in it, and have built you a sanctuary in it for your name, saying,
9 ‹ Soki mabe moko ekomeli biso: bitumba, etumbu, bokono to nzala makasi, tokoya kotelema liboso ya Tempelo oyo mpe liboso na Yo, pamba te Kombo na Yo ezali kati na Tempelo oyo; mpe kati na pasi na biso, tokoganga epai na Yo; bongo Yo, okoyoka, okoyanola mpe okobikisa biso! ›
'If evil comes on us—the sword, judgment, pestilence, or famine—we will stand before this house, and before you, (for your name is in this house), and cry to you in our affliction, and you will hear and save.'
10 Sik’oyo, tala bato ya Amoni, ya Moabi mpe bavandi ya etuka ya bangomba Seiri, ba-oyo na tina na bango, tango bana ya Isalaele babimaki na Ejipito, opekisaki bana ya Isalaele kobotola mokili na bango; mpe mpo na yango, balekaki pembeni-pembeni ya mokili na bango mpe babomaki bango te!
Now, look, the people of Ammon and Moab and Mount Seir, whom you would not let Israel invade, when they came out of the land of Egypt, but they turned aside from them, and did not destroy them;
11 Tala lolenge nini bazali kofuta biso: bayei kobundisa mpe kobengana biso na mabele oyo opesaki biso lokola libula!
look, how they reward us, to come to cast us out of your possession, which you have given us to inherit.
12 Oh Nzambe na biso, okosambisa bango te? Pamba te tozali na makasi te ya kotelemela mampinga minene oyo ezali koya kobundisa biso, mpe toyebi te tosala nini! Miso na biso ezali kotalela kaka Yo. »
Our God, will you not judge them? For we have no might against this great company that comes against us; neither know we what to do, but our eyes are on you."
13 Bato nyonso ya Yuda elongo na mabota nyonso, basi mpe bana na bango, batelemaki liboso ya Yawe.
All Judah stood before Jehovah, with their little ones, their wives, and their children.
14 Bongo Molimo na Yawe akitelaki, kati na lisanga, Yaazieli, mwana mobali ya Zakari, mwana ya mobali ya Benaya, mwana mobali ya Yeyeli mpe mwana mobali ya Matania, Molevi mpe moko kati na bakitani ya Azafi.
Then the Spirit of Jehovah came on Jahaziel the son of Zechariah, the son of Benaiah, the son of Jeiel, the son of Mattaniah, the Levite, of the sons of Asaph, in the midst of the assembly;
15 Yaazieli alobaki: « Bino bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi, mpe yo mokonzi Jozafati, boyoka! Tala makambo oyo Yawe azali koloba na bino: ‹ Bobanga te mpe bolenga te liboso ya mampinga minene oyo, pamba te bitumba ezali ya bino te kasi ezali ya Nzambe.
and he said, "Listen, all Judah, and you inhabitants of Jerusalem, and you king Jehoshaphat. Thus says Jehovah to you, 'Do not be afraid, neither be dismayed by reason of this great multitude; for the battle is not yours, but God's.
16 Lobi, bokende kobundisa bango. Bakomata ngomba Atsize, mpe bino bokokutana na bango na suka ya lubwaku, liboso ya esobe ya Yerueli.
Tomorrow go down against them. Look, they are coming up by the ascent of Ziz. You shall find them at the end of the valley, before the wilderness of Jeruel.
17 Bokobunda bitumba ata moke te: bomibongisa kaka na bisika na bino, botelema mpe botala elonga oyo Yawe akopesa bino. Bino bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bobanga te mpe bolenga te! Lobi, bokende kokutana na bango; mpe Yawe akozala elongo na bino! › »
You will not need to fight this battle. Set yourselves, stand still, and see the salvation of Jehovah with you, O Judah and Jerusalem. Do not be afraid, nor be dismayed. Go out against them tomorrow, for Jehovah is with you.'"
18 Jozafati agumbamaki elongi kino na mabele, mpe bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bafukamaki mpo na kogumbamela Yawe.
Jehoshaphat bowed his head with his face to the ground; and all Judah and the inhabitants of Jerusalem fell down before Jehovah, worshipping Jehovah.
19 Balevi kati na bato ya Keati mpe ya Kore batelemaki mpo na kokumisa Yawe, Nzambe ya Isalaele, na mongongo makasi.
The Levites, of the descendants of the Kohathites and of the descendants of the Korahites, stood up to praise Jehovah, the God of Israel, with an exceeding loud voice.
20 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bakendeki na esobe ya Tekoa. Na tango ya kokende, Jozafati atelemaki mpe alobaki: « Bino, bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka ngai! Botia elikya na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokolendisama! Bondimela basakoli na Ye, mpe bokolonga! »
They rose early in the morning, and went forth into the wilderness of Tekoa: and as they went forth, Jehoshaphat stood and said, "Listen to me, Judah, and you inhabitants of Jerusalem. Believe in Jehovah your God, so you will be established. Believe his prophets, and you will prosper."
21 Sima na ye kosolola na bato, Jozafati aponaki bayembi, atiaki bango liboso ya mampinga ya basoda, mpo na kokumisa Yawe mpe kotombola nkembo ya bosantu na Ye. Mpe batambolaki liboso ya mampinga ya basoda na koyemba: « Bosanzola Yawe, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko! »
When he had taken counsel with the people, he appointed those who should sing to Jehovah, and give praise in holy array, as they went out before the army, and say, Give thanks to Jehovah; for his loving kindness endures forever.
22 Tango kaka babandaki koyemba mpe kokumisa, Yawe atiaki mobulu kati na bato ya Amoni, ya Moabi mpe ya bangomba Seiri oyo bakotaki na Yuda, mpe babomanaki bango na bango.
When they began to sing and to praise, Jehovah set ambushers against the people of Ammon, Moab, and Mount Seir, who had come against Judah; and they were struck.
23 Bato ya Amoni mpe ya Moabi batelemaki mpo na kobundisa, koboma mpe kobebisa bavandi ya bangomba Seiri. Tango basilisaki koboma bavandi ya Seiri, bakomaki kobomana bango na bango.
For the people of Ammon and Moab stood up against the inhabitants of Mount Seir, utterly to kill and destroy them: and when they had made an end of the inhabitants of Seir, everyone helped to destroy another.
24 Tango bato ya Yuda bayaki na esika ya kotalela esobe na mosika, batalaki na ngambo ya mampinga minene ya banguna mpe bamonaki kaka bibembe elali na mabele: moko te abikaki.
When Judah came to the place overlooking the wilderness, they looked at the multitude; and look, they were dead bodies fallen to the earth, and there were none who escaped.
25 Jozafati elongo na bato na ye bakendeki kozwa bomengo ya bitumba; mpe bamonaki bibembe ebele, biloko ebele, bilamba ebele mpe biloko ebele ya talo. Balokotaki biloko ebele oyo bakokaki ata komema te. Basalaki mikolo misato mpo na kozwa yango, pamba te bomengo ya bitumba ezalaki ebele penza.
When Jehoshaphat and his people came to take their spoil, they found among them in abundance both riches and dead bodies, and precious jewels, which they stripped off for themselves, more than they could carry away: and they were three days in taking the spoil, it was so much.
26 Na mokolo ya minei, basanganaki na lubwaku ya Beraka epai wapi bapambolaki Yawe. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango lubwaku ya Beraka.
On the fourth day they assembled themselves in the Valley of Berachah; for there they blessed Jehovah: therefore the name of that place was called The Valley of Berachah to this day.
27 Na bokambami ya Jozafati, bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bazongaki na esengo na Yelusalemi, pamba te Yawe atondisaki bango na esengo wana akangolaki bango na maboko ya banguna na bango.
Then they returned, every man of Judah and Jerusalem, and Jehoshaphat in their forefront, to go again to Jerusalem with joy; for Jehovah had made them to rejoice over their enemies.
28 Bakotaki na Yelusalemi na lokito ya makembe, ya mandanda mpe ya bakelelo, mpe bakendeki na Tempelo ya Yawe.
They came to Jerusalem with stringed instruments and harps and trumpets to the house of Jehovah.
29 Somo ya Nzambe ekangaki bikolo nyonso ya mokili tango bayokaki sango ete Yawe abundisi banguna ya Isalaele.
The fear of God was on all the kingdoms of the countries, when they heard that Jehovah fought against the enemies of Israel.
30 Bokonzi ya Jozafati ezwaki kimia, pamba te Nzambe na ye apesaki ye bopemi na bangambo nyonso.
So the realm of Jehoshaphat was quiet; for his God gave him rest all around.
31 Jozafati, mwana mobali ya Asa, akonzaki Yuda; azalaki na mibu tuku misato na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi ya Yuda, mpe akonzaki mibu tuku mibale na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Azuba. » Azuba azalaki mwana mwasi ya Shili.
Jehoshaphat reigned over Judah: he was thirty-five years old when he began to reign; and he reigned twenty-five years in Jerusalem: and his mother's name was Azubah the daughter of Shilhi.
32 Jozafati alandaki nzela oyo Asa, tata na ye, atambolaki na yango; apengwaki na yango ata moke te mpe asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe.
He walked in the way of Asa his father, and did not turn aside from it, doing that which was right in the eyes of Jehovah.
33 Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba; mpe bato babongisaki nanu te mitema na bango mpo na kokangama na Nzambe ya bakoko na bango.
However the high places were not taken away; neither as yet had the people set their hearts to the God of their fathers.
34 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jozafati, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya Jewu, mwana mobali ya Anani; mpe masolo yango ezali kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Now the rest of the acts of Jehoshaphat, first and last, look, they are written in the history of Jehu the son of Hanani, which is inserted in the book of the kings of Israel.
35 Sima na yango, Jozafati, mokonzi ya Yuda, asalaki boyokani elongo na Akazia, mokonzi ya Isalaele, oyo etamboli na ye ezalaki mabe na miso ya Nzambe.
After this Jehoshaphat king of Judah joined himself with Ahaziah king of Israel. The same did very wickedly:
36 Basanganaki bango mibale mpo na kotonga bamasuwa oyo esengelaki kokende na Tarsisi. Sima na kotonga bamasuwa na Etsioni-Geberi,
and he joined himself with him to make ships to go to Tarshish; and they made the ships in Ezion Geber.
37 Eliezeri, mwana mobali ya Dodavawu, moto ya Maresha, asakolaki mpo na kotelemela Jozafati; alobaki: « Lokola osali boyokani elongo na Akazia, Yawe akobebisa misala na yo. » Mpe bamasuwa ebebaki mpe ekokaki lisusu te kokende na Tarsisi.
Then Eliezer the son of Dodavahu of Mareshah prophesied against Jehoshaphat, saying, "Because you have joined yourself with Ahaziah, Jehovah has destroyed your works." The ships were broken, so that they were not able to go to Tarshish.

< 2 Masolo ya Kala 20 >